Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:11

[1] Tango Piere ná Yoane bazalaki kaka koloba na bato, banganga-Nzambe bayei, ná bakonzi ya bakengeli ya Ndako ya Nzambe pe ba-Sadusé.

[2] Bazalaki na kanda penza po bantoma mibale wana bazalaki koteya bato, pe kosakola 'tè Yezu asekwi. Elingi koloba 'tè bato bakufá bakoki kosekwa.

[3] Bongo bakangi bango, pe batie bango na boloko tii na mokolo oyo elandaki, pamba té pokwa esi'ekómaki.

[4] Kasi bato mingi na kati ya baoyo bayokaki maloba yango bandimaki; boye bato oyo bandimaki, bakómaki mibali soki 5.000.

[5] Awa tongo etani, bakonzi ya Bayuda, bambuta-muntu pe balakisi-Mibeko basangani na Yeruzalem.

[6] Ezalaki: Hana, nganga-Nzambe monene, Kaife, Yoane, ná Aleksandre pe bato nyonso ya libota ya bakonzi ya banganga-Nzambe.

[7] Batelemisi bantoma liboso na bango pe batuni bango: “Bosali makambo oyo na nguya nini pe na kombo ya nani?”

[8] Bongo Piere atondi na Molimo Mosantu, alobi na bango: “Bakonzi ya ekolo pe bambuta-muntu,

[9] botuni biso lelo po na bolamu oyo tosali na moto akufá makolo, bolingi koyeba soki ye abiki na nguya ya nani.

[10] Tika tóyebisa bino nyonso ná ekolo mobimba ya Israel 'tè ye abiki pe atelemi liboso na bino, po na nguya ya kombo ya Yezu ya Nazaret, oyo bino bobomaki na kuruze pe Nzambe asekwisi ye.

[11] Pamba té ekòmamá boye po na ye: ‘Libanga oyo bino bamason bobwakaki, ekómi fondasion oyo esimbi lopango mobimba ya Yeruzalem.’

[12] Bato bakoki kobika bobele epai na ye. Ya solo, na mokili mobimba Nzambe atiá moto mosusu té oyo akoki kobikisa biso.”

[13] Awa bato ya Likita bamoni molende ya Piere ná Yoane, bakamwe penza po bamoni 'tè bango bazali bato pamba oyo bayekolá té. Bongo bayebaki lisusu 'tè bazalaki kotambola nzela moko ná Yezu.

[14] Kasi lokola bazalaki komona pe moto oyo abikaki, atelemi penepene na bango, bakokaki lisusu kotia tembe té.

[15] Bongo babimisi bango na Likita-Monene, pe babandi kotiana tembe boye:

[16] “Tósala nini na bato oyo? Pamba té na Yeruzalem mobimba bayebi malamu 'tè ezali bango nde bato basali likamwisi monene oyo, pe tokoki kowangana yango té.

[17] Kasi tógangela bango pe tópekisa bango báloba lisusu na kombo ya Yezu té ata na nani, po sango ya likambo oyo épanzana té na kati ya bato.”

[18] Bongo babengi bango pe bapekisi bango koloba to koteya na kombo ya Yezu.

[19] Kasi Piere ná Yoane bazongiseli bango: “Bino moko bótala nanu soki nini ezali malamu liboso ya Nzambe: Tótosa bino, to tótosa Nzambe?

[20] Kasi po na biso, makambo oyo tomonaki pe toyokaki, tokoki kotika koloba yango té.”

[21] Bato ya Likita bagangeli bango lisusu, pe batiki bango, po bazwaki nzela ya kopesa bango etumbu té. Pamba té bato nyonso bazalaki kokumisa Nzambe po na makambo oyo elekaki.

[22] Moto oyo abikaki na likamwisi yango asi'alekisaki mbula tuku minei (40).

[23] Awa batiki bango, Piere ná Yoane bakei epai ya baninga na bango, pe balobeli bango makambo nyonso bakonzi ya banganga-Nzambe pe bambuta-muntu balobaki.

[24] Tango bayoki lisolo oyo, bandimi basangani po na kosambela Nzambe boye: “Mokonzi, yo moto osalá Likolo ná se, ebale pe biloko nyonso.

[25] Na nguya ya Molimo Mosantu, olobaká boye na monoko ya koko na biso David, mosali na yo: ‘Po na nini bikolo nyonso ezali kotomboka, pe kongala pamba-pamba boye?

[26] Bakonzi ya mokili batomboki, bashef ya bikolo bakómi koyokana, po báboya Nkolo ná Mesia na ye.’

[27] “Ya solo, Erode ná Ponse Pilate basangani na vile oyo, ná bikolo mosusu pe bato ya Israel, po na koboya bokonzi ya Yezu, mosali na yo ya bosantu, oyo yo oponá Mesia.

[28] Na ndenge wana basali makambo nyonso oyo okanaká banda kala na nguya pe na makanisi na yo.

[29] Pe sik'oyo, Nkolo, tala ndenge bazali kogangela biso basali na yo, pe pesa biso molende nyonso ya koteya maloba na yo.

[30] Salela nguya na yo, bikisa bato ya maladi, pe kokisa makamwisi ya ndenge na ndenge na kombo ya Yezu, Mosali na yo ya bosantu.”

[31] Awa basilisi kosambela, esika oyo basanganaki eningani. Bango nyonso batondi na Molimo Mosantu, pe babandi kosakola maloba ya Nzambe na molende nyonso.

[32] Bandimi nyonso bazalaki motema moko; ata moto moko té azalaki koloba 'tè biloko na ye ezali bobele po na ye; kasi biloko nyonso ezalaki po na bango nyonso.

[33] Nzambe azalaki kopesa nguya monene na bantoma, po na kosakola kosekwa ya Nkolo Yezu; pe bolamu na ye ezalaki mingi na bango nyonso.

[34] Ata moto moko té na kati na bango azalaki kokelela. Pamba té bandimi nyonso oyo bazalaki na bilanga to na bandako batekaki yango, bamemaki mbongo wana,

[35] pe bapesaki yango na bantoma. Bongo bazalaki kokabola mbongo yango na moto nyonso ndenge posa ya moto na moto ezalaki kosenga.

[36] Moto moko ya libota ya Levi azalaki wana, kombo na ye Jozef, abotamaki na esanga ya Shipre. Bantoma bazalaki kobenga ye Barnabas, elingi koloba “oyo apesaka molende.”

[37] Lokola azalaki na elanga na ye, ateki yango, amemi mbongo pe apesi yango na bantoma.

Misala — Chapters