[1] Na tango wana Yezu azalaki koleka na bilanga ya blé; ezalaki Mokolo ya Kopema. Bayekoli na ye bayoki nzala, bongo babandi kobuka bambuma ya blé pe kolia yango.
[2] Awa ba-Farizé bamoni boye, balobi na Yezu: “Tala, bayekoli na yo bazali kosala makambo epekisamá na Mokolo ya Kopema!”
[3] Yezu azongiseli bango: “Bino botangi nanu té makambo David asalaká, tango ye ná bato na ye bayokaki nzala?
[4] Akotaki na Ndako ya Nzambe, bongo ye ná bato na ye baliaki mapa oyo batielaki Nzambe. Nzokande bakokaki kolia yango té, pamba té kaka banganga-Nzambe bato bakoki kolia mapa wana.
[5] Nanu botangi Mibeko ya Moize té? Ekòmamá 'tè banganga-Nzambe oyo basalaka na Ndako ya Nzambe na Mokolo ya Kopema, basalaka lisumu té atako babukaka mobeko ya Mokolo ya Kopema.
[6] Nalobi na bino: makambo bozali komona awa eleki Ndako ya Nzambe.
[7] Pamba té ekòmamá boye: ‘Nalingi bóyokelaka bato mawa, esika 'tè bókozikisela ngai banyama’. Soki boyebaki yango, mbele bolingaki kokweisa bato oyo té; bango basali ata mabe moko té.
[8] Pamba té mwana ya Moto azali Mokonzi ya Mokolo ya Kopema.”
[9] Yezu alongwe esika yango pe akei na ndako ya lisanga.
[10] Kuna ezalaki na moto moko akufá liboko. Bato oyo bazalaki wana baluki nzela ya kofunda Yezu; bongo batuni ye: “Mibeko na biso epesaka nzela ya kobikisa moto na Mokolo ya Kopema to té?”
[11] Yezu azongiseli bango: “Soki moto moko na kati na bino azali kaka na meme moko, pe soki meme ekwei na libulu na Mokolo ya Kopema, akoki kobimisa yango té?
[12] Nzokande moto aleki meme! Boye Mibeko na biso ezali kopesa nzela ya kosala bolamu na Mokolo ya Kopema.”
[13] Bongo Yezu alobi na moto wana: “Tanda liboko na yo!” Ye atandi yango, pe ekómi malamu lokola liboko na ye mosusu.
[14] Ba-Farizé babimi na ndako ya lisanga pe bakei kosala likita po na koluka nzela ya koboma Yezu.
[15] Tango Yezu ayoki makambo yango, alongwe na esika wana, pe bato ebele balandi ye. Abikisi bato nyonso ya maladi,
[16] kasi apekisi bango 'tè bápanza sango na ye té.
[17] Esalamaki bongo po na kokokisa makambo profete Ezaya alobaká:
[18] “Nzambe alobi: Tala mosali na ngai oyo naponá; nalingi ye pe nazali na esengo po na ye. Napesi ye Molimo na ngai, po áyebisa bikolo makambo ngai nalingi.
[19] Akoswana na moto té; akotombola mongongo té; akolobaloba pe na balabala té.
[20] Lititi oyo elembá akobuka yango té; mwinda oyo elingi kokufa akoboma yango té. Na ndenge wana akolongisa makambo ya bosembo;
[21] pe bato ya bikolo nyonso bakotiela ye mitema.”
[22] Bamemelaki Yezu moto moko azalaki na molimo mabe; ye azalaki baba pe akufá miso. Yezu abikisi ye; bongo moto yango abandi koloba pe komona.
[23] Bato nyonso bakamwe penza pe batunani: “Oyo Mwana ya David té?”
[24] Tango ba-Farizé bayoki bongo, balobi: “Moto oyo azali kobengana milimo mabe bobele po Beelzebul, mokonzi ya milimo mabe, apesi ye nguya.”
[25] Kasi Yezu ayebaki makanisi na bango, bongo alobi na bango: “Soki bato ya bokonzi moko bakabwani bango na bango, bokonzi na bango ekokufa. Soki bato ya vile moko to ya libota moko bakabwani, bakoki koumela té.
[26] Bongo soki Satan abengani moto na ye, azali nde kobebisa bokonzi na ye moko; ndenge nini bokonzi na ye ekoki koumela?
[27] Bino bolobi 'tè Beelzebul moto apesi ngai nguya ya kobengana milimo mabe; kasi nani moto apesaka bato na bino nguya ya kobengana yango? Bato na bino bango moko nde bazali kokweisa bino.
[28] Ngai nabenganaka milimo mabe na nguya ya Molimo ya Nzambe; elakisi 'tè Nzambe asi'abandi kotia bokonzi na ye na kati na bino.
[29] “Moto oyo alingi kokota na ndako ya elombe po áyiba biloko na ye, asengeli liboso kokanga elombe wana na singa; na sima akoki koyiba biloko na ye nyonso.
[30] “Moto oyo alandaka ngai té, azali koboya ngai; pe oyo asalisaka ngai té po na kosangisa bato, azali kopanza bango.
[31] Yango wana nalobi na bino: bato nyonso oyo basali masumu pe batsioli Nzambe, bakoki kozwa bolimbisi; kasi oyo atsioli Molimo Mosantu akoki kozwa bolimbisi té.
[32] Moto oyo atsioli Mwana ya Moto, akoki kozwa bolimbisi; kasi oyo atsioli Molimo Mosantu akoki kozwa bolimbisi té, ézala na tango azali na bomoi to sima ya liwa na ye.”
[33] “Soki bokoni nzete ya malamu, bokozwa mbuma ya malamu; soki bokoni nzete ya mabe, bokozwa mbuma ya mabe. Pamba té bayebaka nzete na mbuma na yango.
[34] Bino banyoka! Lokola bozali bato mabe, ndenge nini bokoki koloba makambo ya malonga? Moto nyonso abimisaka makambo oyo etondi na motema na ye.
[35] Moto malamu abimisaka makambo ya malamu oyo ezali na motema na ye; moto mabe abimisaka makambo ya mabe oyo ezali na motema na ye.
[36] Nalobi na bino: mokolo Nzambe akokata makambo ya bato, akosambisa bango po na maloba nyonso ya pamba-pamba oyo ebimaka na minoko na bango.
[37] Maloba na yo nde moto ekolongisa yo to ekokweisa yo.”
[38] Bongo balakisi-Mibeko mosusu ná ba-Farizé balobi na Yezu: “Moteyi, tolingi ólakisa biso elembo moko.”
[39] Yezu azongiseli bango boye: “Ndenge nini bato oyo bazali kosenga elembo! Bazali bato mabe pe batosaka Nzambe té. Nzambe akolakisa bino kaka elembo moko: oyo ya profete Jonas.
[40] Pamba té ndenge Jonas asalaki mikolo misato na libumu ya mbisi ya monene, se bongo pe mwana ya Moto akosala mikolo misato na se ya mabelé.
[41] Mokolo Nzambe akokata makambo ya bato, bato ya Ninive bakoya kofunda bino bato ya tango oyo, po bango babongolaki mitema tango bayokaki mateya ya Jonas. Kasi oyo azali awa, aleki Jonas.
[42] Mokolo Nzambe akokata makambo ya bato, mokonzi-mwasi ya mboka Saba akoya kofunda bino, po ye alongwaki mosika po na koya koyoka maloba ya mayele ya Salomon. Kasi oyo azali awa, aleki Salomon!”
[43] “Soki molimo mabe etiki nzoto ya moto, ekendeke kotelengana na esobe po na koluka esika ya kopema. Soki ezwi esika ya kopema té,
[44] emilobaka: ‘Nakozongela moto oyo natikaki; ye azali lokola ndako na ngai.’ Kasi tango molimo ezongelaka moto yango, ekutaka ye akómi lokola ndako oyo bakombi pe babongisi malamu, kasi ezangi bato.
[45] Bongo ekendeke kozwa milimo sambo mosusu oyo eleki yango na mabe; pe yango nyonso eyaka nzela moko kofanda na nzoto ya moto wana. Boye suka na ye ekómaka mabe mingi koleka ya liboso. Ekozala ndenge moko po na bino, bato ya mabe.”
[46] Tango Yezu azalaki koloba na bato, mama na ye ná bandeko na ye bayei, batelemaki na libanda; babandi koluka nzela ya kosolola na ye.
[47] Moto moko alobi na Yezu: “Tala, mama na yo ná bandeko na yo bazali na libanda, pe balingi kosolola na yo.”
[48] Yezu azongiseli moto wana: “Mama na ngai nani? Bandeko na ngai banani?”
[49] Bongo alakisi bayekoli na ye na liboko, pe alobi: “Bótala, mama na ngai pe bandeko na ngai, bango oyo!
[50] Pamba té moto asalaka makambo Tata na ngai ya Likolo alingaka, ye nde azali ndeko na ngai ya mobali, ndeko na ngai ya mwasi pe mama na ngai.”