[1] Polo akómi na Derbe, na sima akei na Listre. Moyekoli moko azalaki kuna, kombo na ye Timoté. Mama na ye azalaki Moyuda oyo akómi moyekoli ya Yezu, kasi tata na ye azalaki Moyuda té.
[2] Polo alingaki komema Timoté, pamba té bandeko oyo bazalaki kofanda na Listre pe na Ikonium bayebisi ye 'tè Timoté azali moto malamu. Akatisi ye nzoto po áluka matata té epai ya Bayuda oyo bazalaki na bamboka wana; pamba té bango nyonso bayebaki 'tè tata na ye azali Moyuda té.
[4] Na bavile oyo bazalaki koleka, babandaki koyebisa na bandimi mibeko oyo bantoma pe bambuta-muntu ya Yeruzalem bapesaki, pe batindi bango bátosa yango.
[5] Bipai nyonso ba-Eklezya ezalaki kokola; bondimi ekómaki makasi, pe mokolo na mokolo bato bazalaki kobakisama.
[6] Polo ná Silas bakatisi mabelé ya Frijie pe ya Galatie, pamba té Molimo Mosantu apekisi bango básakola Sango Malamu na rejion ya Azie.
[7] Tango bakómi penepene ya Mizie, bameki kokende na Bitinie, kasi Molimo ya Yezu apesi bango nzela té.
[8] Bongo bakatisi Mizie pe bakómi na libongo ya Troas.
[9] Na butu, Polo amoni lokola na ndoto moto moko ya Masedwane abimeli ye, atelemi pe abondeli ye boye: “Leka na Masedwane, yaka kosalisa biso.”
[10] Awa Polo amoni boye, toumeli té, toluki ndenge nini tokoki kokende na Masedwane; pamba té totiaki mitema 'tè Nzambe abengi biso po na komemela bato ya mboka wana Sango Malamu.
[11] Tokoti na masuwa na Troas, toumelaki na nzela té. Tokei tii na esanga ya Samotrase, pe na sima ya mokolo moko, tokómi na Neapolis.
[12] Tolongwe kuna, tokei na Filipi; yango ezali vile monene ya Masedwane; bato bafandaka kuna bazali basitwayen ya Rome. Tosalaki mikolo mingi na vile wana.
[13] Na Mokolo ya Kopema, tobimi na vile, tokei penepene ya ebale, pamba té tokanisaki 'tè Bayuda basanganaka kuna po na kosambela. Tofandi pe tosololaki na basi oyo bayaki wana.
[14] Mama moko ya vile ya Tiatire, kombo na ye Lidie, azalaki koyoka biso. Ye azalaki kosala mombongo ya bilamba ya talo mingi. Azalaki kosambela Nzambe ya Bayuda. Nkolo afungoli mayele na ye po áyoka malamu maloba ya Polo.
[15] Awa ye ná bato bafandaka na ndako na ye bazwi batisimo, abondeli biso boye: “Soki bomoni 'tè nandimi ya solo Nkolo, bóya kofanda na ndako na ngai.” Pe atie biso molende po tóndima.
[16] Mokolo moko tozalaki kokende na esika ya losambo, tokutani ná elenge mwasi ya moumbu; ye azalaki na molimo moko ya mabe oyo ebandaki kolakisa ye makambo ekoya sima. Bakolo na ye bazalaki kozwa mbongo mingi po na mosala na ye.
[17] Mwasi yango abandi kolanda biso ná Polo, pe azalaki koganga boye: “Bato oyo bazali basali ya Nzambe ya Likolo, bazali kolakisa biso nzela ya kobika!”
[18] Asalaki bongo mikolo mingi. Yango wana Polo alembi, abaluki pe alobi na molimo yango: “Natindi yo na kombo ya Yezu Kristo: Bima na mwasi oyo.” Pe molimo ebimi kaka na tango wana.
[19] Awa bakolo na ye bamoni 'tè bakoki kozwa lisusu mbongo té, bakangi Polo ná Silas, bamemi bango esika zando ezalaki, liboso ya batambwisi ya vile, balobi: “Bato oyo bazali kotia mobulu na mboka na biso. Bazali Bayuda,
[21] pe bazali koteya bizaleli oyo biso basitwayen ya Rome tokoki kondima té to kosalela.”
[22] Bato nyonso batombokeli Polo ná Silas. Bakonzi batindi bálongola bango bilamba pe bábeta bango fimbu.
[23] Awa batutituti bango, babwaki bango na boloko pe batindi mokonzi ya boloko átala bango malamu.
[24] Yango wana ye atie bango na kasho, pe akangisi bango makolo na mabaya ya minene.
[25] Penepene na midi ya butu, Polo ná Silas bazalaki kosambela pe koyembela Nzambe. Bato mosusu ya boloko bazalaki koyoka bango.
[26] Na mbala moko mabelé ebandi koningana makasi penza, kutu ndako mobimba elingaki kobukana. Kaka na tango wana baporte nyonso ya boloko efungwami, pe minyololo ya bato nyonso ya boloko ekatani.
[27] Mokonzi ya boloko alamuki. Awa amoni 'tè baporte ya boloko efungwami, abimisi mbeli na ye pe alingi komiboma; pamba té akanisaki 'tè bato nyonso ya boloko bakimi.
[28] Kasi Polo agangi na mongongo makasi: “Komiboma té! Biso nyonso tozali awa.”
[29] Bongo mokonzi ya boloko asengi mwinda, akoti mbangu na kasho pe afukameli Polo ná Silas na kolenga nyonso.
[30] Abimisi bango na libanda pe alobi: “Batata, násala nini po nábika?”
[31] Bango bazongiseli ye: “Ndima Nkolo Yezu, bongo okobika, yo ná bato nyonso ya libota na yo.”
[32] Boye ye abengi bato nyonso oyo bazalaki na ndako na ye, pe Polo ná Silas babandi koteya bango maloba ya Nkolo.
[33] Kaka na ngonga wana na kati ya butu, mokonzi ya boloko amemi bango pe asukoli bapota na bango. Sima azwi batisimo ná bato na ye nyonso.
[34] Akotisi Polo ná Silas na ndako na ye, apesi bango bilei, pe asepelaki mingi ye ná bato nyonso oyo bazalaki na ndako na ye, po bakómaki kondima Nzambe.
[35] Tongo etani, batambwisi ya vile batindi bato po báloba na mokonzi ya boloko: “Tika bato wana.”
[36] Ye ayei koyebisa yango na Polo, alobi: “Bakonzi batindi 'tè nátika bino. Bongo bóbima na bino pe bókende malamu.”
[37] Kasi Polo alobi na bato oyo bakonzi batindaki: “Tosambi ata kosamba té, babeti biso na miso ya bato nyonso, nzokande biso tozali basitwayen ya Rome. Babwaki biso na boloko, bongo sik'oyo balingi kobimisa biso na kobombama. Ekoki kosalama bongo ata moke té. Malamu bango moko báya kobimisa biso.”
[38] Bato wana bakei koloba makambo yango na bakonzi. Tango bango bayoki 'tè Polo ná Silas bazali basitwayen ya Rome babangi.
[39] Bayei kosenga bango bolimbisi, babimisi bango na boloko pe babondeli bango bálongwa na vile na bango.
[40] Tango Polo ná Silas babimi na boloko bakei kotala Lidie. Kuna bakuti bandeko, balendisi bango pe baleki.