[1] Na sima Molimo amemi Yezu na esobe po zabolo ámeka ye.
[2] Mikolo tuku minei (40) mobimba Yezu aliaki té; bongo ayoki nzala.
[3] Zabolo apusani penepene na ye pe alobi: “Soki ozali mwana ya Nzambe, loba na mabanga oyo ébongwana mapa.”
[4] Kasi Yezu azongisi: “Ekòmamá boye: Moto akoki kobikela kaka na mapa té, kasi azalaka na posa ya nyonso oyo Nzambe alobaka.”
[5] Bongo zabolo amemi ye na Yeruzalem, vile ya bosantu. Atie ye likolo ya Ndako ya Nzambe na songe,
[6] pe alobi na ye: “Soki ozali Mwana ya Nzambe, ómibwaka na se. Pamba té ekòmamá boye: ‘Nzambe akotinda ba-anjelu na ye po na yo. Bakoyamba yo na maboko na bango, po likolò na yo étuta na libanga té.’”
[7] Kasi Yezu azongiseli ye: “Ekòmamá lisusu na Mikanda: ‘Komeka Nkolo, Nzambe na yo té.’”
[8] Zabolo amemi ye lisusu na likolo ya ngomba moko ya molai penza, alakisi ye bamboka nyonso ya mokili, pe lokumu ya bakonzi na yango.
[9] Alobi na ye: “Nakopesa yo nyonso wana soki ofukameli ngai pe okumisi ngai.”
[10] Bongo Yezu alobi na ye: “Satan, longwa! Ekòmamá boye: ‘Fukamela Nkolo Nzambe na yo, pe salela bobele ye.’”
[11] Sima zabolo atiki Yezu, bongo ba-anjelu bayei epai na ye pe babandi kosalela ye.
[12] Tango Yezu ayoki 'tè batie Yoane Mobatisi na boloko, akei na Galilé.
[13] Alongwe na Nazaret pe akei kofanda na Kafarnaum, penepene ya laki ya Galilé, na mabelé ya Zebulon pe ya Neftali.
[14] Esalamaki bongo po na kokokisa maloba profete Ezaya alobaká:
[15] “Mabelé ya Zebulon pe ya Neftali, epai ya ebale, na ngambo ya Yordan. Galilé, mboka ya bato bayebi Nzambe té!
[16] Bato oyo bafandi na kati ya molili bamoni moi ya solo! Baoyo bakangamá na molili ya somo, moi engengeli bango.”
[17] Banda tango wana Yezu abandi kosakola boye: “Bóbongola mitema, pamba té Nzambe alingi kotia bokonzi na ye sik'oyo.”
[18] Tango Yezu azalaki kotambola penepene ya laki ya Galilé, amoni baluki-mbisi mibale, kulutu ná leki, Simon (oyo babengaka Piere) pe ndeko na ye André, bazalaki kobwaka monyama na mai.
[19] Yezu alobi na bango: “Bólanda ngai. Bokozala lisusu baluki-mbisi té; nakokómisa bino baluki ya bato.”
[20] Na mbala moko batiki minyama na bango pe balandi Yezu.
[21] Tango Yezu alongwe wana, amoni lisusu bato mibale, kulutu ná leki, Jake ná Yoane, bana ya Zebedé. Bafandaki na kati ya bwatu esika moko ná tata na bango Zebedé, pe bazalaki kobongisa minyama. Yezu abengi bango.
[22] Na mbala moko batiki bwatu ná tata na bango, pe balandi ye.
[23] Yezu atambolaki na Galilé mobimba. Azalaki koteya na bandako ya lisanga, pe kosakola Sango Malamu 'tè Nzambe akotia bokonzi na ye na mokili. Bongo abandaki pe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na maladi ya ndenge na ndenge.
[24] Sango na ye epanzanaki tii na rejion mobimba ya Sirie, pe bamemeli ye bato bazalaki na maladi ya ndenge na ndenge: bato bazalaki na milimo mabe, baoyo bazalaki na maladi ya ndeke, pe bato bakufá makolo. Yezu abikisi bango.
[25] Bato ebele babandaki kolanda ye, bautaki na Galilé, na epai ya Bamboka Zomi, na Yeruzalem, na Yudea, pe na ngambo ya Yordan.