Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:13

[1] Yezu abotamaki na Betleem, na rejion ya Yudea, na tango ya mokonzi Erode. Kaka na mikolo wana banganga oyo batalaka minzoto balongwe na mboka na bango na epai moi ebimaka, pe bakómi na Yeruzalem.

[2] Batuni bato: “Wapi mokonzi ya Bayuda oyo auti kobotama? Tomonaki monzoto na ye na epai moi ebimaka, pe toyei kokumisa ye.”

[3] Tango mokonzi Erode ayoki boye, akómi motema likolo, ye ná bato nyonso ya Yeruzalem.

[4] Abengi bakonzi ya banganga-Nzambe pe balakisi-Mibeko, bongo atuni bango epai wapi Mesia asengeli kobotama.

[5] Bango bazongiseli ye: “Na Betleem, na rejion ya Yudea. Pamba té profete ya Nzambe akòmaká boye:

[6] ‘Yo Betleem, mabelé ya Yuda, ozali mboka ya pamba té na kati ya bavile ya Yuda. Ya solo, mokonzi monene akobima epai na yo, oyo akotambwisa ekolo na ngai Israel.’”

[7] Bongo Erode abengisi banganga na mayele po bato báyeba té, pe atuni bango tango nini monzoto emonanaki.

[8] Na sima atindi bango na Betleem, alobi: “Bókende pe bótuna malamu po na mwana. Bongo soki bomoni ye, bóya koyebisa ngai po ngai pe nákende kokumisa ye.”

[9] Awa bayoki maloba ya mokonzi bakei. Na mbala moko bamoni monzoto oyo bamonaki na epai moi ebimaka. Yango ebandi kokende liboso na bango, tii etelemi na likolo ya ndako oyo mwana azalaki.

[10] Bayoki esengo mingi, tango bamoni monzoto wana.

[11] Bakoti na ndako pe bamoni mwana, ná mama na ye Maria. Bafukami pe bakumisi mwana. Bafungoli biloko na bango, bapesi ye makabo oyo: or, malasi ya kotumba ná mafuta ya mire.

[12] Na sima Nzambe alobeli bango na ndoto 'tè bázonga lisusu epai ya Erode té. Bongo bazongi na mboka na bango na nzela mosusu.

[13] Tango banganga bakei, na sima anjelu ya Nkolo abimeli Jozef na ndoto, pe alobi na ye: “Telema, kamata mwana ná mama na ye. Kima na Ejipte, pamba té Erode azali koluka mwana po áboma ye. Fanda kuna tii tango nakoloba na yo 'tè zonga.”

[14] Kaka na butu wana Jozef atelemi; akamati mwana ná mama na ye, pe akei na bango na Ejipte.

[15] Afandaki kuna tii mokolo Erode akufaki. Makambo wana esalamaki po na kokokisa maloba oyo Nkolo alobaká na monoko ya profete na ye: “Nabengi mwana na ngai álongwa na Ejipte.”

[16] Tango Erode amoni 'tè banganga bakosi ye, asiliki penza. Atindi basoda na Betleem pe na bamboka ya pembeni, po bákende koboma bana mibali nyonso oyo bazalaki na mbula mibale, ná baoyo bakokisi nanu yango té. Asalaki boye pamba té atangaki mikolo oyo elekaki banda tango banganga bamonaki monzoto.

[17] Nyonso wana esalamaki ndenge profete Jeremya alobaká:

[18] “Makelele ezali koyokana na mboka Rama; makelele ya kolela makasi pe ya mawa. Ezali Rashel moto azali kolela bana na ye; aboyi bálongola ye mawa, po bana na ye bakufi.”

[19] Tango Erode akufi, anjelu ya Nkolo abimeli Jozef na ndoto na Ejipte,

[20] alobi na ye: “Telema, kamata mwana ná mama na ye, pe zonga na mboka Israel, pamba té bato oyo bazalaki koluka koboma mwana basi'bakufi.”

[21] Jozef atelemi, akamati mwana ná mama na ye pe akei na mboka Israel.

[22] Kasi tango ayoki 'tè Arkelaus akómi mokonzi ya Yudea na esika ya tata na ye Erode, Jozef abangaki kokende kuna. Nzokande Nzambe alakisi ye na ndoto ndenge asengeli kosala, bongo akei na rejion ya Galilé,

[23] pe afandi na mboka moko kombo na yango Nazaret. Makambo wana esalamaki po na kokokisa maloba oyo baprofete balobaká po na Yezu: “Bakobenga ye moto ya Nazaret.”

Matié — Chapters