Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:27

[1] Na sima ya mikolo mitano Ananya, nganga-Nzambe monene, ayei na Sezaré ná bambuta-muntu mosusu pe avoka na bango Tertulus. Bakei liboso ya Feliks po na kofunda Polo.

[2] Babengisi Polo, pe Tertulus abandi kofunda ye boye: “Tata mokonzi Feliks, tozali na kimia penza po na yo, pamba té ozali kobongisa makambo nyonso ya ekolo na biso.

[3] Topesi yo mersi mingi po na makambo nyonso oyo tozwaka tango nyonso pe bipai na bipai.

[4] Kasi nalingi kolekisa tango na yo mingi té, yango wana nabondeli yo 'tè óyokela biso mwa-moke.

[5] Tomoni 'tè moto oyo azali moto mabe penza. Azali kotia mobulu epai ya Bayuda nyonso na mokili mobimba, pe azali mokonzi ya lingomba ya bato ya Nazaret.

[6] Amekaki kutu kobebisa Ndako ya Nzambe na biso, bongo tokangaki ye. [Tolingaki kosambisa ye ndenge mibeko na biso ezali kotinda,

[7] kasi Lizias, mokonzi ya basoda, ayei kokota na likambo wana, abotoli ye na maboko na biso na makasi penza,

[8] pe atindi biso tóya kofunda ye epai na yo.] Soki otuni ye, yo moko okomona 'tè makambo tozali kofundela ye ezali ya solo.”

[9] Awa asilisi koloba, Bayuda nyonso wana bandimi, balobi makambo wana ezali ya solo.

[10] Feliks apesi Polo nzela po ásamba, bongo ye alobi: “Nayebi 'tè ozali zuzi ya ekolo oyo banda mbula ebele, pe nazali na boboto na motema po na kosamba liboso na yo.

[11] Lokola yo moko okoki koyeba malamu, eleki bobele mikolo zomi na mibale banda nakómaki na Yeruzalem po na kosambela Nzambe.

[12] Ata mokolo moko té bayaki kokuta ngai nazali kotia tembe ná moto to kotinda bato bátomboka, ézala na Ndako ya Nzambe to na bandako ya lisanga, to pe na babalabala.

[13] Bato oyo bazali kofunda ngai kaka pamba.

[14] Nzokande nandimi na miso na yo 'tè nasalelaka Nzambe ya bakoko na biso na kati ya lingomba oyo bango balobaka 'tè ekabolá ekolo na biso. Nandimaka pe nyonso oyo ekòmamá na Mibeko pe na mikanda ya baprofete;

[15] ngai ná bango tozali kotia mitema na Nzambe 'tè bato ya malamu ná ya mabe bakosekwa.

[16] Yango wana, nazali kosala makasi po názala tango nyonso na eloko ya mabe té na se ya motema na miso ya Nzambe pe na miso ya bato.

[17] “Mbula ebele elekeli ngai se na mobembo, bongo nazongaki po na komemela bato ya ekolo na ngai makabo, pe kopesa libonza na Nzambe.

[18] Yango wana bakutaki ngai na Ndako ya Nzambe tango nasilisi komibongisa. Kasi nazalaki ná bato ebele té, pe mobulu ezalaki té.

[19] Bongo Bayuda mosusu ya rejion ya Azie, bazalaki wana, bango nde bato basengelaki kotelema liboso na yo po na kofunda ngai soki bazali na likambo na ngai.

[20] Ata bato oyo bazali awa, báloba mabe nini ngai nasalaki, tango bazalaki kosambisa ngai na Likita-Monene na bango.

[21] Longola bobele maloba oyo nalobaki liboso ya Likita: ‘Bozali kosambisa ngai lelo bobele po nandimaka 'tè bato bakufá bakosekwa.’”

[22] Feliks ayebaki malamu makambo etali nzela ya Yezu, bongo ayebisi bango bázonga po na kosamba mokolo mosusu, alobi: “Tango Lizias mokonzi ya basoda akoya, nakokata likambo na bino.”

[23] Atindi komandan ázongisa Polo na boloko, kasi átikela ye mwa-bonsomi pe ápesa nzela na baninga na ye oyo balingi kosalela ye.

[24] Sima ya mwa-mikolo Feliks ayei na boloko, ná mwasi na ye Drusiye oyo azalaki Moyuda. Abengisi Polo po azalaki na posa ya koyoka likambo etali kondimela Kristo Yezu.

[25] Kasi lokola Polo abandaki koloba po na bizaleli ya bosembo, po na ndenge ya komibatela malamu, pe po na ndenge Nzambe akosambisa bato, Feliks abangi pe alobi: “Sik'oyo okoki kokende na yo. Soki nazwi tango nakobengisa yo lisusu.”

[26] Azalaki kotia motema 'tè Polo akopesa ye mbongo, yango wana azalaki kobengisa ye mbala mingi po na kosolola na ye.

[27] Sima ya mbula mibale mobimba, Porsius Festus azwi ebonga ya Feliks. Bongo po na kosepelisa Bayuda, Feliks atikaki Polo na boloko.

Misala — Chapters