[1] Yezu abengi bayekoli na ye zomi na mibale, pe apesi bango nguya ya kobengana milimo mabe pe ya kobikisa maladi ya ndenge na ndenge.
[2] Tala bakombo ya bantoma zomi na mibale: ya liboso Simon (oyo babengaka Piere) ná ndeko na ye André; Jake ná ndeko na ye Yoane, bana ya Zebedé;
[3] Filipe ná Bartelemi; Toma ná Matié mofutisi-mpaku; Jake, mwana ya Alfé, pe Tadé.
[4] Simon, oyo azalaká liboso moto ya lingomba ya Baweli-Lipanda, pe Yudas Iskariot, oyo atekaki Yezu.
[5] Yezu atindi bato wana zomi na mibale pe apesi bango mitindo oyo: “Bókende na bamboka ya bapaya té; bókota pe na bavile ya Samarie té.
[6] Kasi bókende bobele epai ya bato ya Israel, pamba té bakómi lokola bameme oyo ebungá.
[7] Tango bozali kokende, bósakola boye: ‘Bokonzi ya Likolo ekómi penepene.’
[8] Bóbikisa bato ya maladi ná bato ya maba; bósekwisa bato bakufá; bóbengana milimo mabe. Bozwi biloko ya ofelé; bópesa pe ya ofelé.
[9] Bómema ata ebende moko té ya mbongo na libenga na bino;
[10] bókamata saki té po na mobembo, to bashemize mibale, to basapatu, to pe nzete. Moto oyo asalaka, esengeli bápesa ye bilei.
[11] “Soki bokómi na mboka moko ya monene to ya moke, bóluka moto ya malamu; pe bófanda epai na ye tii mokolo bokolongwa na mboka yango.
[12] Soki bokoti na ndako moko, bópesa mbote na boboto nyonso.
[13] Soki bato ya ndako wana bazali malamu, bakozwa boboto likolo na bino; kasi soki bazali malamu té, bakozwa eloko té.
[14] Bongo soki baboyi koyamba bino pe balingi koyoka maloba na bino té, bóbima na ndako to na mboka wana, pe bópupola makolo po bómema pusiere ya mboka yango epai mosusu té.
[15] Nalobi na bino, ya solo: mokolo Nzambe akokata makambo ya bato, etumbu ya mboka wana ekoleka oyo ya Sodome pe Gomore.”
[16] “Bóyoka malamu: natindi bino lokola bameme na kati ya bankoi. Yango wana, bózala mayele lokola banyoka; pe bózala bato ya kimia lokola bapijon.
[17] Bókeba na bato. Bakomema bino epai ya bazuzi, pe bakobeta bino fimbu na bandako na bango ya lisanga.
[18] Likolo na ngai, bakobanda komema bino epai ya batambwisi ya bavile pe bakonzi ya bikolo, po bóyebisa bango sango na ngai; boye bato oyo bayebi Nzambe té bakoyoka yango.
[19] Bongo tango bakomema bino, bóbanga té po na makambo bosengeli koloba; tango wana makambo ya koloba ekobima yango moko.
[20] Bino té bato bokoloba yango, kasi Molimo ya Tata na bino moto akolobisa bino.
[21] “Bato bakotekisa bandeko na bango po báboma bango; batata bakotekisa bana na bango; pe bana bakotombokela batata po bábomisa bango.
[22] Bato nyonso bakoyina bino po na kombo na ngai. Kasi moto oyo akokanga motema tii na suka, ye nde akobika.
[23] Soki banyokoli bino na mboka moko, bókima na mboka mosusu. Nalobi na bino, ya solo: bokosilisa koleka na bamboka nyonso ya Israel té, liboso 'tè mwana ya Moto áya.
[24] “Moyekoli aleki molakisi na ye té; mosali aleki mokonzi na ye té.
[25] Moyekoli asengeli kosepela soki akokani ná molakisi na ye; pe mosali asengeli kosepela soki akokani ná mokonzi na ye. Lokola bapesi mokonzi ya libota kombo Beelzebul, bakopesa pe bakombo oyo eleki mabe na bato ya libota na ye.”
[26] “Yango wana bóbanga bato té! Mokolo ezali, makambo nyonso oyo ebombamá ekomonana polele; pe makambo ya sekelé ekoyebana.
[27] Oyo nazali koloba na bino na molili, bóloba yango na moi; pe oyo nazali koloba na bino na sekelé, bótambola na babalabala po bósakola yango.
[28] Bóbanga bato té! Bango babomaka nzoto, kasi bakokaka koboma molimo té. Bóbangaka kaka Nzambe oyo akoki kobwaka molimo ná nzoto mbala moko na lifelo.
[29] Batekaka bandeke mibale ya mike na talo moke penza. Boye té? Kasi moko té na kati na yango ekweyaka na se, soki Tata na bino alingi té.
[30] Po na bino ezali se bongo. Ata suki na bino, Nzambe asi'atangá yango nyonso.
[31] Yango wana bóbanga té! Bino bozali na tina koleka ebele ya bandeke ya mike!”
[32] “Moto nyonso oyo akondima ngai na miso ya bato, ngai pe nakondima ye na miso ya Tata na ngai ya Likolo.
[33] Kasi oyo akowangana ngai na miso ya bato, ngai pe nakowangana ye na miso ya Tata na ngai ya Likolo.”
[34] “Bókanisa té 'tè nayeeli bato boboto; nayeeli bango boboto té, kasi bitumba.
[35] Nayei po na kokabola mwana-mobali ná tata na ye, mwana-mwasi ná mama na ye; pe mwasi ya mwana ná bokilo na ye ya mwasi.
[36] Ya solo, banguna ya bato ekozala bobele bandeko na bango moko.
[37] “Moto oyo alingaka tata to mama na ye koleka ngai, akoki kozala moto na ngai té; oyo alingaka mwana na ye ya mobali to ya mwasi koleka ngai, akoki kozala moto na ngai té.
[38] Oyo aboyi komema kuruze na ye pe kolanda ngai, akoki kozala moto na ngai té.
[39] Moto oyo alingaka kobatela bomoi na ye, akobungisa yango; kasi oyo akobungisa bomoi na ye likolo na ngai, akozwa yango lisusu.”
[40] “Moto oyo ayambi bino, ayambi penza ngai moko; pe oyo ayambi ngai, ayambi penza Moto oyo atindi ngai.
[41] Moto oyo ayambi profete po azali profete, akozwa lifuta oyo Nzambe akopesa na baprofete; pe oyo ayambi moto ya malamu po ye azali malamu, akozwa lifuta oyo Nzambe akopesa na bato ya malamu.
[42] Nalobi na bino, ya solo: moto oyo ayambi ata mwana moke po azali moyekoli na ngai, pe apesi ye kopo ya mai ya malili, akozanga lifuta té.”