Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:58

[1] Na vile ya Ikonium, Polo ná Barnabas bakoti lisusu na ndako ya lisanga ya Bayuda. Maloba na bango esepelisaki bato, bongo Bayuda ná bato ya bikolo mosusu ebele bakómi kondima.

[2] Kasi Bayuda oyo baboyaki kondima bapesi toli ya mabe na bato ya bikolo mosusu, po bázwela bandeko makanisi ya mabe.

[3] Ata bongo, Polo ná Barnabas bafandaki mingi na vile ya Ikonium. Nguya ya Nkolo epesi bango molende. Nkolo amonisi 'tè makambo oyo bazalaki kosakola po na bolamu na ye ezali ya solo, pamba té apesi bango nguya ya kosala makamwisi ya ndenge na ndenge.

[4] Bato ya vile wana bayei kokabwana; bamosusu bakei epai ya Bayuda oyo baboyaki kondima, bamosusu epai ya bantoma.

[5] Bongo Bayuda wana pe bato ya bikolo mosusu ná bakonzi na bango, babandi komilengela po na konyokola Polo ná Barnabas pe koboma bango na mabanga.

[6] Awa Polo ná Barnabas bayoki boye, bakimi na mboka Likaonie, na vile ya Listre, Derbe, pe na bapembeni na yango.

[7] Kuna babandi kosakola Sango Malamu.

[8] Na Listre ezalaki na moto moko akufá makolo; banda abotamá nanu atambolá té.

[9] Azalaki koyoka maloba ya Polo. Polo atali ye nyee pe amoni 'tè azali na bondimi po na kobika,

[10] bongo alobi na mongongo makasi: “Telema, tanda makolo na yo.” Moto wana apumbuki pe abandi kotambola.

[11] Tango bato bamoni makambo Polo asali, bagangi na monoko na bango ya mboka: “Banzambe ezwi nzoto ya bato pe ekiteli biso.”

[12] Balobi Barnabas azali nzambe monene “Zeus,” pe Polo “Ermes,” pamba té Polo moto azalaki kosakola.

[13] Ndako oyo basambelaka nzambe Zeus ezalaki liboso ya esika bakotelaka na vile. Nganga ya Zeus amemi bangombe ya mibali kuna, ná baflere. Balingaki kobomela yango bantoma, ndenge bamesaná kokumisa banzambe.

[14] Awa Barnabas ná Polo bayoki boye, somo esali bango, bapasoli bilamba na bango, bakei mbangu epai ya bato pe babeleli:

[15] “Baninga! Bozali kosala nini? Biso tozali bato lokola bino. Toyeeli bino Sango Malamu 'tè bótika makambo oyo ya bozoba, pe bóya epai ya Nzambe ya bomoi oyo asalá Likolo ná se, ná ebale pe biloko nyonso ezali na kati.

[16] Na tango ya kala ye atikaká bato ya bikolo nyonso bálanda banzela na bango moko.

[17] Kasi ata bongo, azangaka té kolakisa bolamu na ye. Anokiselaka bino mbula oyo eutaka epai na ye na Likolo, pe apesaka bino bambuma na tango na yango, pe bilei oyo esepelisaka mitema na bino.”

[18] Atako bantoma balobaki boye, bamonaki pasi po na kopekisa bato bápesa bango mabonza.

[19] Nzokande na tango wana Bayuda mosusu bautaki na Antioshe ya Pizidie pe na Ikonium, bapesi bato toli ya mabe. Babambi Polo mabanga, sima na yango babendi ye pe babimisi ye na vile, po bakanisaki 'tè akufi.

[20] Kasi tango bayekoli bayei kozinga ye, atelemi pe azongi na vile. Tongo etani, akei na vile ya Derbe ná Barnabas.

[21] Bongo Polo ná Barnabas basakoli Sango Malamu na vile ya Derbe, pe bazwi bayekoli mingi kuna. Sima bazongi lisusu na Listre, na Ikonium, pe na Antioshe ya Pizidie.

[22] Balendisi mitema ya bayekoli, po bákangama kaka na bondimi. Balobi na bango: “Tosengeli komona pasi mingi po na kokóma bato ya bokonzi ya Nzambe.”

[23] Na Eklezya moko moko Polo ná Barnabas baponi bambuta-muntu, bazalaki kobondela pe komilalisa nzala, bongo batiki bango na maboko ya Nkolo oyo bango bandimaki.

[24] Sima na yango bakatisi mabelé ya Pizidie pe bakómi na Pamfilie.

[25] Basakoli maloba ya Nzambe na Perje pe bakei na libongo ya Atalie.

[26] Bongo bakoti na masuwa po na kokende na Antioshe, pamba té kuna nde esika bandimi babondelaki Nzambe ábatela bango na bolamu na ye, pe batindaki bango mosala oyo bauti kosilisa sik'oyo.

[27] Tango bakómi na Antioshe, basangisi bato ya Eklezya pe balakisi bango makambo nyonso Nzambe asalaki na bango, pe ndenge afungolaki nzela ya bondimi na bato ya bikolo mosusu.

[28] Baumelaki mikolo mingi kuna esika moko ná bayekoli.

Misala — Chapters