Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 9:26

[1] Na kati ya Eklezya ya Antioshe ezalaki na baprofete pe bateyi: Barnabas, Simeon oyo babengaka Moto Mwindu, Lusius ya Sirene, Manaen oyo akolaki esika moko ná Erode, motambwisi ya Galilé, pe Saul.

[2] Mokolo moko na tango bazalaki kosambela pe komilalisa nzala, Molimo Mosantu alobi na bango: “Bóponela ngai Barnabas ná Saul po básala mosala oyo nabengelaki bango.”

[3] Bongo bamilalisi nzala, basambeli pe batieli Barnabas ná Saul maboko; sima na yango batiki bango bákende.

[4] Lokola Molimo Mosantu atindi Barnabas ná Saul, bakómi na libongo ya Selesie; kuna bakoti na masuwa pe bakei na esanga ya Shipre.

[5] Tango bakómi na mboka Salamine, babandi kosakola maloba ya Nzambe na bandako ya lisanga ya Bayuda. Yoane Marko pe azalaki kosalisa bango.

[6] Batamboli esanga mobimba, bakómi na Pafos. Kuna bamoni Moyuda moko azalaki nganga-kisi pe amitiá profete, kombo na ye Bar-Yezu.

[7] Azalaki kofanda epai ya motambwisi ya esanga, moto moko ya mayele, kombo na ye Sergius Polus; ye abengisi Barnabas ná Saul po azalaki na posa ya koyoka maloba ya Nzambe.

[8] Kasi nganga-kisi wana Bar-Yezu, kombo mosusu Elimas, (yango elakisi: nganga) abandi kotiana tembe ná bango, pe ameki kopekisa Sergius Polus po ándima té.

[9] Kaka na tango wana Molimo Mosantu akiteli Saul (kombo na ye mosusu Polo); bongo ye atali nganga-kisi nyee

[10] pe alobi: “Yo moto otondá na mayele mabe pe na lokuta, moninga ya zabolo, monguna ya makambo nyonso ya malamu! Okotika té kobebisa banzela ya malamu ya Nkolo?

[11] Sik'oyo yoka! Nkolo akopesa yo etumbu; miso na yo ekokufa pe okomona lisusu moi té tii mokolo ye akolinga.” Na mbala moko miso na ye ekufi, akómi komona bobele molili, pe abandi kobalukabaluka po na koluka moto oyo akoki kosimba ye na liboko.

[12] Tango Sergius Polus amoni makambo oyo elekaki, andimi, pamba té akamwaki mingi po na mateya ya Nkolo.

[13] Polo ná baninga na ye bakoti na masuwa na Pafos pe bakei na Perje ya Pamfilie. Yoane Marko atiki bango kuna pe azongi na Yeruzalem.

[14] Balandi mobembo na bango, balongwe na Perje pe bakómi na Antioshe ya Pizidie. Na Mokolo ya Kopema bakoti na ndako ya lisanga pe bafandi.

[15] Sima ya kotanga mikanda ya Mibeko pe ya baprofete, bakonzi ya ndako ya lisanga batindi bato po bákende koloba na bango: “Bandeko, soki bozali na maloba ya kolendisa bato, bóloba.”

[16] Polo atelemi, asali elembo na liboko po bato báfanda nyee, pe alobi: “Bato ya Israel pe bino bato bosambelaka Nzambe na biso, bóyoka!

[17] Nzambe ya ekolo na biso Israel aponaká bakoko na biso. Tango bazalaki na Ejipte, Nzambe akómisaki bango ekolo monene pe abimisaki bango kuna na nguya na ye.

[18] Akangaki motema po na bango mbula tuku minei (40) mobimba na esobe.

[19] Abomaki bikolo sambo na Kanán pe apesaki mabelé na bango na bato na ye.

[20] Nyonso wana esali mbula 450. “Na sima na yango apesaki bakoko na biso bilombe tii na tango ya profete Samuel.

[21] Na eleko wana basengi Nzambe ápesa bango mokonzi, pe ye aponeli bango Saul, Mwana ya Kish, moto ya libota ya Benjamen. Ye asalaki mbula tuku minei (40) na bokonzi;

[22] sima, Nzambe alongoli ye, pe atie David ázala mokonzi na bango. Alobaki boye po na ye: ‘Naponi David, mwana ya Jesé, nasepeli na ye mingi. Ye akosala makambo nyonso oyo ngai nalingi.’

[23] Bongo na eleko na biso atiaki moto moko ya libota ya David ndenge alakaká; moto yango ezali Yezu, Mobikisi ya bato ya Israel.

[24] Liboso 'tè Yezu áya, Yoane Mobatisi asakolaki pe abengaki bato nyonso ya Israel po bábongola mitema pe bázwa batisimo.

[25] Tango Yoane alingaki kosilisa mosala na ye, alobi: ‘Moto oyo bino bozali kozela, ezali ngai té. Kasi ye azali koya sima na ngai. Nakoki kutu té kofungola basinga ya basandale na ye.’

[26] “Bino bandeko, bana ya Abraham, ná bino bato bosambelaka Nzambe na biso, bóyoka. Nzambe atindeli biso maloba oyo po tóbika.

[27] Nzokande bato ya Yeruzalem pe bakonzi na bango bayebaki Yezu té; bayebaki pe tina ya mikanda ya baprofete té, oyo batangaka Mikolo nyonso ya Kopema. Kasi bakokisaki makambo yango tango basambisaki Yezu.

[28] Atako bamonaki tina ya kokatela ye etumbu ya liwa té, basengaki na Pilate ábomisa ye.

[29] Awa basilisi makambo oyo ekòmamá po na ye, balongoli ye na kuruze pe bakundi ye.

[30] Kasi Nzambe asekwisi ye.

[31] Mikolo mingi Yezu abimelaki bato oyo bazalaká ná ye banda Galilé tii na Yeruzalem. Pe atindaki bango báyebisa bato ya Israel makambo nyonso wana.

[32] “Biso toyeeli bino Sango oyo ya Malamu: Nzambe akokisi makambo alakaká na bakoko na biso.

[33] Akokisi yango sik'oyo po na biso bana na bango; asekwisi Yezu ndenge ekòmamá na Nzembo ya mibale: ‘Ozali mwana na ngai, ngai moto naboti yo lelo.’

[34] Ya solo, asekwisi ye po ábeba ata mokolo moko té; pamba té alobaká boye: ‘Nakokokisela bino po na seko elaka ya bosantu oyo napesaká na David.’

[35] Yango wana, bakòmá pe na Nzembo mosusu: ‘Okolinga té 'tè ngai moto na yo nábeba.’

[36] Na bomoi na ye, David asalaká makambo oyo Nzambe azalaki kolinga. Tango akufaki, bakundaki ye esika moko ná bakoko na ye, pe nzoto na ye epolaki.

[37] Kasi moto oyo Nzambe asekwisaki, apolaki té.

[38] “Bongo, bandeko, bóyeba malamu 'tè: Nzambe azali kolimbisa masumu ya bato po na Yezu. Mibeko ya Moize ekokaki kokómisa bino bosembo té na miso ya Nzambe;

[39] kasi moto nyonso oyo andimi Yezu, akómi bosembo po na ye.

[40] Yango wana bókeba, po makambo oyo baprofete bayebisaká, ékweela bino té:

[41] ‘Bótala, bino bato bomonelaka Nzambe; bókamwa pe bókima! Na eleko na bino nakosala likambo moko, oyo soki bayebisi bino, bokondima té.’”

[42] Tango Polo ná Barnabas babimi na ndako ya lisanga, bato basengi bango báya lisusu na Mokolo ya Kopema ekoya, po bázongela mateya wana.

[43] Tango bato bapanzani, bato ebele, ézala Bayuda to bapaya oyo basambelaka Nzambe ya Israel, balandi Polo ná Barnabas. Bongo bantoma balendisi bango, bákangama kaka na bolamu oyo Nzambe asalaki epai na bango.

[44] Na Mokolo ya Kopema elandaki, vile mobimba eyei kosangana po na koyoka maloba ya Nzambe.

[45] Awa Bayuda bamoni ndenge bato batondanaki, bayoki likunya mingi, babandi kotia tembe na maloba ya Polo pe kofinga ye.

[46] Bongo Polo ná Barnabas bazongiseli bango na molende nyonso, balobi: “Esengeli kosakola maloba ya Nzambe liboso epai na bino, kasi boboyi yango pe bozali komibongisa té po na kozwa bomoi ya seko. Yango wana tokokende epai ya bikolo mosusu.

[47] Pamba té Nkolo atindaki biso boye: ‘Natindi yo lokola moi po na bikolo nyonso, na tina 'tè bato ya mokili mobimba bábika.’”

[48] Awa bato ya bikolo mosusu bayoki boye basepeli pe babandi kokumisa maloba ya Nkolo. Bato nyonso Nzambe aponaki po na kozwa bomoi ya seko, bakómi kondima yango.

[49] Maloba ya Nkolo epanzanaki na mboka yango mobimba.

[50] Kasi Bayuda bapesi toli ya mabe na bato minene ya vile wana, pe na basi ya lokumu oyo bazalaki kosambela Nzambe ya Israel. Bongo babandi konyokola Polo ná Barnabas pe babengani bango na vile na bango.

[51] Tango babimi na vile, bantoma balakisi bato wana mabe oyo basali, bapupoli makolo po bámema pusiere ya mboka yango epai mosusu té; bongo bakei na vile ya Ikonium.

[52] Nzokande bayekoli batondaki na esengo pe na Molimo Mosantu.

Misala — Chapters