[1] Tango Yezu asilisi koloba makambo wana, atiki Galilé pe akei na eteni ya mabelé ya Yudea oyo ezali na ngambo ya mai ya Yordan.
[2] Bato ebele balandi ye kuna, pe abikisi bato mingi ya maladi.
[3] Ba-Farizé mosusu bayei epai ya Yezu pe babandi komeka ye. Batuni ye: “Mibeko na biso epesaka nzela na mobali, po áboya mwasi na ye ata na likambo nyonso?”
[4] Yezu azongisi: “Nanu botangi Mikanda ya Nzambe té? Ekòmamá boye: ‘Na ebandeli, tango Nzambe asalaki bato, asalaki bango mobali ná mwasi;
[5] bongo alobi: Yango wana, mobali atikaka tata na ye ná mama na ye, pe asanganaka ná mwasi na ye, po bango mibale bákóma moto moko.’
[6] Boye bazali lisusu bato mibale té, kasi bakómi se moto moko. Bongo, bato oyo Nzambe asangisi, moto ákabola bango té!”
[7] Ba-Farizé bazongisi: “Ndenge nini wana? Moize apesaká nzela boye: mobali akoki koboya mwasi na ye, kasi liboso ákòma mokanda ya koboma libala.”
[8] Yezu alobi na bango: “Moize apesaki bino nzela ya koboya basi, po boleki mitú makasi. Kasi banda na ebandeli ezalaki bongo té.
[9] Nalobi na bino: moto nyonso oyo aboyi mwasi na ye pe abali mwasi mosusu, longola bobele soki Mibeko ezali kopekisa 'tè bábalana té, azali kosala kindumba.”
[10] Bayekoli na ye balobi: “Soki makambo ya mwasi ná mobali ezali boye, ebongi malamu moto ábala té.”
[11] Yezu azongiseli bango: “Bato nyonso bakoki kondima mateya oyo té; kaka baoyo Nzambe apesi nguya ya kondima yango.
[12] Bato mosusu babalaka té po bakufá mokongo banda babotamá, to babomá bango mokongo; pe bamosusu babalaka té po bamipesá mobimba na makambo ya bokonzi ya Likolo. Moto akoki kondima mateya oyo, ándima yango!”
[13] Bato bayeeli Yezu bana po átiela bango maboko, pe ábondela Nzambe po na bango; kasi bayekoli babandi kopekisa bango.
[14] Bongo Yezu alobi: “Bótika bana báya epai na ngai. Bópekisa bango té, pamba té bokonzi ya Likolo ezali po na baoyo bakokani ná bango.”
[15] Atieli bango maboko pe alongwe wana.
[16] Moto moko ayei epai ya Yezu pe atuni ye: “Moteyi, likambo nini ya malamu nasengeli kosala po názwa bomoi ya seko?”
[17] Yezu azongiseli ye: “Ndenge nini ozali kotuna ngai po na likambo ya malamu? Kaka Nzambe ye moko nde azali malamu. Soki olingi kokota na mboka ya bomoi, tosaka mibeko.”
[18] Moto wana atuni: “Mibeko nini?” Yezu azongisi: “Koboma moto té; kosala kindumba té; koyiba té; kokosa moto té;
[19] tosa tata ná mama na yo; linga moninga na yo ndenge omilingaka yo moko.”
[20] Elenge mobali yango azongisi: “Natosaka mibeko wana nyonso; nazangi lisusu nini?”
[21] Yezu azongiseli ye: “Soki olingi ózala moto ya kokoka, kende kotekisa biloko na yo nyonso, pe pesa mbongo na bato bakelelá. Wana nde okozala na bomengo na Likolo. Sima yaka kolanda ngai.”
[22] Kasi tango elenge mobali ayoki maloba wana, akei na mawa, pamba té azalaki na bomengo mingi koleka.
[23] Bongo Yezu alobi na bayekoli na ye boye: “Ya solo, bato ya mbongo bakozala na pasi mingi po na kokota na bokonzi ya Likolo.
[24] Nalobi na bino lisusu: nyama monene oyo babengaka shamó, ekoki kokota na lidusu ya tonga ata moke té! Kasi ezali lisusu pasi mingi koleka po moto ya bomengo ákota na bokonzi ya Nzambe.”
[25] Tango bayekoli bayoki makambo wana, bakamwe mingi pe batuni: “Bongo nani akoki kobika?”
[26] Yezu atali bango pe alobi: “Bato bakoki kosala yango ata moke té, kasi Nzambe akoki kosala makambo nyonso.”
[27] Bongo Piere alobi na ye: “Tala nanu, biso totiki biloko nyonso pe tolandi yo; eloko nini tokozwa?”
[28] Yezu azongiseli bango: “Nalobi na bino, ya solo: Tango Nzambe akosala Likolo ná se ya sika, mokolo wana mwana ya Moto akofanda na Kiti na ye ya lokumu; bino bato zomi na mibale oyo bolandi ngai, bokofanda pe na bakiti zomi na mibale, po na kokata makambo ya bikolo zomi na mibale ya Israel.
[29] Moto nyonso oyo atiki ndako na ye, bandeko na ye, tata ná mama na ye, bana na ye, to bilanga na ye po na kombo na ngai, akozwa biloko yango mbala kama moko (100), pe akozwa bomoi ya seko.
[30] Bato mingi bazali sik'oyo liboso, bakokóma bato ya suka; pe bato mingi bazali sik'oyo na suka, bakokóma bato ya liboso.”