Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:32

[1] Mokolo moko Piere ná Yoane bazalaki kokende na Ndako ya Nzambe na ngonga ya misato ya pokwa po na kosambela.

[2] Moto moko akufá makolo banda babotá ye, azalaki kofanda penepene ya porte ya Ndako ya Nzambe oyo babengaka “Porte ya Kitoko.” Mikolo nyonso bazalaki komema ye kuna po ásengaka mbongo na bato oyo bazalaki kokota.

[3] Tango amoni Piere ná Yoane balingi kokota na Ndako ya Nzambe, asengi bango lisalisi.

[4] Piere ná Yoane batali ye, bongo Piere alobi na ye: “Tala biso.”

[5] Moto wana atali bango nyee pe akanisaki 'tè akozwa eloko.

[6] Kasi Piere alobi: “Nazali na mbongo té; nakopesa yo eloko nazali na yango: na kombo ya Yezu Kristo ya Nazaret, tambola.”

[7] Na sima Piere asimbi moto yango na liboko ya mobali pe atelemisi ye. Na mbala moko makolo na ye ekómi makasi.

[8] Atelemi noki pe abandi kotambola. Akoti na Ndako ya Nzambe nzela moko ná bango. Azalaki kotambola, kopumbwa pe kokumisa Nzambe.

[9] Bato nyonso bamoni ye azali kotambola pe kokumisa Nzambe;

[10] bongo bayei koyeba 'tè ye moto azalaki kofanda penepene ya Porte ya Kitoko ya Ndako ya Nzambe, pe kosenga mbongo. Yango wana bakamwe mingi penza, pe bazalaki lisusu na mayele ya koloba té po na makambo oyo esalamaki na nzoto na ye.

[11] Lokola moto wana akangamaki kaka na Piere pe Yoane, bato nyonso bakamwe, pe bayei mbangu epai na bango na veranda oyo babengaka veranda ya Salomon.

[12] Tango Piere amoni bongo, alobi na bato: “Bato ya Israel, po na nini bozali kokamwa na ndenge moto oyo abiki? Po na nini bozali kotala biso, lokola nde biso bato totambwisi ye na nguya to na makasi na biso moko?

[13] Bóyeba 'tè Nzambe ya Abraham, ya Izaak pe ya Jakob, Nzambe ya bakoko na biso, apesi lokumu na Mosali na ye Yezu. Bino bato bokabaki ye po báboma ye; pe tango Pilate alingaki kotika ye, boboyaki.

[14] Ye azalaki moto ya bosantu pe ya bosembo, kasi bino bosundolaki ye, pe bosengaki bátikela bino mobomi moko.

[15] Wana ezali ndenge bobomisaki Mokonzi ya bomoi. Kasi Nzambe asekwisi ye, pe biso tomonaki ye azali na bomoi.

[16] Moto oyo bozali kotala pe boyebi ye, andimeli kombo ya Yezu; ezali ye moko Yezu moto abikisi ye. Ya solo, ezali bondimi na kombo ya Yezu moto ekómisi ye makasi pe nzoto malamu, na miso na bino nyonso.

[17] “Nzokande bandeko, nayebi malamu 'tè bino ná bakonzi na bino boyebaki té makambo oyo bosalaki Yezu.

[18] Kasi Nzambe asali makambo oyo baprofete nyonso bayebisaká banda kala, na nguya na ye: Mesia na ye asengelaki komona pasi.

[19] Yango wana bandeko, bóbongola mitema pe bózongela Nzambe po álimbisa bino masumu.

[20] Bongo Nkolo akoyeela bino tango ya kopema, pe akotindela bino Mesia oyo ye aponelá bino uta kala, ye nde Yezu.

[21] Po na sik'oyo, Yezu asengeli kotikala na Likolo, tii tango makambo nyonso ekokóma ya sika, ndenge Nzambe ayebisaká na minoko ya baprofete na ye ya bosantu.

[22] Pamba té Moize alobaká boye: ‘Nkolo Nzambe akotindela bino profete moko lokola ngai. Ye akozala moto ya ekolo na bino; bokobanda koyoka makambo nyonso ye akozala kolobela bino.

[23] Moto nyonso oyo akoyokela profete wana té, bakolongola ye na molongo ya bato ya Israel.’

[24] Baprofete, kobanda tango ya Samuel, bango nyonso basakolaki moko moko makambo ya mikolo oyo.

[25] Makambo Nzambe alakaká na minoko ya baprofete, pe Boyokani oyo asalaká ná bakoko na bino, ezali po na bino. Pamba té alobaká na Abraham boye: ‘Nakobenisa bikolo nyonso ya mokili likolo ya bato ya libota na yo.’

[26] Yango wana Nzambe abimisi Mosali na ye po na bino liboso. Atindi ye po ábenisa bino, pe álongola moto nyonso na kati na bino na nzela ya masumu.”

Misala — Chapters