[1] Sima ya bambula, Yoane Mobatisi akendeki na esobe ya Yudea, pe abandaki kosakola boye:
[2] “Bóbongola mitema, pamba té Nzambe alingi kotia bokonzi na ye sik'oyo.”
[3] Yoane azali moto oyo profete Ezaya alobaká: “Moto moko azali kobelela na kati ya esobe: ‘Nkolo alingi koya! Bóbongisela ye nzela. Bósalela ye nzela moko ya kitoko!’”
[4] Yoane azalaki kolata elamba basalá na bapwale ya shamó, pe mokaba ya poso ya nyama na loketo. Bilei na ye ezalaki kaka mankonko ná mafuta ya nzoi.
[5] Bato ya Yeruzalem, ná bato nyonso ya rejion ya Yudea pe ya bapembeni ya mai ya Yordan, bazalaki kokende epai na ye.
[6] Bazalaki kobimisa polele masumu na bango na miso ya bato nyonso, pe Yoane azalaki kobatisa bango na mai ya Yordan.
[7] Tango Yoane amoni 'tè ba-Farizé ná ba-Sadusé ebele bazali koya epai na ye po ábatisa bango, abandi koloba na bango boye: “Bino banyoka oyo! Nani apesi bino mayele ya kokima kanda ya Nzambe oyo ezali koya?
[8] Bósala makambo oyo ezali kolakisa 'tè bosi'bobongoli mitema.
[9] Bótika komiloba bino na bino 'tè: ‘Mabe moko té ekoki kokweela biso, pamba té Abraham azali koko na biso.’ Nalobi na bino: Nzambe akoki kobongola mabanga oyo po ékóma bana ya Abraham.
[10] Basi'babongisi epasola po na kokata misisa ya banzete. Nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu té, bakokata yango pe bakobwaka yango na móto.
[11] Ngai nazali kobatisa bino na mai pamba po bóbongola mitema. Kasi moto oyo akoya sima na ngai akobatisa bino na Molimo Mosantu pe na móto. Ye azali na nguya koleka ngai; nakoki ata kutu té kolongola ye basandale.
[12] Asimbi kiyungulu po na koyungula matiti oyo esangani na mbuma; akobomba mbuma ya blé, kasi akotumba matiti na móto oyo ekufaka té.”
[13] Mokolo moko Yezu autaki na Galilé pe ayaki penepene ya Yordan; akómi epai ya Yoane po ázwa batisimo.
[14] Kasi Yoane alingaki kobatisa ye té, alobi na ye: “Yo nde moto osengeli kobatisa ngai, bongo ozali koya epai na ngai!”
[15] Kasi Yezu azongiseli ye: “Po na sik'oyo, sala kaka. Pamba té esengeli tókokisa makambo nyonso Nzambe alingaka.” Bongo Yoane andimi.
[16] Tango Yezu asilisi kozwa batisimo, abimi na mai. Kaka na tango wana Likolo efungwami; amoni Molimo ya Nzambe akiti lokola pijon pe ayei kofanda likolo na ye.
[17] Mongongo moko euti na Likolo elobi: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo; nasepeli na ye mingi.”