[1] Tango mobulu esili, Polo asangisi bayekoli pe alendisi bango. Apesi bango mbote pe akei na Masedwane.
[2] Akatisi mabelé wana, azalaki kolendisa bandimi na mateya mingi, bongo akómi na Grese.
[3] Afandaki kuna sanza misato. Tango alingaki kokota na masuwa po na kokende na Sirie ayoki 'tè Bayuda bakaneli ye, azwi mokano ya kozonga na nzela ya Masedwane.
[4] Sopater, mwana ya Pirus moto ya Beré, akendeki nzela moko na ye, bango ná Aristarke pe Sekundus bato ya Tesalonike, Gayus moto ya Derbe, Timoté ná Tishike pe Trofime bato ya rejion ya Azie.
[5] Tango tokómi na Masedwane, bato wana batiki biso pe bakei kozela biso na Troas.
[6] Nzokande biso, sima ya feti ya mapa ya kovimba té, tokoti na masuwa na libongo ya Filipi. Na sima ya mikolo mitano toyei kokuta bango na Troas; kuna tosalaki póso mobimba.
[7] Sima ya Mokolo ya Kopema, na pokwa, tosanganaki po na kolia esika moko. Polo asololi na bandimi ya Troas tii na midi ya butu, po alingaki kotika bango na tongo.
[8] Bamwinda mingi ezalaki kopela na kati ya ndako esika tosanganaki likolo ya etaje.
[9] Elenge mobali moko, kombo na ye Etikos afandaki na fenetre. Lokola pongi ezwaki ye makasi, tango Polo azalaki kaka koteya, alongwe na etaje ya misato, akwei na se. Tango batomboli ye, asi'akufaki.
[10] Bongo Polo akiti, agumbami pe asimbi ye makasi. Alobi: “Bótika kobanga! Azali nanu na bomoi.”
[11] Sima Polo amati lisusu na etaje, akaboleli bandimi mapa, pe alei ná bango. Alobaki lisusu mingi tii tongo etani, bongo akei.
[12] Bamemi elenge mobali oyo abikaki, pe makambo wana elongoli bato nyonso mawa penza.
[13] Biso tolongwe liboso pe tokoti na masuwa po tókende na vile ya Asos. Kuna tolingaki kokotisa Polo na masuwa, pamba té ye akanaki kokende na Asos na makolo.
[14] Tango akuti biso na Asos, tokamati ye na masuwa pe tokei na Mitilene.
[15] Tongo etani, tolongwe wana pe tokómi penepene ya esanga ya Kio. Sima ya mokolo moko tokómi na esanga ya Samos, pe sima ya mokolo moko lisusu tokómi na Milet.
[16] Polo akanaki kokita na Efeze té, po álekisa tango té kuna na rejion ya Azie. Azalaki kaka kokende noki, po ákoka kokóma na Yeruzalem na mokolo ya Pantekote.
[17] Na Milet, Polo atindi maloba na Efeze po na kobengisa bambuta-muntu ya Eklezya.
[18] Tango bakómi epai na ye, alobi na bango: “Boyebi ndenge nini bizaleli na ngai ezalaki na kati na bino, banda mokolo ya liboso nakómaki na rejion ya Azie.
[19] Nasalelaki se Nkolo, namikumisaki té. Nalelaki mingi pe namonaki pasi po Bayuda bazalaki kokanela ngai.
[20] Boyebi 'tè makambo nyonso oyo bozalaki na yango posa, nasakolaki pe nateyaki bino yango na bisika tosanganaka, pe na bandako na bino; nabombaki ata eloko moko té.
[21] Nayebisaki Bayuda ná bato ya bikolo mosusu bábongola mitema, bátosa Nzambe, pe bándimela Nkolo na biso Yezu.
[22] Sik'oyo nakei na Yeruzalem, pamba té Molimo Mosantu atindi ngai. Nayebi té makambo nini ekokweela ngai kuna;
[23] nayebi kaka eloko moko: mboka nyonso nazali koleka Molimo Mosantu azali koyebisa ngai 'tè boloko ná minyokoli ezali kozela ngai.
[24] Kasi nazali kotala bomoi na ngai lokola eloko pamba. Nazali koluka kaka násilisa mosala oyo Nkolo Yezu apesi ngai: kosakola Sango Malamu 'tè Nzambe alakisi bato boboto na ye.
[25] “Sik'oyo nayebi 'tè bokomona ngai lisusu té. Bino nyonso bomonaki pe boyokaki ndenge nateyaki bino po na bokonzi ya Nzambe.
[26] Yango wana, nalobi na bino lelo: soki moto moko na kati na bino abungi, ezali ngambo na ngai té.
[27] Pamba té nabombaki eloko té; nayebisaki bino makambo nyonso oyo Nzambe alingi kosala.
[28] Bómibatelaka; bóbatelaka pe bandimi nyonso, pamba té Molimo Mosantu atie bino lokola babokoli ya bameme; bongo bókengelaka Eklezya oyo Nzambe azwaki po na liwa ya Mwana na ye penza.
[29] Nayebi 'tè bato mabe bakoya sima na ngai; bakozala lokola bankoi, bakoyokela bameme mawa té.
[30] Ata na kati na bino pe, bato mosusu bakobanda koloba makambo ya lokuta, po bábenda bandimi epai na bango.
[31] Bongo bózala na ekenge; bókanisa 'tè mbula misato mobimba, butu moi na mai na miso, nazalaki kaka kopesa toli na moko moko na bino.
[32] “Sik'oyo napesi bino na maboko ya Nzambe. Maloba ya bolamu na ye ekobanda kobatela bino. Ye azali na nguya ya kolendisa bato nyonso ye aponá, po bázwa bomengo oyo abombelá bango.
[33] Nalukaki eloko ya moto té, ézala mbongo to bilamba.
[34] Bino moko boyebi 'tè nasalaki na maboko na ngai po na kozwa biloko oyo biso ná baninga na ngai tozalaki na yango posa.
[35] Na makambo nyonso wana napesaki bino ndakisa 'tè bosengeli kosala mosala, po bókoka kosalisa bato bakelelá. Bókanisa maloba ye moko Nkolo Yezu alobaki: ‘Kokaba ezali esengo mingi koleka kozwa.’”
[36] Awa Polo asilisi koloba boye, afukami esika moko ná bango pe asambeli.
[37] Bango nyonso bazalaki kolela; bayambi Polo po na kopesa ye mbote ya suka.
[38] Bazalaki na mawa mingi penza po alobaki 'tè bakomona ye lisusu té. Bongo bakei kotika ye tii na masuwa.