[1] Awa bazwi mokano 'tè tokokende na Italie na masuwa, bapesi Polo pe bato mosusu ya boloko na maboko ya komandan moko, kombo na ye Yulius, ya batayon ya basoda oyo babengaka “Batayon ya mokonzi ya Rome.”
[2] Tokoti na masuwa moko eutaki na Adramite pe elingaki kokende epai ya balibongo ya rejion ya Azie, bongo tokei. Aristarke, moto ya Masedwane, mboka na ye Tesalonike, azalaki pe ná biso.
[3] Tongo etani, tokiti na Sidon. Yulius azalaki kosala Polo malamu, apesi ye nzela ya kokende kotala baninga po ázwa biloko azalaki na yango posa.
[4] Tolongwe wana, toleki penepene ya esanga ya Shipre, pamba té mopepe ezalaki kozongisa biso sima.
[5] Tokatisi ebale monene pembeni ya Silisie ná Pamfilie, pe tokómi na Mira na rejion ya Lisie.
[6] Kuna komandan amoni masuwa moko ya Aleksandri ezali kokende na Italie, pe akotisi biso na masuwa yango.
[7] Mikolo mwa-mingi masuwa ezalaki kotambola malembe, pe tokómi penepene ya mboka Kinide na pasi penza. Lokola mopepe ezalaki kopekisa biso, tango tomoni Salmone, libongo ya esanga ya Krete, tobaluki na ngambo oyo mopepe ezalaki makasi té.
[8] Kuna pe totamboli kaka na pasi penza, bongo tokómi na esika moko babengaka “Balibongo ya Malamu.” Yango ezali penepene ya vile ya Lasea.
[9] Tolekisaki tango mingi, pe kotambola na masuwa ekómaki matata, pamba té eleko ya malili esi'ebandaki. Yango wana, Polo apesi bato toli, alobi:
[10] “Batata, namoni 'tè mobembo oyo ekozala matata. Masuwa pe biloko mingi oyo ezali na kati ekobeba, ná biso pe tokoki kokufa.”
[11] Kasi komandan aboyi kondima maloba ya Polo, ayokeli kaka kapitene ná kolo ya masuwa;
[12] pamba té libongo yango ezalaki malamu té po na kofanda na tango ya malili. Bato mingi kutu na kati ya masuwa basi'bakanaki kolongwa kuna, balingaki komeka kokóma na Feniks, libongo mosusu ya Krete, oyo etalaná na epai moi elalaka, ezali na banzela mibale ya kokotela, moko na epai ya likolo pe mosusu na epai ya se. Bongo bayokani bákende kofanda kuna na eleko ya malili.
[13] Lokola mwa-mopepe moke eutaki na epai ya se, bato ya masuwa bakanisaki 'tè bakoki kosala makambo bakanaki. Batomboli longo, bongo masuwa ebandi kotambola penepene penza ya ngambo ya Krete.
[14] Kasi sima ya mwa-tango moke, mopepe makasi euti na bangomba ya esanga; babengaka yango “mopepe ya Nord-Est.”
[15] Mopepe ezongisi masuwa sima, mayele ya kobunda na yango ezalaki té, bongo totiki yango émema biso.
[16] Toleki mbangu na pembeni ya esanga moko ya moke oyo ezalaki kobatela biso na mopepe; kombo na yango Koda. Etikalaki moke ebei élongwa; tosimbi yango na pasi penza.
[17] Awa basilisi kotombola yango, bakamati basinga ya minene pe bakangisi yango na masuwa, po mbonge ébuka yango té. Lokola bazalaki kobanga kotutana na zelo ya ngambo ya Libie, babwaki libaya moko ya monene oyo bakangisaki na masuwa, boye yango ebandi kotambola mwa-malembe po na kilo ya longo wana.
[18] Nzokande mopepe ezalaki kobeta biso kaka makasi; yango wana na sima ya mokolo moko babandi kobwaka biloko oyo ezalaki na masuwa.
[19] Pe na sima ya mikolo mibale basali ya masuwa bango moko babwaki bakapo oyo etambwisaka masuwa.
[20] Mikolo mingi tozalaki komona moi té to minzoto; mopepe ezalaki kaka makasi. Pe totiaki lisusu motema ata moke té 'tè tokobika.
[21] Elekaki mikolo mingi moto moko té aliaki; bongo Polo atelemi na kati na bango pe alobi: “Batata, soki bóyokaka toli na ngai tango nalobaki na bino bólongwa na Krete té, mbele masuwa pe biloko elingaki kobeba té.
[22] Kasi sik'oyo nasengi na bino 'tè bózala na molende, pamba té ata moto moko té na kati na bino akokufa; kaka masuwa yango moko nde ekobeba.
[23] Nzambe na ngai oyo nasalelaka atindelaki ngai anjelu na ye na butu;
[24] ye alobaki boye: ‘Polo, kobanga té. Osengeli kotelema liboso ya mokonzi monene ya Rome. Po na yo, Nzambe akobikisa pe bato nyonso oyo bazali ná yo na masuwa.’
[25] Yango wana, batata, bózala na molende. Natie motema na Nzambe 'tè makambo wana ekosalama, ndenge anjelu alobaki na ngai.
[26] Kasi masuwa ekobwaka biso na esanga moko.”
[27] Sima ya póso mibale, na butu, mopepe makasi ezalaki kaka komema biso na ebale Mediterané. Penepene na midi ya butu bato ya masuwa bakanisaki 'tè tokómi pembeni ya mokili.
[28] Bameki modindo, bayei komona 'tè ezalaki na bametre tuku misato na sambo (37). Bapusani mwa-liboso, bameki lisusu pe bamoni 'tè ezali na bametre tuku mibale na mwambe (28).
[29] Babangaki 'tè masuwa étutana na mabanga. Yango wana, babwaki balongo minei na mai, na sima ya masuwa. Pe bazalaki kozela 'tè moi ébima noki.
[30] Basali ya masuwa balingaki kokima, bakitisi ebei na mai pe basali lokola bakei kokangisa balongo liboso ya masuwa.
[31] Kasi Polo alobi na komandan pe na basoda: “Soki bato oyo batikali na kati ya masuwa té, bino bokobika té.”
[32] Bongo basoda bakati basinga oyo esimbaki ebei, pe batiki yango ékweya na mai.
[33] Na tongo, Polo abondeli bato nyonso bália, alobi: “Tosi'tokokisi póso mibale mobimba, bozali kaka kozela mopepe ésila, pe bozali kolia eloko ata moko té.
[34] Yango wana nabondeli bino bólia, pamba té bozali na yango posa po na kobika. Moto moko té na kati na bino akozwa likama soki moke té.”
[35] Awa Polo alobi boye, akamati mapa, apesi Nzambe mersi na miso na bango nyonso, pe abandi kolia.
[36] Bongo bango nyonso bazwi molende pe babandi kolia.
[37] Biso nyonso na kati ya masuwa tozalaki 276.
[38] Awa bato nyonso batondi, babwaki blé nyonso oyo ezalaki na masuwa, po na kolongola kilo.
[39] Tongo etani, basali ya masuwa bamoni 'tè tokómi penepene ya mokili, kasi bayebaki mokili yango té. Lokola bamoni esika mai ekotá na zelo, bazwi mokano ya komeka kotelemisa masuwa kuna.
[40] Bakati basinga ya balongo pe batiki yango na ebale. Bafungoli pe basinga ya yenda. Na sima, bamatisi kapo moko liboso ya masuwa po mopepe épusa yango epai ya mokili.
[41] Kasi eteni ya liboso ya masuwa eyei kokangama na zelo oyo ezalaki na kati-kati ya mai; bongo bambonge eyei kobuka eteni ya sima.
[42] Tango basoda bamoni 'tè masuwa ebandi kobeba, bazwi mokano ya koboma bato ya boloko, po moto moko té na kati na bango ákata mai pe ákima.
[43] Kasi komandan alingaki kobikisa Polo, bongo apekisi bango. Atindi baoyo bayebaki mai bákweya na ebale liboso; kasi bamosusu básalela mabaya to biteni ya masuwa. Na ndenge wana bato nyonso bakómaki na mokili pe babikaki.