Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:32

[1] Saul pe andimaki 'tè báboma Etiene. Kaka na mokolo yango babandi konyokola bato ya Eklezya na Yeruzalem makasi penza. Bandimi nyonso bapanzani bipai ya rejion ya Yudea pe ya Samarie. Bobele bantoma bato batikalaki na Yeruzalem.

[2] Bato ya mitema malamu bakundi Etiene pe basaleli ye matanga monene.

[3] Nzokande Saul abandaki kotia molende po na koboma Eklezya. Azalaki kokende ndako na ndako, po na kokanga bandimi ya mibali ná ya basi, pe kotia bango na boloko.

[4] Bongo bandeko oyo bapanzanaki babandi kosakola Sango Malamu na mboka mobimba.

[5] Filipe akei na vile ya Samarie, pe abandi kosakola sango ya Mesia.

[6] Bato nyonso bazalaki kotia matoi penza na maloba ya Filipe, tango bazalaki koyoka pe komona makamwisi oyo ye azalaki kosala.

[7] Pamba té milimo mingi ya mabe ezalaki kobima na bato ya maladi, na koganga makasi. Bato mingi oyo bakufá makolo to maboko babikaki.

[8] Boye esengo monene ezalaki na vile wana.

[9] Banda kala moto moko azalaki kuna, kombo na ye Simon. Ye amitiaki lokola moto moko ya monene; azalaki kokamwisa bato ya Samarie na misala na ye ya kinganga-kisi.

[10] Bato nyonso babandaki kondimela ye, ézala bana to bamikóló; bazalaki koloba: “Moto oyo azali na nguya ya Nzambe, oyo babengaka ‘Nguya ya Sukisa’.”

[11] Bazalaki kondimela ye, po banda kala azalaki kokamwisa bango na bikilakila na ye.

[12] Kasi tango Filipe ayei kosakola Sango Malamu ya bokonzi ya Nzambe pe ya kombo ya Yezu Kristo, mibali ná basi bandimi pe bazwi batisimo.

[13] Ye moko pe Simon andimi, bongo azwi batisimo. Azalaki tango nyonso penepene ya Filipe, pe abandaki kokamwa mingi tango azalaki komona makamwisi ya ndenge na ndenge oyo ezalaki kosalama.

[14] Awa bantoma oyo bazalaki na Yeruzalem bayoki 'tè bato ya Samarie bayambi maloba ya Nzambe, batindeli bango Piere ná Yoane.

[15] Tango bango bakómi kuna, babondeli Nzambe po bato ya Samarie bázwa Molimo Mosantu.

[16] Pamba té Molimo Mosantu akitelaki nanu ata moko na bango té. Bazwaki bobele batisimo na kombo ya Nkolo Yezu.

[17] Bongo Piere ná Yoane batieli bango maboko, pe bazwi Molimo Mosantu.

[18] Awa Simon amoni 'tè bazwi Molimo Mosantu tango Piere ná Yoane batielaki bango maboko, alaki bantoma mbongo,

[19] alobi: “Bópesa ngai pe nguya oyo, po soki natieli moto maboko, ázwa Molimo Mosantu.”

[20] Kasi Piere azongiseli ye: “Kende kokufa, yo ná mbongo na yo! Okanisi 'tè okoki kosomba likabo ya Nzambe na mbongo?

[21] Ozwi ata ndambo té na bomengo oyo Nzambe akabeli biso, pamba té motema na yo ezali malamu té na miso ya Nzambe.

[22] Yango wana bongola makanisi na yo ya mabe, pe bondela Nkolo; tango mosusu akoki kolimbisa makanisi oyo eyeeli yo.

[23] Pamba té namoni 'tè motema na yo etondá na likunya, pe okangamá na masumu.”

[24] Bongo Simon alobi na Piere pe Yoane: “Bino bóbondela Nkolo po na ngai, po makambo oyo bolobi ékweela ngai té.”

[25] Awa basilisi koteya maloba ya Nkolo, bazongi na Yeruzalem. Na nzela basakoli Sango Malamu na bamboka mingi ya Samarie.

[26] Mokolo moko anjelu ya Nkolo alobi na Filipe: “Telema pe kende na epai ya esobe, tii okomona nzela oyo elongwá na Yeruzalem pe ekendé na Gaza; landa nzela yango.”

[27] Filipe atelemi pe akei. Akutani na moto moko ya mboka Etiopie, ye azalaki mobateli ya mbongo pe ya biloko nyonso ya mama-mokonzi ya Etiopie, moto yango babomá ye mokongo. Ayaki na Yeruzalem po na kosambela,

[28] pe azalaki kozonga na mboka na ye. Afandaki na shareti, pe azalaki kotanga mokanda ya profete Ezaya.

[29] Molimo Mosantu alobi na Filipe: “Kende pe pusana penepene ya shareti wana.”

[30] Filipe akei mbangu pe ayoki moto yango azali kotanga mokanda ya profete Ezaya, bongo atuni ye: “Oyebi tina ya makambo ozali kotanga?”

[31] Ye azongisi: “Ndenge nini nakoki koyeba yango, soki moto alimboleli ngai té?” Bongo alobi na Filipe ámata na shareti pe áfanda pembeni na ye.

[32] Eteni ya mokanda ya Nzambe ye azalaki kotanga, yango oyo: “Akómaki lokola meme oyo balingi koboma; lokola mwana-meme oyo elelaka té tango bazali kolongola yango bapwale; afungolaki ata monoko té.

[33] Basambwisaki ye pe bakatelaki ye etumbu ya liwa; ata moto moko té akoki koloba sango ya bana na ye, pamba té balongolaki ye na mokili.”

[34] Moto wana ya Etiopie atuni Filipe: “Nabondeli yo, yebisa ngai: profete akòmá makambo wana po na nani? Akòmá po na ye moko to po na moto mosusu?”

[35] Bongo Filipe abandi kolimbola maloba yango, pe na ndenge wana ateyi ye Sango Malamu ya Yezu.

[36] Awa bazalaki kaka kolanda nzela na bango, bakómi na esika moko ezalaki na mai, pe moto wana alobi: “Tala mai yango oyo. Eloko nini ezali kopekisa ngai názwa batisimo sik'oyo?”

[37] [Filipe alobi na ye: “Soki ondimi na motema moko, okoki kozwa batisimo.” Ye azongisi: “Nandimi 'tè Yezu Kristo azali Mwana ya Nzambe.”]

[38] Bongo akangi shareti, bakiti bango mibale na mai, pe Filipe abatisi ye.

[39] Awa babimi na mai, Molimo ya Nkolo alimwisi Filipe. Moto wana ya Etiopie amonaki ye lisusu té, bongo asimbi nzela, akei na esengo.

[40] Kasi Filipe ayei komonana na vile ya Azot, pe akei kosakola Sango Malamu na bamboka nyonso tii tango akómaki na Sezaré.

Misala — Chapters