[1] Na vile ya Sezaré moto moko azalaki kuna, kombo na ye Korneye, mokonzi ya batayon ya basoda ya Rome, oyo babengaka “batayon ya Italie.”
[2] Moto yango azalaki moto malamu. Ye ná bato na ye nyonso bazalaki kotosa Nzambe ya Bayuda. Azalaki kosalisa mingi Bayuda oyo bakelelá, pe kosambela Nzambe tango nyonso.
[3] Mokolo moko na ngonga ya misato ya pokwa amoni anjelu moko ya Nzambe abimeli ye. Anjelu akoti na ndako na ye pe alobi na ye: “Korneye.”
[4] Ye ayoki somo tango amoni anjelu pe atuni ye: “Likambo nini, mokonzi?” Anjelu azongiseli ye: “Nzambe andimi losambo na yo, ná lisalisi oyo opesaka na bato bakelelá; alingi kolakisa yo bolingo na ye.
[5] Yango wana tinda bato na Jopé pe bengisa Simon oyo babengaka Piere.
[6] Ye afandi na ndako ya moto moko abongisaka baposo ya nyama, kombo na ye Simon. Ndako na ye ezali penepene ya ebale.”
[7] Awa anjelu akei, Korneye abengi bato mibale na kati ya basali na ye ná soda moko ya malamu na kati ya basoda oyo baumelá epai na ye;
[8] bongo ayebisi bango makambo nyonso oyo elekaki, pe atindi bango na Jopé.
[9] Na sima ya mokolo moko, penepene ya midi, tango bango bazalaki na nzela pe balingi kokóma na Jopé, Piere amati likolo ya ndako po na kosambela.
[10] Ayokaki nzala pe azalaki na posa ya kolia. Awa bazalaki kolambela ye bilei,
[11] amoni Likolo efungwami pe eloko moko lokola elamba ya monene ezalaki kokita na se; ezalaki lokola basimbá yango na basonge nyonso minei.
[12] Na kati etondaki na banyama ya ndenge na ndenge: oyo ezali na makolo minei, banyoka pe bandeke.
[13] Mongongo moko elobi na ye: “Piere, telema, boma pe lia.”
[14] Kasi Piere azongisi: “Té, Nkolo! Nanu naliá eloko ya mbindo té to ya ekila.”
[15] Mongongo yango elobi na ye lisusu: “Eloko oyo Nzambe akómisi peto, koloba té 'tè ezali mbindo.”
[16] Makambo yango esalamaki mbala misato; pe kaka na tango wana eloko yango ezongi na Likolo.
[17] Awa Piere azalaki komituna po na tina ya makambo oyo Nzambe alakisaki ye, bato Korneye atindaki bayei. Bazalaki koluka ndako ya Simon pe bakómi na porte ya lopango.
[18] Babeleli pe batuni: “Simon, oyo babengaka Piere, afandaka awa?”
[19] Piere azalaki kaka komituna po na makambo oyo Nzambe alakisaki ye, bongo Molimo Mosantu alobi na ye: “Bato misato bazali koluka yo.
[20] Kita noki pe kende nzela moko ná bango. Kotia tembe té, po ezali ngai moto natindi bango.”
[21] Bongo Piere akiti pe akei epai ya bato wana; alobi na bango: “Ngai nazali moto oyo bozali koluka. Po na nini boyei awa?”
[22] Bango bazongisi: “Korneye, mokonzi ya basoda, moto atindi biso. Ye azali moto ya bosembo pe asambelaka Nzambe ya Bayuda. Bayuda nyonso balingaka ye. Anjelu moko ya Nzambe ayebisi ye ábengisa yo na ndako na ye, po na koyoka maloba na yo.”
[23] Piere akotisi bango na ndako pe apesi bango esika ya kolala. Tongo etani, atelemi pe akei nzela moko ná bango. Bandeko mosusu ya Jopé balandi ye.
[24] Na sima ya mokolo moko, Piere akoti na Sezaré. Korneye ná bandeko na ye pe baninga na ye ya motema oyo ye abengisaki, bazalaki kozela bango.
[25] Na tango Piere alingaki kokota na ndako, Korneye afukameli ye na botosi nyonso.
[26] Kasi Piere atelemisi ye pe alobi: “Telema, pamba té ngai pe nazali kaka moto.”
[27] Azalaki kaka kosolola ná ye tango akoti na ndako. Awa akuti bato ebele boye basangani,
[28] alobi na bango: “Boyebi 'tè Moyuda akoki kozala esika moko té ná mopaya, to kokota na ndako na ye. Kasi Nzambe alakisi ngai nátika koloba 'tè moto boye azali mbindo to nakoki kozala ná ye té.
[29] Yango wana, tango bobengaki ngai, natiaki tembe té, nayei. Nalingi náyeba tina nini bobengisi ngai?”
[30] Korneye azongisi: “Eleki mikolo misato penepene na tango oyo, na ngonga ya misato ya pokwa, nazalaki kosambela awa na ndako na ngai. Na mbala moko, moto moko atelemi liboso na ngai, alati bilamba ezali kongenga,
[31] pe alobi na ngai: ‘Korneye, Nzambe andimi losambo na yo, pe azali kokanisa lisalisi oyo opesaka na bato bakelelá.
[32] Bongo tinda bato na Jopé pe bengisa Simon oyo babengaka Piere. Ye afandi na ndako ya Simon oyo abongisaka baposo ya nyama. Ndako wana ezali penepene ya ebale.’
[33] Kaka na tango wana natindi bato epai na yo, pe nasepeli lokola oyei. Bongo sik'oyo biso nyonso tozali liboso ya Nzambe, po tóyoka nyonso oyo Nkolo atindi óyebisa biso.”
[34] Bongo Piere alobi: “Ya solo, sik'oyo namoni 'tè Nzambe aponaka bilongi té.
[35] Kasi na ekolo nyonso, moto oyo atosaka ye pe asalaka makambo ya malonga, Nzambe andimaka ye.
[36] Nzambe atindaki maloba na ye na bato ya Israel, ayebisaki bango Sango Malamu ya boboto na monoko ya Yezu Kristo: ye nde moto azali Mokonzi ya bato nyonso.
[37] Boyebi makambo oyo ekweyaki liboso na Galilé pe elekaki na rejion mobimba ya Yudea, sima ya tango Yoane Mobatisi azalaki koteya pe kobatisa bato.
[38] Boyebi ndenge nini Nzambe atondisaki Yezu ya Nazaret na nguya ya Molimo Mosantu. Bipai nyonso azalaki koleka, abandaki kosala bolamu pe kobikisa bato nyonso oyo bazali na boumbu ya zabolo. Pamba té Nzambe azalaki na ye.
[39] Biso tomonaki makambo nyonso oyo ye asalaki na mboka ya Bayuda pe na Yeruzalem. Babomaki ye na kuruze,
[40] kasi na mikolo misato Nzambe ayei kosekwisa ye pe apesi ye nguya ya komimonisa lisusu.
[41] Abimelaki bato nyonso té, kasi bobele biso bato Nzambe aponaki po tósakola sango na ye. Tango asi'asekwaki, toliaki esika moko ná ye.
[42] Apesaki biso motindo tóyebisa bato ya Israel 'tè: Nzambe aponá ye pe atiá ye Zuzi po ákata makambo ya bato nyonso, ézala ya baoyo bazali na bomoi to baoyo bakufá.
[43] Ezali ye nde moto baprofete nyonso bayebisaká 'tè: moto nyonso oyo akondima ye, akozwa bolimbisi ya masumu po na ye.”
[44] Awa Piere azalaki kaka koloba, Molimo Mosantu akiteli baoyo nyonso bazalaki koyoka maloba na ye.
[45] Bandimi ya ekolo ya Bayuda oyo bayaki ná Piere bakamwe penza, awa bamoni 'tè Nzambe akabeli pe bato ya bikolo mosusu Molimo Mosantu.
[46] Pamba té bayoki bango bazali koloba minoko mosusu pe kokumisa Nzambe. Bongo Piere alobi:
[47] “Nani akoki kopekisa bato oyo bázwa batisimo, awa bango basi'bazwi Molimo Mosantu lokola biso?”
[48] Pe Piere atindi bábatisa bango na kombo ya Yezu Kristo. Bongo bato wana basengi Piere áfanda mwa-mikolo esika moko ná bango.