Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 7:09

[1] Tango Yezu abimi na Ndako ya Nzambe, bayekoli bayei penepene na ye, balobi: “Tala nanu ndenge batòngá Ndako ya Nzambe!”

[2] Bongo Yezu azongiseli bango: “Bomoni yango nyonso? Nalobi na bino, ya solo: libanga ata moko té ekotikala na esika ezali; nyonso wana bakopanza yango.”

[3] Bongo Yezu akei kofanda na Ngomba ya ba-Olive. Bayekoli na ye bayei bango moko kaka kotuna ye, balobi: “Yebisa biso tango nini makambo yango ekosalama? Elembo nini ekolakisa 'tè olingi koya kotia bokonzi na yo, pe suka ya mokili ekómi penepene?”

[4] Yezu azongiseli bango: “Bókeba! Moto moko té ákosa bino!

[5] Pamba té bato ebele bakoya na kombo na ngai, bakoloba: ‘Nazali Mesia!’ pe bakokosa bato mingi.

[6] Bokoyoka 'tè bitumba ebimi na bamboka ya penepene pe ya mosika. Bóbanga té. Makambo yango esengeli koya, kasi wana ekozala nanu suka té.

[7] Ya solo, bitumba ekobima na kati ya bikolo pe na kati ya bamboka. Epai na epai nzala ekongala, pe mabelé ekoningana.

[8] Yango nyonso wana ekozala kaka lokola ebandeli ya pasi mwasi ayokaka na tango ya kobota.

[9] “Na tango wana bakobanda koteka bino, po na komonisa bino pasi pe koboma bino. Bikolo nyonso ekozala koyina bino po na kombo na ngai.

[10] Na mikolo wana bato mingi bakosundola bondimi, bakobanda kotekana pe koyinana.

[11] Baprofete ebele ya lokuta bakobima pe bakokosa bato mingi.

[12] Lokola makambo ya mabe ekoleka, bolingo ya bato ebele pe ekosila.

[13] Kasi moto oyo akokanga motema tii na suka, ye nde akobika.

[14] Bakosakola Sango Malamu oyo ya bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba, po bikolo nyonso éyoka yango. Bongo na tango wana suka ekoya.”

[15] “Profete Daniel akòmaká 'tè Lisumá ya somo ekopikama na Esika ya bosantu.” (Moto azali kotanga makambo oyo, áluka koyeba tina na yango!)

[16] “Mokolo bokomona yango, bato oyo bakozala na rejion ya Yudea basengeli kokima epai ya bangomba.

[17] Moto oyo akozala libanda ázonga té na kati ya ndako po na kokamata biloko na ye.

[18] Pe oyo akozala na bilanga ázonga na ndako té po na kokamata kazaka na ye.

[19] Mawa na basi oyo bakozala na bazemi, ná baoyo bakomelisa bana mabéle na tango wana!

[20] Bóbondela Nzambe po mokolo bokokima ézala na tango ya malili té to na Mokolo ya Kopema!

[21] Pamba té na tango wana pasi ya somo ekozala. Pasi ya ndenge wana emonaná nanu té uta ebandeli ya mokili tii sik'oyo; ekomonana pe lisusu té.

[22] Soki Nzambe ákatelaka bato mikolo ya pasi wana té po ékóma mokuse, mbele ata moto moko té akokaki kobika. Kasi Nzambe akatá yango po na bato oyo ye aponá.

[23] “Na tango wana, soki moto alobi na bino: ‘Bótala! Mesia azali awa!’ to: ‘Azali kuna!’ bóndimela ye té!

[24] Pamba té bamesia ya lokuta ná baprofete ya lokuta bakobima ebele; bakosala makamwisi minene ya ndenge na ndenge po, soki nzela ezali, bákosa ata bato oyo Nzambe aponá.

[25] Nabanza boyoki. Nasi'nayebisi bino makambo wana libela!

[26] “Yango wana soki balobi na bino: ‘Bótala! Azali na esobe!’ bókende té. Soki pe balobi: ‘Bótala! Abombani awa!’ bóndima té.

[27] Pamba té kake eutaka na likolo pe engengisaka mokili mobimba, banda na epai moi ebimaka tii na epai elalaka. mwana ya Moto akoya bobele ndenge wana.

[28] Epai ebembe ezali, bandeke oyo eliaka bibembe ekosangana wana.”

[29] “Soki pasi ya mikolo wana esili, mosusu ya koleka ekoya noki. Moi ekokóma molili, sanza ekongenga lisusu té; minzoto ekokweya na se; pe nyonso oyo ezali na likolo ekoningana.

[30] Bongo elembo ya mwana ya Moto ekomonana na Likolo. Na tango wana bato ya bikolo nyonso ya mokili bakolela, tango bakomona Mwana ya Moto azali koya na likolo ya mapata, na nguya pe na lokumu mingi.

[31] Kelelo monene ekobeta; akotinda ba-anjelu bipai nyonso ya mokili mobimba, básangisa bato oyo aponá.”

[32] “Bókanisa nzete ya figi. Soki bitape na yango ekómi petepete, pe soki makasa na yango ebandi kobima, boyebaka 'tè eleko ya kobuka mbuma ekómi penepene.

[33] Bobele ndenge wana, tango bokomona makambo yango, bóyeba 'tè etikali moke mwana ya Moto áya.

[34] Nalobi na bino, ya solo: bato ya tango oyo bakomona makambo nyonso wana na miso.

[35] Likolo ná se ekoleka; kasi maloba na ngai ekoleka ata moke té.”

[36] “Moto moko té ayebi mokolo to ngonga makambo wana ekosalama, ata ba-anjelu ya Likolo, ézala kutu ata Mwana. Kaka Tata ye moko moto ayebi yango.

[37] Mokolo Mwana ya Moto akoya, makambo ekosalama ndenge esalamaká na tango ya Noé.

[38] Liboso 'tè mai éya kodindisa mokili mobimba, bato bazalaki kolia pe komela, bazalaki kobalana tii mokolo Noé akotaki na masuwa.

[39] Bazalaki kokanisa eloko moko té, tii tango mai eyaki pe ebomi bango nyonso. Ekozala bobele ndenge wana tango Mwana ya Moto akoya.

[40] Soki mibali mibale bakozala na elanga, bakokamata moko pe bakotika mosusu.

[41] Soki basi mibale bakozala konika blé, bakokamata moko pe bakotika mosusu.

[42] Bókengela malamu, po mokolo Mokonzi na bino akoya, boyebi yango té.

[43] Bókanisa nanu! Soki kolo ya ndako ayebi tango moyibi akoya na butu, akolala té, kasi akosala nyonso po bábuka ndako na ye té.

[44] Yango wana, bino pe bózalaka na ekenge tango nyonso, pamba té Mwana ya Moto akoya na ngonga oyo bino boyebi té.”

[45] “Bózalaka lokola mosali ya malamu pe ya mayele, oyo mokonzi na ye atie kapita ya basali na ye, po ápesaka bango bilei na tango ekoki.

[46] Esengo mingi na mosali wana soki mokonzi azongi pe akuti ye azali kosala mosala.

[47] Nalobi na bino, ya solo: mokonzi wana akotia biloko na ye nyonso na maboko na ye.

[48] Nzokande soki mosali yango azali mabe pe amilobi: ‘Mokonzi na ngai azali koya noki té’,

[49] bongo abandi kobeta basali mosusu, pe azali kolia pe komela esika moko ná bato balangwaka masanga.

[50] Bongo mokonzi na ye akozonga na mokolo mosali azali kozela ye té, pe na ngonga ye ayebi té.

[51] Akopesa ye etumbu moko ya somo; akotia ye na boloko epai ya bato ya lokuta, esika balelaka pe baliaka mino.”

Matié — Chapters