[1] Ndeko Teofile, na mokanda na ngai ya liboso nakòmaki makambo nyonso Yezu asalaki pe ateyaki uta ebandeli,
[2] tii mokolo Nzambe abutisaki ye na Likolo. Liboso ya kokende na Likolo, apesaki mitindo na bantoma na ye oyo ye aponaki na nguya ya Molimo Mosantu.
[3] Na sima ya liwa na ye abimelaki bango mbala mingi po na kolakisa polele 'tè azali na bomoi. Mikolo tuku minei mobimba azalaki komilakisa pe koyebisa bango ndenge Nzambe abandi kotia bokonzi na ye.
[4] Mokolo moko azalaki kolia esika moko ná bango, atindi bango boye: “Bólongwa na Yeruzalem té, kasi bózela likambo oyo Tata alakaki, ndenge nalobelaki bino.
[5] Pamba té Yoane Mobatisi abatisaki bato na mai, kasi na sima ya mwa- mikolo, Nzambe akobatisa bino na Molimo Mosantu.”
[6] Bongo bantoma oyo basanganaki batuni Yezu: “Nkolo, ezali na mikolo oyo nde okozongisa bokonzi na Israel?”
[7] Yezu azongiseli bango: “Po na tango to mokolo, etali bino té. Tata atiá yango ndenge ye moko alingaki.
[8] Kasi Molimo Mosantu akokitela bino, bongo bokozwa nguya po bókende kosakola sango na ngai na Yeruzalem, na rejion ya Yudea pe ya Samarie mobimba, tii bipai nyonso ya mokili.”
[9] Awa Yezu asilisi koloba makambo wana, Nzambe atomboli ye na Likolo tango bazalaki kotala ye, pe lipata moko eyei kozipa ye, bongo bamoni ye lisusu té.
[10] Bazalaki kotala se na likolo epai Yezu azalaki kokende, na mbala moko bamoni bato mibale balati bilamba ya pembe batelemi penepene na bango
[11] pe balobi: “Bato ya Galilé, po na nini botikali awa pe bozali kotala na likolo? Yezu oyo akabwani ná bino po na kobuta na Likolo akozonga kaka ndenge bomoni ye akei.”
[12] Bongo bayekoli bauti na Ngomba ya ba-Olive pe bazongi na Yeruzalem. Ngomba wana ezali mosika té na vile, soki kilometre moko.
[13] Tango bakómi na vile, bakoti na ndako pe bamati na etaje epai bamesanaki kosangana. Ezalaki Piere, Yoane, Jake, André, Filipe, Toma, Bartelemi, Matié, Jake, mwana ya Alfé, Simon oyo azalaká liboso moto ya lingomba ya Baweli-Lipanda, ná Yuda, mwana ya Jake.
[14] Bango nyonso bayokanaki pe bazalaki kosangana mikolo nyonso po na kosambela esika moko, ná basi mosusu pe Maria, mama ya Yezu, ná bandeko ya Yezu.
[15] Mokolo moko, tango bandeko 120 basanganaki, Piere atelemi na kati na bango pe alobi:
[16] “Bandeko, Molimo Mosantu asi'ayebisá makambo nyonso ekokweela Yudas oyo alakisaki nzela na bato bakangaki Yezu. Ayebisaki yango na monoko ya David, boye makambo oyo ekòmamá na Mikanda esengeli kosalama.
[17] Yudas azalaki moto ya lisanga na biso, pe azalaki na mosala na ye na kati na biso.
[18] Moto wana asombaki elanga na mbongo oyo bafutaki ye po na mabe na ye. Akweyaki motú na se, nzoto na ye epasukaki na kati-kati, pe mitshopo na ye nyonso ebimaki.
[19] Bato nyonso ya Yeruzalem bayokaki makambo oyo. Yango wana babengaka elanga wana na monoko na bango ‘Akeldama’, elingi koloba ‘elanga ya makila’.
[20] “Nzokande ekòmamá na mokanda ya Banzembo: ‘Esika afandaka, épanzana; moto moko té átikala kuna.’ Pe lisusu: ‘Moto mosusu ázwa mosala na ye.’
[21] “Yango wana esengeli moto moko áya kosangana na biso, po ákoka kosakola kosekwa ya Nkolo Yezu. Ebongi tópona ye na kati ya bato oyo bazalaki kolanda biso tango nyonso Yezu azalaki ná biso, kobanda tango Yoane abatisaki ye, tii mokolo Nzambe abutisi ye na Likolo.”
[23] Bongo batie bato mibale: Jozef oyo babengaka Barsabas, kombo na ye mosusu Yustus, ná Matias.
[24] Na sima bango nyonso babondeli boye: “Nkolo, yo oyebi makambo ezali na mitema ya bato nyonso. Lakisa biso nani yo oponi na kati ya bato oyo mibale
[25] po na kozwa mosala ya ntoma na esika ya Yudas, oyo atikaki yango pe akendé epai ye moko aponaki.”
[26] Bongo babeti zeke po na kozwa moto moko na kati na bango, pe zeke elakisi Matias. Yango wana batie ye na lisanga ya bantoma zomi na moko.