Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 7:46

[1] Tango Apolos azalaki na Korente, Polo akatisi bangomba pe akómi na Efeze. Kuna akutani ná bayekoli mosusu,

[2] pe atuni bango: “Bozwaki Molimo Mosantu tango bondimaki?” Bango bazongiseli ye: “Nanu kutu toyoká té 'tè Molimo Mosantu azali.”

[3] Bongo Polo alobi na bango: “Batisimo nini bino bozwaki?” Bango bazongisi: “Batisimo ya Yoane.”

[4] Polo alobi na bango: “Yoane abatisaki baoyo bandimaki kobongola mitema, pe alobaki na bato 'tè bándimela moto oyo akoya sima na ye. Elingi koloba Yezu.”

[5] Awa bayoki maloba wana, bazwi batisimo na kombo ya Nkolo Yezu.

[6] Polo atieli bango maboko pe Molimo Mosantu akiteli bango. Babandi koloba minoko eyebani té, pe kosakola na nguya ya Molimo.

[7] Bato yango bazalaki soki zomi na mibale.

[8] Polo akoti na ndako ya lisanga; sanza misato mobimba azalaki koteya na molende pe kolimbolela Bayuda makambo oyo etali bokonzi ya Nzambe. Asali nyonso po bato bábongola makanisi na bango;

[9] kasi bato mosusu bazalaki se mitú makasi pe bandimaki té. Balobi makambo ya mabe po na nzela ya Yezu na miso ya bato nyonso. Bongo Polo atiki bango, amemi bayekoli na ndako ya kelasi ya Tiranus, pe azalaki koteya kuna mikolo nyonso.

[10] Asalaki bongo mbula mibale, pe na ndenge wana bato nyonso ya rejion ya Azie, bayokaki sango ya Nkolo, ézala Bayuda to bato ya bikolo mosusu.

[11] Nzambe azalaki kosala makamwisi minene penza na maboko ya Polo.

[12] Yango wana bato mosusu babandaki komemela bato ya maladi bitambala to bilamba oyo esimbaki nzoto ya Polo; boye bango bazalaki kobika, pe milimo mabe ezalaki kobima na nzoto na bango.

[13] Na vile wana ezalaki pe na Bayuda bazalaki kotambola bipai nyonso, pe kobengana milimo mabe. Bamosusu bameki kosalela kombo ya Nkolo Yezu, babandi koloba na milimo mabe boye: “Natindi bino bóbima na kombo ya Yezu oyo Polo azali kosakola.”

[14] Mokolo moko bana sambo ya nganga-Nzambe monene Seva basali bongo,

[15] kasi molimo mabe ezongiseli bango: “Nayebi Yezu pe nayokaki sango ya Polo; kasi bino bozali banani?”

[16] Mbala moko moto oyo azalaki na molimo mabe akweeli bango pe alongi bango; anyatinyati bango tii bakimi na ndako bolumbu pe bazokizoki bapota na nzoto.

[17] Bato nyonso ya Efeze, Bayuda pe bato ya bikolo mosusu, bayoki makambo wana, bamoni somo mingi penza pe bakumisi kombo ya Nkolo Yezu.

[18] Bato mingi oyo bandimaki bayei kobimisa polele makambo ya mabe oyo basalaki.

[19] Bato mosusu ebele oyo bamipesá na kinganga-kisi bamemi mikanda na bango pe batumbi yango na miso ya bato nyonso. Batangi talo na yango pe bamoni 'tè ekokani na lifuta oyo basali 200 bakoki kozwa na mbula mobimba.

[20] Na ndenge wana Sango Malamu epanzanaki, pe bato mingi penza bandimi yango po na nguya ya Nkolo.

[21] Sima ya makambo wana, Polo azwi mokano ya kokatisa Masedwane pe Akaya po na kokende na Yeruzalem. Alobi: “Tango nakolongwa kuna, nasengeli pe kokóma na Rome.”

[22] Bongo atindi basalisi mibale na Masedwane, Timoté ná Eraste. Kasi ye moko atikalaki nanu na rejion ya Azie.

[23] Na tango wana mobulu monene ebimaki po na mateya ya nzela ya Yezu.

[24] Ezalaki na moto moko, kombo na ye Demetrius, mosala na ye kosala biloko ya bibende. Azalaki kosala bikeko ya ndako ya nzambe moko ya mwasi, kombo na ye Artemis; pe na ndenge wana azalaki kofuta basali na ye mbongo mingi.

[25] Asangisi bango ná bato mosusu oyo bazalaki kosala mosala ya ndenge wana, pe alobi na bango: “Baninga na ngai, bino moko boyebi 'tè tozwaka bomengo na biso se na mosala oyo.

[26] Bomoni pe boyoki makambo Polo wana azali kosala. Azali koloba 'tè banzambe oyo esalami na bato ezali banzambe té. Bongo abongoli makanisi ya bato ebele awa na vile ya Efeze, pe na rejion ya Azie mobimba.

[27] Makambo wana ekoki kobebisa bobele mosala na biso té, kasi ekobebisa pe lokumu ya ndako ya Artemis. Bongo bato bakomona yango pamba, pe bakokumisa Artemis lisusu té. Nzokande ye azali nzambe oyo basambelaka na rejion mobimba ya Azie pe na mokili mobimba.”

[28] Awa bato bayoki maloba wana, batomboki mingi penza, babandi koganga: “Lokumu na Artemis ya Efeze!”

[29] Bango nyonso bakei na libanda ya masano. Na nzela, bakangi Gayus ná Aristarke bato ya Masedwane oyo Polo amemaki na Efeze. Mboka mobimba ekoti mobulu!

[30] Polo alingaki kobima na miso ya bato, kasi bayekoli bapekisi ye.

[31] Basali mosusu ya leta oyo bazalaki baninga ya Polo batindeli ye pe maloba po ákende na libanda ya masano té.

[32] Mobulu monene ezalaki na kati ya bato oyo basanganaki. Moto na moto azalaki koganga na ndenge na ye! Mingi kutu na kati na bango bayebaki té tina nini bato basanganaki.

[33] Nzokande Bayuda bapusi moto moko liboso, kombo na ye Aleksandre. Bato mosusu oyo bazalaki wana bayebisi ye makambo ezalaki koleka. Bongo Aleksandre atomboli liboko po bato báfanda kimia, pe alingaki koloba po na kolongisa Bayuda na miso ya bato.

[34] Kasi awa bayoki 'tè azali Moyuda, bango nyonso bagangi mbala moko: “Lokumu na Artemis ya Efeze! Lokumu na Artemis ya Efeze!” Basalaki bongo soki bangonga mibale.

[35] Na suka, sekretere ya vile ayei kolembisa kanda ya bato, alobi: “Bato ya Efeze, bato nyonso bayebi 'tè vile ya Efeze ebatelaka ndako ya nzambe-mwasi Artemis, ekeko oyo eutá na Likolo.

[36] Moto moko té akoki kotia tembe na makambo wana. Bongo bókitisa mitema na bino pe bósala bozoba té.

[37] Bato oyo bomemi awa batsiolaki nzambe na biso té, bayibaki pe eloko té na ndako na ye.

[38] Soki Demetrius pe basali na ye bazali na likambo na moto, tribinal ezali, bazuzi pe bazali, bongo báfundana.

[39] Kasi soki bozali na likambo mosusu, likita ya bakonzi ekobongisa yango ndenge mibeko ezali kotinda.

[40] Makambo ezali koleka lelo, pe ndenge tosangani awa, ezangá tina. Tango mosusu kutu bakoki kofunda biso po na yango 'tè tobimisi mobulu. Pe tokozanga maloba soki batuni biso.”

[41] Awa alobi boye, atindi bato nyonso bápanzana.

Misala — Chapters