Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:48

[1] Awa tobiki, toyoki 'tè babengaka esanga wana Malte.

[2] Bato ya esanga basali biso malamu penza. Lokola mbula ebandaki konoka pe malili ezalaki, bapelisi móto pe babengi biso nyonso tópusana penepene na yango.

[3] Polo alokoti liboke ya koni pe abwaki yango na móto. Nyoka moko ebimi po na molunge, ekangami na liboko na ye.

[4] Awa bato ya esanga bamoni 'tè nyoka etiki liboko ya Polo té, balobani bango na bango: “Tembe té, moto oyo azali mobomi. Atako abikaki na ebale, etumbu na ye ezali kaka.”

[5] Kasi Polo aningisi liboko, nyoka ekwei na móto pe ayoki ata pasi té.

[6] Nzokande bato yango bazalaki kozela 'tè Polo ávimba to ákweya, pe ákufa na mbala moko. Kasi awa bazeli mingi pe bamoni 'tè likambo ya mabe ekweeli ye té, babongoli makanisi na bango pe babandi koloba 'tè: “Moto oyo azali moko na kati ya banzambe.”

[7] Penepene ya esika yango mabelé ya mokonzi ya esanga ezalaki wana, kombo na ye Publius. Ye ayambi biso na boboto pe tolali epai na ye mikolo misato.

[8] Tata ya Publius azalaki kolala na mbeto, azalaki na fievre pe pulupulu. Polo akei kotala ye; abondeli Nzambe, atieli ye maboko pe abikisi ye.

[9] Na sima na yango, bato mosusu ya esanga oyo bazalaki na maladi bayei pe babiki.

[10] Bakumisi biso mingi penza. Tango tolongwe kuna, bapesi biso biloko tozalaki na yango posa po na mobembo.

[11] Tosali sanza misato na esanga ya Malte, na sima tokoti na masuwa moko oyo elekisaki eleko ya malili kuna. Ezalaki masuwa ya Aleksandri, kombo na yango “Banzambe ya mapasa.”

[12] Tokiti na vile ya Sirakuze pe tofandi wana mikolo misato.

[13] Tango tolongwe kuna tolandi ngambo ya esanga tii tokómi na Regio. Na mokolo elandaki, mopepe moko ya kitoko eyei komema masuwa na epai ya likolo, bongo na mikolo mibale tokómi na Puzole.

[14] Kuna tokutani ná bandeko, pe basengi biso tófanda ná bango póso moko; bongo sima tokei tii na Rome.

[15] Bandeko ya Rome bayokaki sango na biso, bayei kozela biso na Zando ya Apius, pe na esika babengaka “ya Bandako Misato.” Awa Polo amoni bango, azwi molende pe apesi Nzambe mersi.

[16] Tango tokómi na Rome, bapesi Polo nzela ya kozwa esika ya kofanda bobele ye moko, ná soda oyo azalaki kokengela ye.

[17] Na sima ya mikolo misato Polo abengi bato ya lokumu ya Bayuda ya Rome. Tango basangani, alobi na bango: “Bandeko, atako nasalaki mabe té na ekolo na biso to na bizaleli ya bakoko na biso, Bayuda ya Yeruzalem bakangaki ngai pe bapesaki ngai na maboko ya bato ya Rome.

[18] Bango basambisaki ngai pe balingaki kotika ngai, pamba té bamonaki tina ya kokatela ngai etumbu ya liwa té.

[19] Kasi Bayuda baboyaki, bongo namonaki nzela mosusu té, yango wana nasengaki 'tè mokonzi monene ya Rome ákata likambo na ngai. Kasi nazali na makanisi ya kobebisa lokumu ya ekolo na ngai té.

[20] Tala tina penza nasengaki námona bino pe tósolola, pamba té bakangi ngai minyololo likolo ya elaka ya Nzambe oyo bato ya Israel batielaka mitema.”

[21] Bango bazongiseli ye: “Tozwaki ata mokanda moko té euti na rejion ya Yudea po na yo; pe na kati ya bandeko oyo bayei awa, moko té ayei na sango na yo, to alobi likambo ya mabe po na yo.

[22] Kasi tolingi óyebisa biso makambo nyonso yo ozali kokanisa. Pamba té toyebi 'tè bipai nyonso bazali koboya lingomba na yo.”

[23] Bapesanaki elaka ná Polo, pe mokolo yango bayei mingi kotala ye na ndako. Banda tongo tii pokwa ateyi bango, po na bokonzi ya Nzambe pe atie molende po bándimela Yezu; azalaki kozwa mateya yango na Mikanda ya Mibeko ya Moize pe na Mikanda ya baprofete.

[24] Bamosusu bandimaki maloba na ye, kasi bamosusu baboyaki.

[25] Tango batiki ye, bazalaki koyokana té bango na bango. Polo abakisi bobele boye: “Molimo Mosantu asakolaká ya solo na bakoko na bino, pamba té profete Ezaya alobaká boye:

[26] ‘Kende epai ya bato wana pe loba na bango: Bokoyoka malamu, kasi bokoyeba tina té; bokotala malamu, kasi bokomona té.

[27] Pamba té mitema ya bato oyo ekómi makasi; bazipi matoi pe bakangi miso, po miso na bango émona té, matoi na bango éyoka té, bázwa mayele té, pe bábongola mitema té. Bongo ndenge nini nábikisa bango?’”

[28] Bongo Polo asukisi alobi: “Nazali koyebisa bino 'tè sik'oyo Nzambe atindeli bato ya bikolo mosusu sango 'tè akobikisa bango. Boye bango bakoyokela ye.”

[29] [Awa Polo alobi bongo, Bayuda wana bakei pe babandi kotiana tembe makasi penza.]

[30] Polo asalaki mbula mibale mobimba na ndako ya kofutela. Kuna abandaki koyamba bato nyonso oyo bazalaki koya kotala ye.

[31] Azalaki koteya sango ya Nkolo Yezu Kristo na molende, pe kosakola po na bokonzi ya Nzambe. Moto moko té azalaki kopekisa ye.

Misala — Chapters