Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:54

[1] Ba-Farizé ná ba-Sadusé bayei epai ya Yezu po na komeka ye; basengi ye ásalela bango elembo moko oyo ekomonisa 'tè nguya na ye euti na Nzambe.

[2] Kasi Yezu azongiseli bango boye: “Tango pokwa ekómaka, bino bolobaka: ‘Likolo ezali motane, mbula ekonoka té.’

[3] Pe na tongo-tongo bolobaka: ‘Lelo mbula ekonoka, pamba té Likolo eyindi.’ Bino boyebi ndenge Likolo ezali kolakisa soki mbula ekonoka to ekonoka té; kasi bilembo ezali kolakisa makambo ya mikolo oyo, boyebi kolimbola yango té.

[4] Ndenge nini bato oyo bazali kosenga elembo! Bazali bato mabe pe batosaka Nzambe té. Nzambe akolakisa bino kaka elembo moko: oyo ya Jonas.” Bongo atiki bango pe akei na ye.

[5] Tango bayekoli bakatisi ngambo ya laki, babosanaki komema biloko ya kolia.

[6] Bongo Yezu alobi na bango: “Bókeba! Ba-Farizé pe ba-Sadusé basalelaka kisi ya mabe po na kolamba mapa!”

[7] Bongo babandi kolobana bango na bango: “Azali koloba boye po tomemi mapa té.”

[8] Kasi Yezu ayebaki makanisi na bango, pe atuni: “Po na nini bozali kolobana bino na bino: ‘Tomemi mapa té’? Bato ya bondimi moke!

[9] Boyebi nanu té tii sik'oyo? Bobosani mokolo nasalelaki mapa mitano po na koleisa bato 5.000? Botikalaki na bitunga boni?

[10] Pe mokolo nasalelaki mapa sambo po na koleisa bato 4.000, botikalaki na bitunga boni?

[11] Ndenge nini bozali kokanisa 'tè nalobelaki bino po na mapa? Bókeba na kisi ya mapa ya ba-Farizé ná ya ba-Sadusé.”

[12] Na tango wana bayekoli bayei koyeba 'tè Yezu alobaki té po na kisi oyo evimbisaka farine, kasi alobaki bákeba na mateya ya ba-Farizé ná ya ba-Sadusé.

[13] Yezu akei na mabelé oyo ezali pembeni ya Sezaré, vile ya mokonzi Filipe, bongo atuni bayekoli na ye: “Bato balobaka 'tè mwana ya Moto azali nani?”

[14] Bango bazongisi: “Bato mosusu balobaka 'tè ozali Yoane Mobatisi; bamosusu: Eliya; pe bamosusu: Jeremya, to profete mosusu ya kala.”

[15] Kasi Yezu atuni bango: “Bongo bino bokanisi 'tè nazali nani?”

[16] Simon Piere azongisi: “Yo ozali Mesia, mwana ya Nzambe ya bomoi.”

[17] Bongo Yezu alobi na ye: “Esengo mingi na yo, Simon, mwana ya Yoane, pamba té oyo alakisi yo makambo wana ezali moto té, kasi ezali nde Tata na ngai ya Likolo.

[18] Bongo ngai nalobi na yo: ozali Libanga, pe na likolo ya libanga oyo nakotònga Eklezya na ngai. Liwa kutu ekokoka kokweisa yango ata moke té.

[19] Nakopesa yo bafungola ya bokonzi ya Likolo; oyo yo okokanga awa na se, Nzambe pe akokanga yango na Likolo; oyo yo okofungola awa na se, Nzambe pe akofungola yango na Likolo.”

[20] Na sima Yezu apekisi bayekoli na ye báloba na moto té 'tè ye azali Mesia.

[21] Banda tango wana Yezu abandi koyebisa bayekoli na ye polele makambo elingi kokweela ye, alobi: “Nasengeli kokende na Yeruzalem, pe kuna bambuta-muntu, bakonzi ya banganga-Nzambe ná balakisi-Mibeko bakoyokisa ngai pasi mingi. Bakoboma ngai kasi na mikolo misato nakosekwa.”

[22] Bongo Piere abendi ye pembeni, pe abandi koloba na ye: “Mokonzi, yango ekoki kosalama té! Makambo wana ekokweela yo té!”

[23] Kasi Yezu abaluki pe alobi na Piere: “Satan, longwa na miso na ngai! Ozali kotiela ngai libaku! Ozali kokanisa makambo ya Nzambe té, kasi bobele ya bomoto.”

[24] Na sima Yezu alobi na bayekoli na ye: “Soki moto alingi kolanda ngai, átika kokanisa po na nzoto na ye moko; ákumba kuruze na ye pe álanda ngai.

[25] Pamba té moto oyo alingi kobikisa bomoi na ye, akobungisa yango. Kasi moto oyo akobungisa bomoi na ye po na ngai, akozwa yango lisusu.

[26] Ata moto azwi bomengo nyonso ya mokili mobimba, eloko nini azwi soki abungisi bomoi na ye? Eloko nini akoki kofuta po ázwa yango lisusu?

[27] Etikali moke mwana ya Moto áya na lokumu ya Tata na ye nzela moko ná ba-anjelu na ye. Bongo akofuta moto na moto na ndenge ya misala na ye.

[28] Nalobi na bino, ya solo: Na kati na bino bato bozali awa, bamosusu bazali, liboso 'tè bákufa bakomona na miso ndenge Mwana ya Moto akoya na bokonzi na ye.”

Matié — Chapters