Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:39

[1] Na mikolo wana, bayekoli bakómi ebele. Na kati na bango, bamosusu bautaki na bamboka ya bapaya, bayebaki kaka monoko ya grek. Mokolo moko bayekoli wana bakómaki koyimayima po na bandeko oyo babotamá na Yudea, balobi: “Na tango ya kokabola biloko ya mokolo na mokolo, bozali kobosana basi na biso oyo bakufelá mibali.”

[2] Bongo bantoma zomi na mibale babengi bayekoli nyonso pe balobi: “Tokoki kotika kosakola maloba ya Nzambe té, po na kotiela bato bilei na mesa.

[3] Kasi bóluka bandeko sambo na kati na bino oyo bazali na bizaleli ya malamu, batondi na Molimo Mosantu pe na mayele, bongo tópesa bango mosala wana;

[4] boye biso tómipesa kaka na kosambela pe kosakola maloba ya Nzambe.”

[5] Makambo wana esepelisi bango nyonso. Bongo baponi Etiene, moto atondá na bondimi pe na Molimo Mosantu, Filipe, Prokor, Nikanor, Timon, Parmenas pe Nikola, moto ya mboka Antioshe, oyo akómaki kosambela Nzambe ya Bayuda kala.

[6] Na sima batie bato wana sambo liboso ya bantoma; bantoma babondeli Nzambe, pe batieli bango maboko.

[7] Maloba ya Nzambe ezalaki kopanzana, bayekoli bakómi mingi na Yeruzalem, pe banganga-Nzambe ebele kutu bandimaki.

[8] Etiene atondaki na bolamu pe na nguya ya Nzambe. Azalaki kosala makamwisi minene ya ndenge na ndenge na kati ya bato.

[9] Kasi bato mosusu babandaki kotiela ye tembe; ezalaki bato oyo basanganaka na ndako ya lisanga oyo babengaka “Ya Balongwá-Boumbu,” Bayuda ya Sirene pe ya Aleksandri, ná baoyo ya Silisie pe ya rejion ya Azie. Babandi kotiana tembe ná Etiene,

[10] kasi bakokaki kotelema na ye té, po ye azalaki koloba na mayele oyo Molimo Mosantu azalaki kopesa ye.

[11] Bongo bafuti avoka na bato mosusu po báloba boye: “Toyokaki ye azali kobebisa lokumu ya Moize pe ya Nzambe.”

[12] Basali na ndenge 'tè bato nyonso ná bambuta-muntu pe balakisi-Mibeko bátomboka. Bongo bayei epai ya Etiene, bakangi ye, pe bamemi ye liboso ya Likita-Monene ya Bayuda.

[13] Kuna babimisi bato po na kokosela ye makambo, pe bato wana balobi: “Moto oyo azali kaka kobebisa lokumu ya Ndako ya Nzambe na biso, pe ya Mibeko ya Moize.

[14] Toyokaki ye alobi 'tè Yezu ya Nazaret akoboma Ndako ya Nzambe, pe akobongola bizaleli oyo Moize atikelá biso.”

[15] Bato nyonso oyo bazalaki na Likita babandaki kotala Etiene, pe bamonaki 'tè elongi na ye ezalaki kongenga lokola ya anjelu.

Misala — Chapters