Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 7:50

[1] Tango mokolo ya Pantekote ekómaki, bandimi nyonso basanganaki esika moko.

[2] Na mbala moko makelele euti na Likolo, ezalaki lokola mopepe makasi, etondisi ndako mobimba esika bango bafandaki.

[3] Bongo bamoni biloko ebimeli bango lokola móto, pe ekabwani, ezalaki lokola lolemo pe eyei kofanda na motú ya moto moko moko na kati na bango.

[4] Bango nyonso bayei kotonda na Molimo Mosantu, pe babandi koloba na minoko mosusu, ndenge Molimo azalaki kolobisa bango.

[5] Bayuda mosusu ya mitema malamu bazalaki kofanda na Yeruzalem, bango bautaki na bikolo nyonso ya mokili mobimba.

[6] Tango mingongo yango eyokani, bato ebele bayei kotondana wana; pe bakamwe mingi, po moto na moto ayokaki bandimi bazali koloba na monoko na ye ya mboka.

[7] Bakamwe mingi penza pe batunani: “Baoyo bazali koloba, bazali bango nyonso bato ya Galilé té?

[8] Bongo ndenge nini moto na moto na kati na biso ayoki bango bazali koloba na monoko na ye ya mboka?

[9] Awa na kati na biso tozali na bato ya Parte, ya Medie, ná ya Elam; bato mosusu bafandaka na Mezopotamie, na rejion ya Yudea, na Kapadose, na Pon pe na rejion ya Azie,

[10] na Frijie pe na Pamfilie, na Ejipte pe na ndambo ya Libie oyo ezali penepene ya Sirene; bamosusu bauti na Rome,

[11] bato mosusu babotami Bayuda, bamosusu bakómá kosambela Nzambe ya Bayuda; bato mosusu bauti na esanga ya Krete to na Arabie; biso nyonso tozali koyoka bango bazali kosakola misala minene ya Nzambe na minoko na biso ya mboka!”

[12] Bango nyonso bakamwe penza mayele té, bongo batunani: “Makambo nini wana?”

[13] Kasi bato mosusu bazalaki koseka pe balobi: “Balangwe masanga!”

[14] Bongo Piere atelemi ná bantoma mosusu zomi na moko, pe abandi kosakola boye: “Bino Bayuda, pe bino nyonso bato ya Yeruzalem, bóyoka maloba na ngai, náyebisa bino makambo ezali koleka.

[15] Bato oyo balangwe masanga té ndenge bino bokanisi, pamba té tozali kaka na ngonga ya libwa ya tongo.

[16] Makambo oyo bozali komona lelo ezali makambo profete Joel ayebisaká:

[17] Nzambe alobi: ‘Na mikolo ya suka, nakotondisa moto nyonso na Molimo na ngai; bana na bino ya mibali ná ya basi bakokóma baprofete; bilenge na bino bakobanda komona makambo lokola na ndoto pe mibange na bino bakobanda kolota bandoto.

[18] Ya solo, na mikolo wana nakotondisa basali na ngai ya basi pe ya mibali na Molimo na ngai, bongo bakokóma baprofete.

[19] Nakosala makamwisi pe makambo minene na Likolo pe na se: makila ekosopana, móto ekopela, pe milinga ekomata;

[20] moi ekobongwana molili; sanza ekokóma motane lokola makila, liboso 'tè Mokolo ya Nkolo éya, Mokolo ya monene pe ya lokumu.

[21] Kasi moto nyonso oyo akobondela Nkolo akobika.’

[22] “Bato ya Israel, bóyoka maloba oyo: Nzambe alakisaki bino bokonzi ya Yezu ya Nazaret; pamba té, bino moko boyebi 'tè Nzambe asalaki na maboko na ye makambo minene pe makamwisi ya ndenge na ndenge na kati na bino.

[23] Bopesaki moto yango na maboko ya bato mabe, pe bobomisaki ye na kuruze. Nyonso wana, Nzambe ayebaká yango uta kala; ye moko moto akanaká bongo.

[24] Kasi Nzambe alongoli ye na pasi ya liwa pe asekwisi ye: pamba té liwa ekokaki kokanga ye libela té.

[25] Ya solo, David alobaká boye po na ye: ‘Nkolo, tango nyonso nakanisaka yo; ozali pembeni na ngai, nakoki kobeta libaku té.

[26] Yango wana motema na ngai ezali kosepela, pe etondi na esengo; pe nzoto na ngai ezali kopema na kimia, pamba té nazali kotia motema epai na yo.

[27] Okotika ngai té na mboka ya bato bakufá; okolinga té 'tè ngai moto na yo nábeba.

[28] Olakisaki ngai nzela ya bomoi, okotondisa ngai na esengo na miso na yo.’

[29] “Bandeko, tika nálobela bino polele po na koko na biso David: ye akufá pe bakundá ye; simetiere na ye ezali tii lelo epai na biso.

[30] Kasi azalaki profete, pe ayebaki 'tè Nzambe akataki seleka 'tè moto ya libota na ye akokóma mokonzi na esika na ye.

[31] David ayebaká makambo oyo elingaki koya, pe asakolaká kosekwa ya Mesia; yango wana alobi: ‘Ye atikalaki té na mboka ya bato bakufá, pe nzoto na ye ebebaki té.’

[32] “Ya solo, Nzambe asekwisi Yezu. Biso nyonso tozali batemwen na makambo wana.

[33] Azali kofanda na esika ya lokumu penepene ya Nzambe; azwi Molimo Mosantu oyo Tata alakaki, bongo atondisi biso na Molimo wana. Wana ezali makambo oyo bino bozali komona pe koyoka lelo.

[34] Pamba té ye moko David amataki na Likolo té, kasi alobaká boye: ‘Nkolo alobi na Mokonzi na ngai: Fanda pembeni na ngai na esika ya lokumu;

[35] tii tango nakotia banguna na yo na se ya makolo na yo.’

[36] “Bato nyonso ya Israel basengeli koyeba malamu 'tè Yezu oyo bino bobomaki na kuruze, Nzambe atiá ye Mokonzi pe Mesia oyo tozalaki kozela.”

[37] Maloba wana eyokisaki bango pasi na mitema, bongo batuni Piere ná bantoma mosusu: “Bandeko, tósala nini?”

[38] Piere azongiseli bango: “Bóbongola mitema, pe moto na moto na kati na bino ázwa batisimo na kombo ya Yezu Kristo, po Nzambe álimbisa bino masumu pe ákabela bino Molimo Mosantu.

[39] Pamba té makambo Nzambe alakaká esalami po na bino, bana na bino, pe bapaya nyonso oyo Nkolo Nzambe na biso akobenga.”

[40] Piere alobelaki bango makambo mingi mosusu po bango bándima, pe alendisi bango boye: “Bósala nyonso po bóbika, pamba té ekolo na biso ebungi nzela!”

[41] Bongo babatisaki bato oyo bandimaki maloba ya Piere. Mokolo wana bato 3000 bayaki kobakisama na lingomba ya bandimi.

[42] Bazalaki kosala makasi po na koyoka mateya ya bantoma, po na kozala lisanga lokola bandeko, po na kolia esika moko pe kosambela.

[43] Bantoma bazalaki kosala makamwisi mingi, bongo bato nyonso bazalaki komona 'tè Nzambe azali na bango.

[44] Bandimi nyonso bazalaki kofanda lisanga moko. Bazalaki kosangisa bomengo na bango esika moko.

[45] Bazalaki koteka mabelé na bango ná biloko na bango. Bongo bazalaki kokabola mbongo na bato nyonso ndenge posa ya moto na moto ezalaki kosenga.

[46] Mikolo nyonso bazalaki kosangana na Ndako ya Nzambe, pe kolia esika moko na bandako na bango, na esengo pe na boboto.

[47] Bazalaki kokumisa Nzambe, pe bato nyonso babandaki kolinga bango. Mokolo na mokolo Nkolo azalaki kobakisa na lingomba na bango bato oyo ye alingaki kobikisa.

Misala — Chapters