[1] Tango Yezu azalaki kokita ngomba, bato ebele balandi ye.
[2] Moto moko azalaki na maladi ya maba ayei epai na ye, afukameli ye, pe alobi: “Mokonzi, soki olingi, okoki kobikisa ngai.”
[3] Yezu atandi liboko, asimbi ye, pe alobi: “Nalingi yango; bika!” Kaka na tango wana, maladi na ye ya maba esili.
[4] Bongo Yezu alobi na ye: “Yoka malamu! Koloba likambo oyo na moto moko té, kasi kende komilakisa na nganga-Nzambe ndenge okómi, pe pesa libonza ndenge Moize atindá; boye bato nyonso bakomona 'tè obiki solo.”
[5] Tango Yezu azalaki kokota na Kafarnaum, komandan moko ya basoda ya Rome ayei epai na ye, pe abondeli ye boye:
[6] “Mokonzi, mosali na ngai alali na ndako, azali lisusu koningana té, pe azali koyoka pasi mingi penza.”
[7] Yezu alobi na ye: “Nakokende kobikisa ye.”
[8] Kasi komandan ya basoda azongisi: “Mokonzi, ngai nazali nani po ókota na ndako na ngai? Kasi loba kaka liloba moko, pe mosali na ngai akobika.
[9] Pamba té ngai pe natosaka bakonzi na ngai; nazali pe na basoda oyo batosaka ngai. Soki nalobi na moko: ‘Kende’, akei; soki nalobi na mosusu: ‘Yaka’, ayei; pe soki natindi mosali na ngai: ‘Sala mosala oyo’, asali yango.”
[10] Tango Yezu ayoki bongo, akamwe pe alobi boye na bato oyo bazalaki kolanda ye: “Nazali koloba na bino, ya solo: nanu namoná bondimi ya ndenge oyo té, ata na kati ya bato ya Israel.
[11] Nalobi na bino: bato mingi bakolongwa na epai moi ebimaka pe na epai elalaka; bakoya kokota na bokonzi ya Likolo, pe bakozala kolia na feti esika moko ná Abraham, Izaak pe Jakob.
[12] Kasi baoyo basengelaki kozala bato ya bokonzi ya Likolo bakobwaka bango libanda na molili; kuna bakobanda kolela pe kolia mino.”
[13] Bongo Yezu alobi na komandan ya basoda: “Kende na yo; makambo ondimi esalami.” Pe mosali na ye abikaki kaka na tango wana.
[14] Yezu akendeki na ndako ya Piere, akuti mama ya mwasi ya Piere alali na mbeto, azalaki na fievre.
[15] Yezu asimbi ye na liboko; fievre esili, mwasi atelemi pe abandi kosalela ye.
[16] Tango pokwa ekómi, bamemeli Yezu bato mingi bazalaki na milimo mabe. Yezu agangeli milimo mabe pe abimisi yango; abikisi pe bato nyonso ya maladi.
[17] Ndenge wana akokisaki makambo profete Ezaya alobaká: “Ye amemaki mokumba ya bapasi na biso, pe alongolaki maladi na biso.”
[18] Awa Yezu amoni bato ebele bazali kotondana epai na ye, alobi: “Tókatisa ngambo ya laki.”
[19] Kaka na tango wana, molakisi-Mibeko moko ayei epai na ye pe alobi: “Moteyi, nakolanda yo epai nyonso okokende.”
[20] Yezu azongiseli ye: “Banyama ya zamba ezali na mabulu na yango, bandeke ezali na bazála na yango, kasi mwana ya Moto azali na esika ya kolala té.”
[21] Moyekoli na ye mosusu alobi na ye: “Mokonzi, liboso pesa ngai nzela nákende kokunda tata na ngai.”
[22] Yezu azongiseli ye: “Landa ngai. Tika bato bakufá bákundana bango na bango.”
[23] Yezu akoti na bwatu pe bayekoli na ye bakei ná ye.
[24] Na mbala moko mopepe moko ya makasi eleki na laki, bongo mai ebandi kokota na bwatu. Kasi Yezu alalaki pongi.
[25] Bayekoli bapusani pe balamusi ye, balobi: “Mokonzi, bikisa biso, tolingi tókufa!”
[26] Yezu azongiseli bango: “Po na nini bozali kobanga boye? Bondimi na bino ezali moke.” Bongo atelemi pe agangeli mopepe ná mai, pe kimia penza ezongi.
[27] Bango nyonso bakamwe pe balobi: “Moto oyo azali nani? Ata mopepe ná mai ezali kotosa ye!”
[28] Tango Yezu akómi na ngambo ya laki, na mabelé ya Gadara, bato mibale bayei epai na ye, bautaki na simetiere. Milimo mabe ekotelaki bango, pe bazalaki kotomboka mingi; yango wana bato bazalaki kokoka koleka na nzela wana té.
[29] Bato wana babandi koganga: “Mwana ya Nzambe, biso na yo likambo nini? Oyei awa po na kotungisa biso lelo? Tango na biso ekoki nanu té.”
[30] Nzokande bangulu ebele ezalaki kolia mwa-mosika.
[31] Milimo mabe ebondeli Yezu boye: “Soki olingi kobengana biso, tinda biso tókende kokota na bangulu wana.”
[32] Yezu alobi na bango: “Bókende kokota.” Milimo mabe ebimi na bato wana pe ekei kokota na bangulu. Na mbala moko bangulu nyonso elongwe likolo ya ngomba; ekei kokweya na kati ya laki pe ekufi na mai.
[33] Bato bazalaki kokengela bangulu bakimi, bakei na mboka moko ezalaki pembeni. Kuna bayebisi makambo nyonso, pe ndenge esalamaki na bato oyo bazalaki na milimo mabe.
[34] Bongo bato nyonso ya mboka wana babimi po na kokutana na Yezu; tango bamoni ye, basengi ye álongwa na mabelé na bango.