Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:57

[1] Sima ya mikolo motoba Yezu akamati Piere, Jake ná Yoane, ndeko ya Jake, pe akei na bango na ngomba moko ya molai. Kuna bazalaki kaka bango moko.

[2] Yezu abongwani na miso na bango; elongi na ye ekómi kongenga lokola moi; pe bilamba na ye ekómi pembe penza.

[3] Na mbala moko bayekoli bamoni Moize ná Eliya bazali kosolola ná Yezu.

[4] Bongo Piere alobi na Yezu: “Mokonzi, lokola tozali awa ezali malamu. Soki olingi, nakotònga bandako misato ya kapo, moko po na yo, moko po na Moize, pe moko po na Eliya.”

[5] Tango azalaki koloba, lipata moko ya pembe eyei kozipa bango, pe mongongo euti na lipata elobi: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo; nazali na esengo mingi po na ye. Bóyokela ye.”

[6] Tango bayekoli bayoki mongongo yango, bakwei bilongi na se, po babangaki mingi.

[7] Yezu ayei, asimbi bango pe alobi: “Bótelema, bóbanga té!”

[8] Batomboli miso, kasi bamoni moto mosusu té; bobele Yezu ye moko.

[9] Lokola bazalaki kokita ngomba, Yezu apekisi bango 'tè: “Makambo oyo bomoni, bóloba yango na moto té, tii mokolo mwana ya Moto akosekwa.”

[10] Na sima bayekoli batuni Yezu: “Bongo po na nini balakisi-Mibeko balobaka 'tè Eliya asengeli koya liboso?”

[11] Ye azongiseli bango: “Ya solo Eliya asengeli koya po na kobongisa makambo nyonso;

[12] kasi ngai nalobi na bino: Eliya asi'ayaki. Bato bandimelaki ye té, kasi basalaki ye ndenge balingaki. Ndenge moko pe bakonyokola Mwana ya Moto.”

[13] Awa bayekoli bayoki bongo, bayei koyeba 'tè alobaki na bango po na Yoane Mobatisi.

[14] Tango bazongi esika bato bazalaki, moto moko ayei epai ya Yezu, afukameli ye

[15] pe alobi: “Mokonzi, yokela mwana na ngai mawa! Azali na maladi ya ndeke, pe azali komona pasi mingi. Tango mosusu akweyaka na móto to na mai.

[16] Namemaki ye epai ya bayekoli na yo, kasi bakokaki kobikisa ye té.”

[17] Yezu azongisi: “A bino! Bato mabe! Bozangá bondimi! Nasengeli kofanda na bino tii tango nini? Nákanga motema po na bino tii tango nini? Bómemela ngai ye awa!”

[18] Yezu agangeli molimo mabe, bongo yango ebimi na nzoto ya mwana, pe kaka na tango wana mwana abiki.

[19] Bayekoli bayei epai ya Yezu bango moko, pe batuni ye: “Po na nini biso tokokaki kobengana molimo wana té?”

[20] Yezu azongisi: “Po bino bozali na bondimi mingi té. Nalobi na bino, ya solo: bókanisa mbuma oyo babengaka mutarde. Soki bondimi na bino ezalaki na nguya ya ndenge wana, mbele bokokaki koloba na ngomba oyo: ‘Longwa awa, kende kuna,’ pe yango ekolongwa. Ata likambo moko té ekokaki kozala pasi po na bino.”

[21] [Kasi bakoki kobimisa milimo ya ndenge oyo kaka na kobondela pe komilalisa nzala.]

[22] Mokolo moko bayekoli basanganaki bango nyonso na Galilé. Yezu alobi na bango: “Balingi koteka mwana ya Moto epai ya bato.

[23] Bango bakoboma ye; kasi akosekwa na mikolo misato.” Bongo bayekoli babandi koyoka mawa mingi penza.

[24] Tango Yezu ná bayekoli na ye bakómi na Kafarnaum, bato bafutisaka mpaku ya Ndako ya Nzambe bayei epai ya Piere, pe batuni ye: “Moteyi na bino afutaka mpaku ya Ndako ya Nzambe?”

[25] Piere azongisi: “Ee, afutaka.” Tango Piere akoti na ndako, Yezu alobi na ye: “Simon, okanisi nini? Banani bafutaka bampaku ya bakonzi ya mokili? Bana na bango to bato mosusu?”

[26] Piere azongisi: “Bato mosusu.” Bongo Yezu alobi na ye: “Boye bana bafutaka té.

[27] Kasi tófuta mpaku yango kaka, po tóyokisa bato oyo pasi na mitema té. Kende na laki, bwaka ndobo na mai, benda mbisi ya liboso oyo okokanga, pe fungola yango monoko. Okomona mbongo ya ebende; kamata yango, pe pesa bango po na kofuta mpaku ya ngai ná ya yo.”

Matié — Chapters