Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:54

[1] “Batata pe bandeko, bóyoka makambo nalingi kosamba.”

[2] Awa bayoki 'tè alobi na bango na monoko ya Bayuda, bafandi nyee penza. Bongo Polo alobi:

[3] “Ngai nazali Moyuda, nabotami na Tarse na mboka Silisie, kasi nakoli kaka awa na Yeruzalem, pe Gamaliel moto azalaki kolakisa ngai makambo nyonso ya mibeko ya bakoko na biso. Namipesaki mobimba po na Nzambe, ndenge bino nyonso bozali kosala lelo.

[4] Nanyokolaki bato oyo balandaka nzela ya Yezu tii kutu na liwa na bango, nakangaki mibali ná basi pe nabwakaki bango na boloko.

[5] Nganga-Nzambe monene pe Likita mobimba ya bambuta-muntu bakoki koyebisa bino soki nazali koloba ya solo. Bango bato bapesaki ngai mikanda nákende kotika na bandeko Bayuda ya Damas. Bongo nakendeki kuna po na kokanga bandimi, pe komema bango na Yeruzalem po bázwa etumbu.”

[6] “Nazalaki na nzela pe tango nakómi pembeni ya mboka Damas etikalaki moke midi ékoka, eloko moko lokola kake elongwe na likolo, engengi makasi pe eyei kozipa ngai.

[7] Nakwei na se pe nayoki mongongo moko elobi na ngai: ‘Saul, Saul! Po na nini ozali konyokola ngai?’

[8] Nazongisi: ‘Mokonzi, yo nani?’ Bongo ye alobi na ngai: ‘Nazali Yezu ya Nazaret oyo yo ozali konyokola.’

[9] Bato bazalaki esika moko ná ngai bamonaki eloko oyo ezalaki kongenga, kasi mongongo oyo elobaki na ngai, bayokaki yango té.

[10] Bongo natuni: ‘Mokonzi, násala nini?’ Mokonzi alobi na ngai: ‘Telema, kende na Damas. Kuna bakolakisa yo makambo nyonso osengeli kosala.’

[11] Lokola miso na ngai ekufaki po na eloko oyo engengaki makasi, bato bayaki ná ngai nzela moko basimbi ngai na liboko, pe na ndenge wana nakoti na Damas.

[12] “Moto moko azalaki kuna, kombo na ye Ananya, ye nde moto malamu oyo atosaka Mibeko ya Moize. Bayuda nyonso ya Damas balingaki ye mingi.

[13] Ayei, atelemi penepene na ngai pe alobi: ‘Saul, ndeko na ngai, miso na yo éfungwama!’ Na mbala moko miso efungwami, pe namoni ye.

[14] Bongo ye alobi: ‘Nzambe ya bakoko na biso asi'aponá yo kala, po óyeba makambo ye alingaka, ómona Moto ya bosembo pe óyoka mongongo na ye.

[15] Pamba té yo okozala temwen na ye epai ya bato nyonso, po óyebisa bango makambo omoni pe oyoki.

[16] Bongo ozali kozela nini? Telema ózwa batisimo, pe bondela Nzambe na kombo ya Yezu po 'tè masumu na yo élongwa.’”

[17] “Nazongaki na Yeruzalem, bongo mokolo moko lokola nazalaki kosambela na Ndako ya Nzambe,

[18] Mokonzi Yezu abimeli ngai pe alobi: ‘Longwa noki na Yeruzalem, pamba té bato ya mboka oyo bakoboya makambo yo ozali koloba po na ngai.’

[19] Ngai nazongisi: ‘Nkolo, bayebi malamu 'tè nazalaki kokende na bandako ya lisanga po na koluka bato bandimaka yo, kobetisa bango pe kobwaka bango na boloko.

[20] Pe tango babomaki Etiene oyo azalaki kosakola sango na yo, ngai pe nazalaki wana. Nandimaki makambo ya bato babomaki ye pe nasimbelaki bango bilamba.’

[21] Bongo Nkolo alobi na ngai: ‘Kende, pamba té nakotinda yo mosika epai ya bato ya bikolo mosusu.’”

[22] Bato bayokaki Polo tii tango alobi po na bikolo mosusu, bongo babandi koganga: “Longola moto ya ndenge oyo na mokili; ebongi báboma ye!”

[23] Bazalaki koganga, kopasola bilamba pe kobwaka pusiere na likolo.

[24] Mokonzi ya basoda atindi bázongisa Polo na lopango ya basoda, pe bábeta ye fimbu po áyebisa polele tina bato bazalaki kowolola ye boye.

[25] Kasi tango bakangi ye po na kobeta ye fimbu, Polo atuni komandan oyo azalaki wana: “Sitwayen ya Rome oyo asambi ata kosamba té, bakoki kobeta ye fimbu?”

[26] Awa komandan ayoki boye, akei koyebisa mokonzi ya basoda, alobi: “Olingi kosala nini? Pamba té moto wana azali sitwayen ya Rome.”

[27] Mokonzi ya basoda ayei pe atuni Polo: “Lobela ngai, ya solo ozali sitwayen ya Rome?” Polo andimi;

[28] bongo mokonzi ya basoda alobi: “Ngai nafutaki mbongo mingi po nákóma sitwayen ya Rome.” Polo azongisi: “Kasi ngai nabotamá sitwayen ya Rome.”

[29] Bongo na mbala moko basoda oyo balingaki kobeta ye fimbu batiki ye. Mokonzi ya basoda ye moko pe abangi, po akangisaki sitwayen ya Rome minyololo.

[30] Tongo etani, mokonzi ya basoda alingaki koyeba malamu tina nini Bayuda bafundaki Polo. Yango wana abimisi ye na boloko pe atindi básangisa bakonzi ya banganga-Nzambe pe bato ya Likita-Monene. Na sima amemi Polo pe atie ye liboso na bango.

Misala — Chapters