[1] Mbote na bino nyonso, bandeko ya Rome, bato ya bolingo ya Nzambe oyo abengi bino bózala bato ya bosantu. Bolamu pe boboto ya Nzambe Tata na biso pe ya Nkolo Yezu Kristo ézala na bino. Mokanda oyo euti na ngai Polo, mosali ya Kristo Yezu. Nzambe moto abengi ngai názala ntoma; aponi ngai násakola Sango Malamu na ye, oyo alakaká uta kala, na minoko ya baprofete na ye, ndenge ekòmamá na Mikanda ya bosantu. Sango Malamu yango etali Mwana na ye, Nkolo na biso Yezu Kristo. Na ndenge ya bomoto, abotamaki na libota ya David. Na ndenge ya Molimo ya bosantu, Tata apesi ye nguya nyonso ya Mwana ya Nzambe tango asekwisaki ye. Likolo ya Kristo nde nazwá bolamu ya Nzambe pe nakómá ntoma, po nábenda bato ya bikolo nyonso, bándimela ye pe bátosa ye, boye bápesa ye lokumu. Bino bato ya Rome pe, bozali na kati, pamba té Yezu Kristo azali kobenga lisusu ná bino.
[8] Bandeko, na lisanga na Yezu Kristo, napesi Nzambe na ngai mersi mingi likolo na bino nyonso, po sango ya bondimi na bino ezali kopanzana na mokili mobimba.
[9] Nzambe ye moko ayebi 'tè maloba na ngai ezali ya solo, ye oyo nasalelaka na motema moko, na tango nasakolaka Sango Malamu ya Mwana na ye. Ayebi 'tè nakanisaka bino butu moi.
[10] Tango nyonso nasambelaka, nasengaka ye ápesa ngai nzela náya kotala bino, soki alingi.
[11] Pamba té, nazali na posa mingi ya kokutana ná bino, po námemela bino bolamu ya Molimo Mosantu, pe po na kolendisa bino.
[12] Nalingi koloba 'tè ngai ná bino tólendisana po na bondimi oyo biso nyonso tozali na yango.
[13] Bandeko na ngai, nalingi bóyeba 'tè mbala mingi nazalaki kokana koya epai na bino; kasi tii lelo nanu nazwi nzela té. Nalingi násala mosala malamu epai na bino, ndenge nasalaka epai ya bikolo mosusu.
[14] Nakómi lokola moto atondi na nyongo ya bikolo nyonso, ézala ba-Grek to basenzi; ézala epai ya bato bayekolá to baoyo bayekolá té.
[15] Yango wana nazali na posa ya kosakola Sango Malamu epai na bino pe, bato ya Rome.
[16] Nayokaka soni té po na kosakola Sango Malamu. Yango ezali nguya ya Nzambe po na kobikisa bato nyonso oyo bandimeli Yezu Kristo, liboso Bayuda, na sima bato ya bikolo mosusu.
[17] Pamba té Sango Malamu elakisaka ndenge Nzambe akómisaka bato bosembo; ezali bobele soki moto azali na bondimi tango nyonso, ndenge ekòmamá na Mikanda: “Moto oyo akómi bosembo po na bondimi, akobika.”
[18] Kasi Nzambe alakisaka kanda na ye uta na Likolo, epai ya bato nyonso oyo basalaka masumu ya ndenge na ndenge, po misala na bango ya mabe epekisaka bango báyeba makambo ya solo té.
[19] Pamba té bayebi malamu penza makambo ya Nzambe oyo bato nyonso bakoki koyeba. Nzambe ye moko moto alakisi bango yango polele.
[20] Nzambe amonanaka té. Kasi lokola ye moto asalá mokili, soki bato batali misala na ye, mayele na bango emonaka makambo oyo miso emonaka té. Boye bakoki koyeba 'tè ye azali Nzambe ya solo, pe nguya na ye esilaka té. Yango wana bamemi ngambo.
[21] Pamba té, atako bayebi Nzambe, bazali kokumisa ye té na ndenge ebongi na Nzambe; bazali pe kopesa ye ata mersi té. Nzokande makanisi na bango ekómá ya pamba, pe mayele na bango ekómá molili.
[22] Balobaka bazali bato ya mayele, nzokande bazali bazoba.
[23] Esika 'tè bákumisa Nzambe oyo akufaka té, bango bakómá kokumisa bikeko ya bato oyo bakufaka, ya bandeke, ya banyama to ya banyoka.
[24] Yango wana Nzambe atiki bango básala makambo ya mbindo ndenge mitema na bango elingi, pe bámipesa na makambo ya soni.
[25] Batiká makambo ya solo ya Nzambe, pe bandimaka oyo ya lokuta; basambelaka pe basalelaka biloko oyo Nzambe asalá, kasi Nzambe ye moko oyo asalá biloko nyonso, basambelaka ye té. Nzokande ye azali na lokumu nyonso seko! Amen.
[26] Yango wana, Nzambe atiki bango bálanda makambo oyo ebebisaka lokumu na bango. Basi na bango basalaka makambo Nzambe andimaka té: bakómá koyebana nzoto basi na basi.
[27] Mibali pe ndenge moko: batiká koyeba nzoto ya basi, kasi mitema na bango elingi bobele koyebana nzoto mibali na mibali; basalaka makambo ya soni na kati na bango, pe boye bazwaka etumbu oyo ekoki po na makambo na bango ya mabe.
[28] Lokola bato baboyi kotosa Nzambe, ye atiki bango bálanda mayele na bango ya mabe; yango wana bakómá kosala makambo oyo esengeli kosalama té.
[29] Batondi na mabe ya ndenge nyonso, lokoso, kanda, zuwa; babomaka bato, baswanaka, bakosaka pe bayebi kaka kobebisa. Bapanzaka makambo ya songi-songi;
[30] batónganaka; bazali banguna ya Nzambe; bafinganaka, batondi na lofundu pe lolendo. Balukaka nzela nyonso ya kosala mabe, pe batosaka baboti na bango té.
[31] Bazangi mayele, bazali mitema mibale, bazangi bolingo pe bayokelaka bato mawa té.
[32] Bayebi malamu 'tè Nzambe alobá boye: bato oyo basalaka makambo ya ndenge wana basengeli kokufa. Ata bongo, basalaka kaka makambo yango, pe basepelaka kutu na bato mosusu oyo basalaka ndenge wana.