Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:54

[1] Bato mosusu bautaki na rejion ya Yudea, bayei na Antioshe pe babandi koteya bandeko boye: “Bokoki kobika té, soki bakati bino nzoto té ndenge Mibeko ya Moize ezali kotinda.”

[2] Polo ná Barnabas baboyi mateya yango pe babandi kotiana tembe penza ná bato wana. Lokola likambo eyaki ndongo, bandeko bazwi mokano 'tè Polo ná Barnabas pe bandimi mosusu ya Antioshe bákende na Yeruzalem epai ya bantoma pe bambuta-muntu, po na kobongisa likambo wana.

[3] Bongo bandeko ya Eklezya ya Antioshe bakei kotika bango na nzela. Polo ná Barnabas bakatisi Fenisie pe Samarie; bayebisi bipai nyonso ndenge bato ya bikolo mosusu bayaki kobongola mitema; sango yango esepelisaki penza bandeko nyonso.

[4] Tango bakómi na Yeruzalem, Eklezya mobimba ná bantoma pe bambuta-muntu bayambi bango. Polo ná Barnabas bayebisi bango makambo Nzambe asalaki na maboko na bango.

[5] Kasi bato mosusu ya lingomba ya ba-Farizé oyo bandimaki, batelemi pe balobi: “Esengeli 'tè bákata bandimi ya bikolo mosusu nzoto, pe bátinda bango bábanda kotosa Mibeko ya Moize.”

[6] Bantoma pe bambuta-muntu basangani po na kotala likambo wana.

[7] Awa baumeli po na kotiana tembe, Piere atelemi pe alobi: “Bandeko, boyebi ndenge Nzambe aponaki ngai kala awa na kati na bino po násakola Sango Malamu na bato ya bikolo mosusu, báyoka Sango Malamu yango pe bándima.

[8] Nzambe oyo ayebi mitema ya bato alakisaki 'tè ayambi bango, apesi bango Molimo Mosantu ndenge apesaki biso;

[9] akesenisi biso ná bango té. Nzambe akómisi mitema na bango pembe po bandimi Sango Malamu.

[10] Bongo sik'oyo, po na nini bozali komeka Nzambe, na ndenge bolingi komemisa bayekoli mokumba oyo bakoko na biso to biso moko tokokaki komema té?

[11] Kasi tondimi 'tè tobiki po na bolamu ya Nkolo Yezu, ndenge moko ná bango.”

[12] Bongo bato nyonso oyo basanganaki bafandi nyee. Bayokaki Barnabas ná Polo balobeli bango makambo nyonso oyo bango basalaki na nguya ya Nzambe na kati ya bikolo mosusu.

[13] Sima na bango, Jake atelemi pe alobi: “Bandeko, bóyoka ngai!

[14] Simon alakisi ndenge uta ebandeli Nzambe akotelaki bikolo mosusu po na kopona bato na ye na kati na yango.

[15] Makambo wana ekokani ná maloba ya baprofete, pamba té ekòmamá boye:

[16] ‘Nkolo alobi: Sima ya makambo wana nakozongela bino. Libota ya David ekómi lokola ndako ebukaná, nakotònga yango lisusu, nakotelemisa bamir na yango.

[17] Boye bato oyo batikali bakobanda koluka ngai, esika moko ná bikolo nyonso oyo nalobi 'tè ezali ya ngai.

[18] Ngai Nkolo moto nalobi boye, pe nakosala yango; nasi'nalobá yango uta kala.’”

[19] Bongo Jake asukisi boye: “Namoni 'tè tokoki té kotungisa bato ya bikolo mosusu oyo bandimeli Nzambe.

[20] Nzokande tókòmela bango kaka mokanda boye: ‘Nyama oyo bapesi mabonza na banzambe ya bikeko, bólia yango té, ezali ekila; mabala oyo Mibeko ezali kopekisa, bóboya yango; banyama oyo babomi na kofina kingo bólia yango té pe bómela makila na yango té.’

[21] Pamba té banda kala bateyaka Mibeko ya Moize na bamboka nyonso, pe batangaka yango na kati ya bandako ya lisanga na Mikolo nyonso ya Kopema.”

[22] Bongo bantoma pe bambuta-muntu bayokani ná bato nyonso ya Eklezya, bazwi mokano ya kopona bato mosusu na kati na bango po bátinda bango na Antioshe nzela moko ná Polo pe Barnabas. Baponi Yuda oyo babengaka Barsabas, ná Silas. Bango mibale bazalaki bato ya lokumu na kati ya bandeko.

[23] Bapesi bango mokanda, pe na kati bakòmá boye: “Bandeko oyo bobotamá Bayuda té, pe bofandaka na Antioshe, na Sirie pe na Silisie, bóyamba mbote euti na biso bandeko na bino bantoma pe bambuta-muntu.

[24] Toyokaki 'tè bato mosusu oyo bautaki epai na biso batungisaki bino pe balobelaki bino makambo oyo ekómisi mitema na bino likolo; nzokande biso totindaki bango té.

[25] Yango wana biso nyonso toyokani po na kopona bato, báya epai na bino nzela moko ná bandeko na biso ya bolingo Barnabas pe Polo,

[26] oyo bamipesi mobimba po na Nkolo na biso Yezu Kristo.

[27] Bongo totindeli bino Yuda ná Silas, bango bakolobela bino kaka ndenge tokòmi na mokanda oyo.

[28] Molimo Mosantu pe biso moko tolingi kopesa bino mikumba mosusu té, bobele makambo ya minene oyo:

[29] Banyama bapesi mabonza na banzambe ya bikeko, to oyo babomi na kofina kingo pe ná makila na yango, bólia yango té; pe bóboya mabala oyo Mibeko ezali kopekisa. Soki botiki makambo oyo, wana nde bosali malamu. Bótikala malamu.”

[30] Bongo batiki bato oyo baponaki, pe bango bakei na Antioshe. Kuna basangisi bandimi pe bapesi bango mokanda.

[31] Awa bandeko batangi yango basepeli, po mokanda wana eyeeli bango molende.

[32] Yuda ná Silas bazalaki pe baprofete, balobaki mingi po na kolendisa bandeko pe kopesa bango makasi.

[33] Na sima ya mwa-tango moke bandeko batiki bango bázonga na boboto epai ya bato oyo batindaki bango.

[34] [Kasi Silas azwi mokano ya kotikala wana.]

[35] Polo ná Barnabas batikali na Antioshe. Bazalaki koteya pe kosakola maloba ya Nkolo.

[36] Na sima ya mikolo Polo alobi na Barnabas: “Tózonga na vile moko moko oyo toteyaki maloba ya Nkolo, po tótala bandeko soki bazali malamu.”

[37] Barnabas alingaki komema Yoane oyo babengaka Marko.

[38] Kasi Polo aboyi, po ye atikaki bango na Pamfilie pe apesaki bango maboko té.

[39] Polo ná Barnabas baswani mingi pe bakabwani. Barnabas akamati Marko, akoti na masuwa pe akei na esanga ya Shipre.

[40] Polo aponi Silas, pe bandeko babondeli Nkolo ábatela bango na bolamu na ye, bongo bakei.

[41] Akatisi Sirie ná Silisie pe alendisi bandeko ya ba-Eklezya wana.

Misala — Chapters