[1] Bantoma ná bandeko oyo bazalaki na rejion ya Yudea bayokaki 'tè bato ya bikolo mosusu bayambaki maloba ya Nzambe.
[2] Tango Piere azongi na Yeruzalem, bandimi ya ekolo ya Bayuda babandi kotiana tembe ná ye,
[3] batuni ye: “Po na nini okotaki na ndako ya bato bakatá nzoto té, pe olei esika moko ná bango?”
[4] Bongo Piere abandi kolimbolela bango malamu makambo nyonso oyo elekaki, alobi:
[5] “Nazalaki na Jopé pe tango nazalaki kosambela, Nzambe alakisi ngai eloko moko lokola elamba ya monene, euti na Likolo pe ekiti na se penepene na ngai; ezalaki lokola basimbá yango na basonge nyonso minei.
[6] Natali malamu na kati, pe namoni banyama oyo ezali na makolo minei, banyama ya zamba, banyoka pe bandeke.
[7] Kaka na tango wana nayoki mongongo moko elobi na ngai: ‘Piere, telema, boma pe lia!’
[8] Kasi ngai nazongisi: ‘Té, Nkolo! Eloko ya mbindo to ya ekila nanu ekotá na monoko na ngai té.’
[9] Bongo mongongo oyo ezalaki kouta na Likolo elobi lisusu: ‘Eloko oyo Nzambe akómisi peto, koloba té 'tè ezali mbindo.’
[10] Makambo yango esalamaki mbala misato, pe biloko wana ezongi na Likolo.
[11] Kaka na ngonga wana bato misato batelemi liboso ya ndako epai nazalaki kofanda. Bautaki na Sezaré, bayei koluka ngai.
[12] Molimo alobi na ngai nákende ná bango, nátia tembe té. Bandeko motoba oyo bazali awa, bakendeki nzela moko ná ngai na Sezaré, pe biso nyonso tokotaki na ndako ya Korneye.
[13] Ye ayebisi biso ndenge amonaki anjelu ya Nzambe atelemi na ndako na ye pe alobi: ‘Tinda bato na Jopé po na koluka Simon oyo babengaka Piere.
[14] Akolobela yo maloba oyo ekobikisa yo ná bato na yo nyonso.’
[15] Awa nabandi koloba, Molimo Mosantu akiteli bango kaka ndenge akitelaki biso na ebandeli.
[16] Bongo nayei kokanisa maloba oyo Nkolo alobaki: ‘Yoane abatisaki bato na mai, kasi bino, bakobatisa bino na Molimo Mosantu.’
[17] Boye tembe esili: likabo oyo Nzambe apesi bango, ekokani penza ná oyo apesaki biso, pamba té bango pe bazali kondima Nkolo Yezu Kristo ndenge moko ná biso. E bongo, ngai nazali nani po námeka kopekisa Nzambe?”
[18] Awa bayoki makambo wana batiki kotia tembe, bapesi lokumu na Nzambe, balobi: “Ya solo penza, Nzambe alakisi pe na bato ya bikolo mosusu nzela ya kobongola mitema po bázwa bomoi ya seko.”
[19] Tango minyokoli ebimaki likolo ya Etiene, bandimi mosusu bapanzanaki tii na Fenisie, na esanga ya Shipre, pe na Antioshe. Kasi bazalaki kosakola sango ya Yezu kaka na Bayuda.
[20] Nzokande bandimi mosusu ya Shipre pe ya Sirene, tango bakómi na Antioshe, babandi koteya bato ya bikolo mosusu Sango Malamu ya Nkolo Yezu.
[21] Nguya ya Nkolo ezalaki na bango; boye bato mingi bayaki kondima, pe babandi kolanda Nkolo.
[22] Bandeko ya Eklezya ya Yeruzalem bayoki sango wana, bongo batindi Barnabas na mboka Antioshe.
[23] Tango akómi kuna, amoni bolamu ya Nzambe epai na bango, asepeli pe alendisi bango nyonso, po básalela Nkolo na motema moko.
[24] Barnabas azalaki moto malamu, atondaki na Molimo Mosantu pe na bondimi. Boye bato mingi bayei lisusu kosangana ná Nkolo.
[25] Na sima Barnabas akei na Tarse po na koluka Saul.
[26] Awa amoni ye, amemi ye na Antioshe. Bafandaki kuna mbula mobimba na kati ya Eklezya, pe bazalaki koteya bato mingi penza. Ezali na Antioshe nde bayekoli bazwaki kombo “bakristo” mbala ya liboso.
[27] Na tango wana baprofete balongwe na Yeruzalem pe bakei na Antioshe.
[28] Moko na kati na bango, kombo na ye Agabus, atelemi pe ayebisi na nguya ya Molimo Mosantu 'tè nzala makasi ekongala na mokili mobimba. Yango esalamaki tango Klode azalaki mokonzi monene ya Rome.
[29] Bayekoli bazwi mokano 'tè bátinda lisalisi na bandeko ya rejion ya Yudea, moto na moto na ndenge ya makoki na ye.
[30] Bongo basali yango, batindeli bambuta-muntu ya Yeruzalem makabo wana, na maboko ya Barnabas pe Saul.