[1] Nganga-Nzambe monene atuni Etiene: “Makambo wana ezali ya solo?”
[2] Etiene azongisi: “Batata pe bandeko, bóyoka! Nzambe ya lokumu nyonso abimelaká koko na biso Abraham, tango azalaki na Mezopotamie, liboso 'tè ákende kofanda na Haran.
[3] Alobaká na ye: ‘Tika mboka na yo pe libota na yo; kende na mboka oyo ngai nakolakisa yo.’
[4] Bongo Abraham atiki mboka na ye ya Kaldé, pe akei kofanda na Haran. Sima ya liwa ya tata na ye, Nzambe amemi ye na mboka oyo bino bozali kofanda na moi ya lelo.
[5] Kasi akómisaká Abraham kolo ya mabelé ata moko té, ézala kutu esika ya kotia likolò. Alakaká ye kaka 'tè akopesa ye mboka oyo, po ékóma ya bana na ye; nzokande Abraham azalaki nanu na Mwana té.
[6] Pe Nzambe alobaki na ye lisusu boye: ‘Bana na yo bakozala kofanda na mboka ya bapaya. Bato wana bakokómisa bango baumbu kuna, pe bakonyokola bango mbula 400 mobimba.
[7] Kasi ngai moko Nzambe nalobi: nakosambisa ekolo oyo ekokómisa bango baumbu. Sima na yango bakolongwa kuna pe bakobanda kosambela ngai na esika oyo.’
[8] Pe Nzambe asali boyokani ná Abraham; elembo na yango nde kokata bana mibali nzoto. Yango wana Abraham akataki mwana na ye Izaak nzoto tango akokisaki póso moko. Ndenge moko pe Izaak akataki Jakob nzoto, pe Jakob akataki bana na ye nzoto, oyo bakómaki bakoko zomi na mibale ya Israel.
[9] “Bakoko na biso bayokelaki Jozef likunya, pe batekaki ye lokola moumbu po bámema ye na Ejipte. Kasi Nzambe azalaki na ye;
[10] abikisaki ye na bapasi na ye nyonso, pe apesaki ye bolamu ná mayele; boye mokonzi monene ya Ejipte, atie ye motambwisi ya Ejipte pe ya biloko na ye nyonso.
[11] Bongo nzala engalaki na Ejipte mobimba, pe na mboka nyonso ya Kanán. Pasi ekómaki mingi koleka, pe bakoko na biso bazwaki eloko ya kolia té.
[12] Tango Jakob ayoki 'tè blé ezali na Ejipte, atindi bakoko na biso kuna.
[13] Na mobembo na bango ya mibale, Jozef amimonisaki na bandeko na ye, pe kaka na tango wana mokonzi monene ya Ejipte ayaki koyeba ekolo na ye.
[14] Jozef atindi bato bákende koluka tata na ye Jakob, pe libota na ye mobimba ya bato tuku sambo na mitano (75).
[15] Wana ezali ndenge Jakob akendeki na Ejipte. Akufaki kuna, ná bakoko na biso.
[16] Bamemaki bibembe na bango na Sikem, pe bakundaki bango kuna, na simetiere oyo Abraham asombaki epai ya bana ya Hamor.
[17] “Awa tango oyo Nzambe alakaká Abraham elingaki kokoka, bakoko na biso babotami mingi pe bakómi ebele na Ejipte.
[18] Bongo moto ya sika ayei kozwa bokonzi, ye ayebaki Jozef té.
[19] Abandi kokosa bakoko na biso, pe konyokola bango. Atindi bango kutu na makasi bábwaka bana na bango po bákufa.
[20] Moize abotamaki na tango yango. Ye azalaki mwana moko ya kitoko na miso ya Nzambe. Babokolaki ye sanza misato na ndako ya tata na ye.
[21] Tango bayei kobwaka ye, mwana-mwasi ya mokonzi monene ya Ejipte alokoti ye, pe abokoli ye lokola mwana na ye penza.
[22] Yango wana Moize ayekolaki makambo nyonso ya mayele ya ba-Ejipsien, pe akómaki moto monene na maloba pe na misala na ye.
[23] “Tango Moize akómi na mbula tuku minei (40), alingaki kokende kotala bato ya ekolo na ye ya Israel.
[24] Amoni Ejipsien moko azali konyokola moto ya ekolo na ye, akoteli ndeko na ye, azongiseli Ejipsien wana mabe na ye pe abomi ye.
[25] Akanisaki bandeko na ye bakondima 'tè Nzambe alingi kotinda ye po na kopesa bango bonsomi; kasi bango bayebaki yango té.
[26] Na sima ya mokolo moko Moize akuti ba-Israelite mibale bazali kobunda, pe alingaki kotia boyokani na kati na bango. Alobi na bango: ‘Batata, bino bozali bandeko. Po na nini bozali kobunda?’
[27] Kasi moto oyo azalaki konyokola moninga na ye atindiki Moize pe alobi: ‘Nani atie yo mokonzi pe zuzi na biso?
[28] Olingi óboma ngai ndenge obomaki Ejipsien wana lobi?’
[29] Awa Moize ayoki maloba yango akimi, pe akei kofanda na mboka Madian. Kuna abotaki bana mibale ya mibali.
[30] “Na sima ya mbula tuku minei (40), anjelu moko abimeli Moize na kati ya mwa-nzete ya nzube ezalaki kozika móto, na esobe penepene ya ngomba ya Sinaí.
[31] Moize akamwe tango amoni makambo wana. Kasi tango apusanaki po na kotala yango penepene, ayoki mongongo ya Nkolo elobi:
[32] ‘Nazali Nzambe ya bakoko na yo, Nzambe ya Abraham, ya Izaak pe ya Jakob.’ Moize abandi kolenga po na somo, pe amekaki kutu kotala té.
[33] Bongo Nkolo alobi na ye: ‘Longola basandale na makolo na yo, po esika oyo otelemi ezali mabelé ya bosantu.
[34] Namoni pasi ya bato na ngai oyo bazali na Ejipte, nayoki ndenge bazali kolela, pe nakiti po na kobikisa bango. Bongo yaka nátinda yo na Ejipte.’
[35] “Ya solo, bakoko baboyaká Moize, batunaki ye: ‘Nani atie yo mokonzi pe zuzi?’ Ezali nde ye moto Nzambe atindaki lokola mokonzi pe mobikisi, tango anjelu abimelaki ye na mwa-nzete ya nzube.
[36] Ezali Moize moto abimisaki ba-Israelite na Ejipte, asalaki makamwisi ya ndenge na ndenge na mboka yango, na Ebale ya Motane pe na esobe, mbula tuku minei (40).
[37] Ezali Moize moto alobaki na bato ya Israel: ‘Nzambe akotindela bino profete moko lokola ngai. Ye akozala moto ya ekolo na bino.’
[38] Tango bakoko na biso basanganaki na esobe na miso ya Nzambe, Moize azalaki kotelema na kati na bango pe anjelu oyo azalaki koloba na ye na ngomba ya Sinaí; azwaki maloba ya Nzambe oyo epesaka bomoi, pe atikelaki biso yango.
[39] “Kasi bakoko na biso baboyaki kotosa ye, batombokelaki ye pe balingaki kozonga na Ejipte.
[40] Balobaki na Aaron: ‘Salela biso banzambe oyo ekobanda kokende liboso na biso, po toyebi té makambo nini ekweeli Moize oyo abimisaki biso na Ejipte.’
[41] Na mikolo wana basali ekeko ya mwana-ngombe, bapesi mabonza na eloko oyo bango moko basalaki, pe basalisi feti po na yango.
[42] Kasi Nzambe apesaki bango mokongo pe atikaki bango básambela minzoto, ndenge ekòmamá na mikanda ya baprofete: ‘Bato ya Israel, mbula tuku minei (40) mobimba bozalaki koboma banyama na esobe, pe kopesa yango lokola mabonza, kasi ezalaki po na ngai té.
[43] Bozalaki komema ndako ya kapo ya nzambe Molok, pe elili ya monzoto ya nzambe na bino Refan. Wana ezali bikeko oyo bino bosalaki po na kosambela. Yango wana, nakomema bino mosika koleka Babilone.’
[44] “Tango bakoko na biso bazalaká na esobe, bazalaki na Ndako ya Kapo ya bosantu, kaka lokola oyo Nzambe alakisaki na Moize. Kuna nde esika babandaki kobomba mabanga oyo bakòmá Mibeko.
[45] Tango Jozué akómaki motambwisi, bana na bango babotoli mabelé ya bikolo oyo Nzambe abenganaki na miso na bango. Bongo bakotisi Ndako ya Kapo ya bosantu kuna, pe yango etikalaki wana tii na tango ya David.
[46] David azwaki bolamu ya Nzambe, pe asengaki nzela ya kotòngela Nzambe ya Jakob esika ya kofanda.
[47] Nzokande ezali Salomon moto atòngelaki ye Ndako.
[48] “Kasi Nzambe ya Likolo afandaka té na bandako oyo etòngamá na bato. Pamba té profete Ezaya alobaká boye:
[49] ‘Nkolo alobi: Likolo ezali kiti na ngai ya bokonzi, pe mabelé ezali esika na ngai ya kotia makolo. Ndako ya ndenge nini bokoki kotòngela ngai? Esika nini bolingi ngai náya kofanda?
[50] Ngai moto nasalá biloko wana nyonso, boye té?’
[51] “A! Bino, bato ya mitú makasi! Boyokaka pe bokanisaka lokola bato bayebi Nzambe té. Boboyaka Molimo Mosantu bobele ndenge bakoko na bino bazalaká koboya ye.
[52] Profete nini bakoko na bino banyokolaki té? Babomaki baoyo bazalaki kosakola 'tè Moto ya bosembo akoya. Bongo tango ye ayaki, bino botekaki pe bobomaki ye.
[53] Bino bato bozwaki Mibeko oyo ba-anjelu bamemelaká bakoko, bozalaki kotosa yango té!”
[54] Tango bato ya Likita-Monene bayoki maloba yango, batomboki pe basiliki mingi na Etiene.
[55] Kasi ye atondi na Molimo Mosantu, atali na Likolo, pe amoni nkembo ya Nzambe; amoni pe Yezu atelemi na esika ya lokumu penepene ya Nzambe.
[56] Bongo alobi: “Bóyoka! Namoni Likolo efungwami, pe Mwana ya Moto atelemi na esika ya lokumu penepene ya Nzambe.”
[57] Bango nyonso bakangi matoi, bagangi makasi pe bayei kowelela ye;
[58] babimisi ye na vile pe babandi kobamba ye mabanga. Batemwen bapesaki banzambala na bango na elenge mobali moko, kombo na ye Saul, po ákengela yango.
[59] Awa bazalaki kobamba ye mabanga, Etiene abondeli boye: “Nkolo Yezu, yamba molimo na ngai.”
[60] Akwei na mabolongo pe agangi makasi: “Nkolo, limbisa bango lisumu oyo!” Awa alobi bongo akati motema.