Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 7:51

[1] Tango tokabwani ná bango, tokoti na masuwa, tokei na esanga ya Kos, pe sima ya mokolo moko tokómi na Rode. Awa tolongwe wana, tokei na Patara.

[2] Kuna tomoni masuwa moko elingaki kokende na Fenisie; bongo tokoti pe tokei.

[3] Tango tokómi penepene ya esanga ya Shipre, totiki yango na liboko ya mwasi, tolandi nzela na biso epai ya Sirie pe tokiti na Tir, esika balingaki kobimisa biloko na masuwa.

[4] Tokei koluka bayekoli pe tofandi epai na bango póso mobimba. Bango balobi na Polo na nguya ya Molimo Mosantu 'tè ákende na Yeruzalem té.

[5] Kasi awa mikolo na biso ekoki, tokei. Bango nyonso bayei kotika biso na ndelo ya mboka, ná basi na bango pe bana. Tofukami na libongo pe tosambeli.

[6] Awa topesani mbote ya suka, tokoti na masuwa, bongo bango bazongi na mboka.

[7] Tolongwe na Tir, tokei tii na Pitolemais, pe na ndenge wana tosilisi mobembo na biso na masuwa. Kuna topesi bandeko mbote pe tofandi ná bango mokolo moko.

[8] Tongo etani, tokei tii na Sezaré. Kuna tokoti na ndako ya Filipe, moteyi ya Sango Malamu, pe tolali epai na ye. Ye azalaki moko na kati ya basalisi sambo ya bantoma.

[9] Azalaki na bana minei ya basi oyo bayebi nzoto ya mobali té. Bango nyonso babandaki kosakola na nguya ya Molimo Mosantu.

[10] Awa tofandi mikolo mingi, profete moko kombo na ye Agabus ayei epai na biso, autaki na rejion ya Yudea. Ye akamati mokaba ya Polo, amikangisi makolo ná maboko, pe asakoli boye: “Molimo Mosantu alobi: Oyo ezali ndenge Bayuda ya Yeruzalem bakokanga kolo ya mokaba oyo; pe bakopesa ye na maboko ya bato ya bikolo mosusu.”

[12] Awa toyoki boye, biso moko ná bato ya Sezaré tobondeli Polo po ákende na Yeruzalem té.

[13] Kasi ye azongisi: “Po na nini bozali kolela pe bolingi kobongola makambo ngai nakanaki? Nasi'namibongisi po bákanga ngai pe báboma ngai na Yeruzalem po na kombo ya Nkolo Yezu.”

[14] Lokola tokokaki kobongola makanisi na ye té, totiki kobondela ye pe tolobi: “Tika ésalama kaka ndenge Nkolo alingi.”

[15] Na sima ya mwa-mikolo, tomilengeli pe tokei na Yeruzalem.

[16] Bayekoli mosusu ya Sezaré bakei ná biso nzela moko. Bango bazweli biso esika ya kolala epai ya moto moko ya Shipre kombo na ye Nazon; ye azalaki moyekoli banda kala.

[17] Tango tokómi na Yeruzalem, bandeko bayambi biso na esengo.

[18] Tongo etani, Polo akei nzela moko ná biso epai ya Jake. Bambuta-muntu nyonso ya Eklezya basanganaki kuna.

[19] Polo apesi bango mbote pe ayebisi bango polele makambo nyonso Nzambe akokisaki na maboko na ye, epai ya bato ya bikolo nyonso.

[20] Awa bayoki ye, bakumisi Nzambe. Bongo balobi na Polo: “Omoni, ndeko, Bayuda nkoto na nkoto bakómi bandimi. Bango nyonso bazali kotosa Mibeko na motema moko.

[21] Kasi bayokaki 'tè yo oteyaka Bayuda oyo bafandaka na bamboka ya bapaya, básundola Mibeko ya Moize, bátika kokata bana na bango nzoto, pe bálanda lisusu bizaleli ya Bayuda té.

[22] Tembe té, bakoyoka kaka 'tè yo osi'okómi awa. Bongo tósala nini?

[23] Ebongi ósala kaka makambo tokoloba na yo. Tozali awa na bato minei oyo balingi kosilisa mikolo na bango ya elaka bapesaki na Nzambe.

[24] Tango na bango ya kokokola mitú esi'ekoki; kende ná bango nzela moko po na komibongisa ndenge mibeko ezali kotinda, pe futela bango mbongo ya mabonza. Boye bato nyonso bakoyeba 'tè makambo bayokaki po na yo ezali ya solo té, pe bakomona 'tè otosaka Mibeko ya Moize.

[25] Po na makambo etali bandimi ya bikolo mosusu, tokolanda bobele mikano oyo tokòmelaki bango: Banyama bapesi mabonza na banzambe ya bikeko, to oyo babomi na kofina kingo pe ná makila nyonso, bália yango té; pe báboya mabala oyo Mibeko ezali kopekisa.”

[26] Bongo sima ya mokolo moko Polo amemi bato minei wana, akei na Ndako ya Nzambe, pe abandi mokolo ya liboso ya komibongisa, nzela moko ná bango. Na sima akei koyebisa banganga-Nzambe mokolo bakosilisa komibongisa; pamba té sima ya mikolo sambo basengelaki kopesa mabonza po na moko moko na bango.

[27] Etikalaki moke mikolo sambo wana ésila, Bayuda ya rejion ya Azie, bamoni Polo na Ndako ya Nzambe, batindi bato nyonso bátombokela ye. Bakangi ye,

[28] pe bazalaki koganga boye: “Bato ya Israel, bóya kosalisa biso! Ye oyo moto azali koteya bato nyonso bipai na bipai, azali kobebisa lokumu ya ekolo ya Israel, ya Mibeko ya Moize pe ya Ndako ya Nzambe. Sik'oyo ayei kutu kokotisa bato ya bikolo mosusu na Ndako ya Nzambe, pe na ndenge wana abebisi esika oyo ya bosantu.”

[29] Balobaki boye po bamonaki Trofime ya Efeze azalaki na Yeruzalem ná Polo, pe bakanisaki 'tè akotisi ye na Ndako ya Nzambe.

[30] Mboka mobimba ekoti mobulu, pe bato nyonso bayei mbangu na esika wana. Bakangi Polo, babimisi ye na Ndako ya Nzambe, pe na mbala moko bakangi baporte.

[31] Tango balingaki koboma Polo, sango ekómi epai ya mokonzi ya basoda ya Rome 'tè mobulu ekoti na Yeruzalem mobimba.

[32] Asali noki penza, akamati basoda ná bakomandan, pe bakei mbangu epai bato batondanaki. Awa bato bamoni basoda ná mokonzi na bango, batiki kobeta Polo.

[33] Bongo mokonzi ya basoda apusani penepene ya Polo, akamati ye pe atindi 'tè bákanga ye minyololo mibale. Na sima atuni bato soki ye azali nani, pe likambo nini asali.

[34] Kasi moto na moto azalaki koganga na ndenge na ye. Lokola mokonzi ya basoda akokaki koyeba makambo ya solo té po na mobulu, atindi bámema Polo na lopango ya basoda.

[35] Tango Polo akómi na eskalié, basoda bakumbi ye po na kanda ya bato.

[36] Pamba té bato nyonso bazalaki kolanda ye pe koganga: “Boma ye!”

[37] Tango balingaki kokotisa ye na lopango ya basoda, Polo alobi na mokonzi ya basoda: “Okoki kopesa ngai nzela nálobela yo mwa-likambo?” Mokonzi ya basoda atuni ye: “Oyebi monoko ya grek?

[38] Ezali yo té moto ya Ejipte oyo akotisaki mobulu na mikolo eleki, pe akimaki na esobe ná bato 4.000 oyo bazalaki na bibundeli na maboko?”

[39] Polo azongisi: “Ngai nazali Moyuda, nabotami na Tarse na mboka Silisie. Nazali sitwayen ya vile moko ya lokumu. Nabondeli yo, ópesa ngai nzela nálobela bato.”

[40] Mokonzi ya basoda apesi ye nzela. Polo atelemi na eskalié, pe atomboli liboko po bato bátika koganga. Awa bango bafandi nyee, abandi koloba na bango na monoko ya Bayuda:

Misala — Chapters