Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:29

[1] Na sima ya makambo wana Polo alongwe na Atene pe akómi na Korente.

[2] Kuna akutani ná Moyuda moko kombo na ye Akilas. Ye abotamaki na mboka Pon; autaki na Italie kaka na mikolo wana ná mwasi na ye Prisiye, po mokonzi Klode atindaki Bayuda nyonso bálongwa na Rome. Polo akei kokutana ná bango mibale,

[3] pe amoni 'tè ye ná Akilas bazalaki kosala mosala moko; pamba té bazalaki basali-kapo. Yango wana Polo akei kofanda epai na bango, pe bango mibale babandi kosala esika moko.

[4] Na Mikolo nyonso ya Kopema Polo azalaki kosakola na ndako ya lisanga, pe abandaki komeka kobongola makanisi ya Bayuda ná ya bato ya bikolo mosusu.

[5] Tango Silas ná Timoté bauti na Masedwane, Polo amipesi mobimba po na kosakola maloba ya Nzambe; alakisi Bayuda 'tè Yezu azali Mesia.

[6] Kasi awa Bayuda baboyi maloba na ye pe bafingi ye, apupoli bilamba na ye po ámema pusiere ya ndako na bango ya lisanga epai mosusu té, pe alobi na bango: “Soki bobungi, ezali ngambo na bino moko, etali ngai té. Banda lelo nakokende epai ya bato ya bikolo mosusu.”

[7] Alongwe wana pe akei na ndako ya moto moko, kombo na ye Titus Yustus. Moto yango azalaki kosambela Nzambe ya Bayuda, pe ndako na ye ezalaki pembeni ya ndako ya lisanga.

[8] Krispus, mokonzi ya ndako ya lisanga wana, andimi Nkolo, ye ná libota na ye mobimba. Bato mingi ya Korente oyo bazalaki koyoka Polo, bayei pe kondima, bongo bazwi batisimo.

[9] Mokolo moko na butu, Nkolo abimeli Polo lokola na ndoto, alobi na ye: “Kobanga té, kofanda nyee té, loba.

[10] Ngai nazali na yo; ata moto moko té akosala yo mabe. Pamba té bato na ngai bazali mingi na vile oyo.”

[11] Polo afandaki na Korente mbula moko na sanza motoba, pe azalaki koteya bato maloba ya Nzambe.

[12] Tango Galion azalaki motambwisi ya Akaya, Bayuda bayokani po na kosala Polo mabe, bakangi ye pe bamemi ye na tribinal.

[13] Balobi: “Moto oyo azali koluka kobongola makanisi ya bato po básambelaka Nzambe na ndenge mibeko na biso ezali kopekisa.”

[14] Polo alingi koloba, kasi Galion alobi na Bayuda: “Soki moto oyo asalaki mabe penza to likambo moko ya monene, mbele nalingaki koyokela bino.

[15] Kasi lokola ezali bobele tembe po na mateya, bakombo pe mibeko na bino, etali bino moko. Naboyi kozala zuzi ya makambo wana.”

[16] Pe abengani bango na tribinal.

[17] Bongo bato nyonso bakangi Sostene, mokonzi ya ndako ya lisanga, pe babandi kobeta ye liboso ya tribinal. Kasi Galion atalaki yango pamba.

[18] Polo aumelaki mingi na Korente. Sima, atiki bandeko pe asimbi nzela po na kokende na Sirie. Prisiye pe Akilas bakei na ye nzela moko. Na libongo ya Sankré, liboso 'tè ákota na masuwa, akokoli motú, pamba té asilisi mikolo na ye ya elaka oyo apesaki na Nzambe.

[19] Tango bakómi na Efeze, Polo atiki Akilas ná Prisiye, akei na ndako ya lisanga pe asololi ná Bayuda.

[20] Bango babondeli ye áfanda lisusu mwa-mikolo, kasi Polo alingaki té.

[21] Atiki bango pe alobi: “Nakozonga lisusu epai na bino soki Nzambe alingi.” Bongo akoti na masuwa pe alongwe na Efeze.

[22] Tango Polo akiti na Sezaré, akei na Yeruzalem po na kopesa mbote na bato ya Eklezya. Na sima akei na Antioshe,

[23] pe afandi kuna mwa-tango. Sima ya mwa-mikolo, Polo asimbi lisusu nzela pe atamboli mboka Galatie pe Frijie. Azalaki kolendisa bayekoli nyonso.

[24] Moyuda moko akómaki na Efeze, kombo na ye Apolos, moto ya Aleksandri, vile moko ya Ejipte. Azalaki moto ya mayele mingi, pe ayebaki Mikanda ya Nzambe malamu penza.

[25] Ayokaki sango ya Nkolo pe azalaki na molende. Abandaki kosakola pe koteya polele makambo etali nzela ya Yezu, kasi ayebaki bobele batisimo ya Yoane.

[26] Lokola azalaki koloba na molende mingi na kati ya ndako ya lisanga, Prisiye ná mobali na ye Akilas bayoki ye. Bongo babengi ye na ndako na bango, pe balimboleli ye malamu penza makambo nyonso ya nzela ya Nzambe.

[27] Na sima Apolos alingaki kokende na Akaya. Bandeko basepeli na mokano na ye pe bakòmeli bayekoli ya kuna mokanda po báyamba ye malamu. Tango akómi kuna, asalisi bandimi mingi na nguya ya Nzambe.

[28] Na miso ya bato nyonso alakisi polele 'tè Bayuda babungi nzela, pe alimboli Mikanda ya Nzambe oyo ezali koyebisa 'tè Mesia azali Yezu.

Misala — Chapters