Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:00

[1] Tango Yezu asilisi kopesa bayekoli na ye zomi na mibale mibeko wana, alongwe kuna po ákende koteya pe kosakola na bamboka ya pembeni.

[2] Yoane Mobatisi azalaki na boloko pe ayoki sango ya misala ya Kristo. Bongo atindeli ye bayekoli na ye mosusu

[3] po bákende kotuna ye: “Ozali moto oyo asengeli koya, to tosengeli kozela moto mosusu?”

[4] Yezu azongiseli bango: “Bókende koloba na Yoane makambo oyo boyoki pe bomoni:

[5] bato bakufá miso bakómi komona; bato bakufá matoi bakómi koyoka; bato bakufá makolo bakómi kotambola; bato bazali na maladi ya maba babandi kobika; bato bakufá babandi kosekwa; pe bato ya mawa babandi koyoka Sango Malamu.

[6] Esengo mingi na moto oyo atie tembe té po na ngai.”

[7] Awa bayekoli ya Yoane bakei, Yezu abandi kotuna bato po na Yoane: “Bokendeki kotala nini na esobe? Mwa-nzete oyo mopepe ezali koningisa? Té!

[8] Bongo bokendeki kuna po na nini? Po na kotala moto moko oyo alati bilamba ya kitoko? Té! Po bato balataka bilamba ya kitoko bafandaka na bandako ya bakonzi.

[9] Bongo bokendeki kotala nani? Profete? Ee, bokendeki kotala profete. Ya solo, nalobi na bino: ye aleki kutu profete.

[10] Pamba té Yoane azali moto oyo bakòmá boye: ‘Nzambe alobi: Tala, natindi ntoma na ngai liboso na yo, po na kobongisela yo nzela.’

[11] Nalobi na bino, ya solo: na kati ya bato nyonso Nzambe asalá, moko té aleki Yoane Mobatisi. Kasi na kati ya bato ya bokonzi ya Likolo, moto ya suka aleki ye.

[12] Banda tango Yoane Mobatisi azalaki kosakola tii lelo, bazali kaka kobundisa bokonzi ya Likolo; banguna bazali koluka kobotola yango.

[13] Pamba té liboso 'tè Yoane áya, Mibeko ya Moize pe baprofete nyonso bazalaki koyebisa 'tè Nzambe akotia bokonzi na ye.

[14] Bóndima to bóndima té, Yoane azali Eliya oyo balobaka 'tè akoya.

[15] Moto azali na matoi, áyoka!

[16] “Kasi bato ya lelo bakokani ná banani? Bakokani ná bana mike bafandi na zando, pe bazali koloba na baninga na bango:

[17] ‘Tobeteli bino miziki, kasi bobini té! Toyembeli bino banzembo ya mawa, kasi boleli té!’

[18] Pamba té Yoane ayaki, azalaki komilalisa nzala, bongo babandaki koloba po na ye: ‘Azali na ndoki’.

[19] Mwana ya Moto ayei, azali kolia pe komela; bongo balobi: ‘Bótala moto oyo, azali kokanisa kaka kolia pe komela vinu. Azali moninga ya bafutisi-mpaku pe bato ya masumu!’ Kasi mayele ya Nzambe ezali komonana solo na misala na ye.”

[20] Bongo Yezu abandi kogangela bavile esika ye asalaki makamwisi ebele, po bato ya bavile yango babongolaki mitema té.

[21] Alobi: “Mawa na yo, vile ya Korazine! Mawa na yo, vile ya Betsaida! Pamba té soki makamwisi oyo nasalaki epai na bino ésalamaka na Tir pe Sidon, mbele bato ya kuna balingaki kolata basaki pe kopakola potopoto, po na kolakisa 'tè babongoli mitema!

[22] Yango wana nalobi na bino: mokolo Nzambe akosambisa bato, etumbu na bino ekoleka ya Tir ná ya Sidon.

[23] Pe yo Kafarnaum, okanisi 'tè okomata tii na Likolo? Té! Okokita tii na mboka ya bato bakufá! Pamba té soki makamwisi oyo nasalaki epai na yo ésalamaka na Sodome, mbele yango elingaki kozala tii lelo.

[24] Yango wana, nalobi na yo: mokolo Nzambe akosambisa bato, etumbu na yo ekoleka ya Sodome!”

[25] Na tango wana Yezu alobi: “E Tata, Nkolo ya Likolo ná se, napesi yo mersi po obombi makambo oyo na bato ya mayele pe na bato bayekolá, kasi olakisi yango na bato pamba.

[26] Ya solo, Tata, olingaki ésalama bobele ndenge wana.

[27] “Tata na ngai apesi makambo nyonso na maboko na ngai. Moto moko té ayebi mwana; bobele Tata moto ayebi. Moto moko té ayebi Tata, bobele Mwana moto ayebi, ná baoyo Mwana alingi kolakisa bango Tata.

[28] “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona pasi pe bolembi na mikumba; ngai moto nakosalisa bino po bókoka kofanda na kimia.

[29] Pamba té nazali moto ya motema malamu pe ya boboto. Bózala basali na ngai pe bóya kozwa mayele epai na ngai; bongo bokokoka kofanda na kimia.

[30] Kosalela ngai ezali pasi té, pe mokumba na ngai ezali kilo té.”

Matié — Chapters