[1] Tango Festus abandi mosala na ye, na sima ya mikolo misato alongwe na Sezaré pe akei na Yeruzalem.
[2] Kuna bakonzi ya banganga-Nzambe pe bato minene ya Bayuda bafundi Polo epai na ye. Basengi Festus,
[3] ásala bango bolamu, bongo ábengisa Polo na Yeruzalem, pamba té bazalaki kaka kokanela ye po báboma ye na nzela.
[4] Kasi Festus azongisi: “Bazali kobatela Polo na Sezaré, pe ngai moko nalingi kozonga kuna sik'oyo.
[5] Bongo bakonzi na bino bákende nzela moko ná ngai. Pe soki moto yango asalaki mabe, báya kofunda ye kuna.”
[6] Festus asalaki kaka mikolo mwambe to zomi epai na bango, bongo azongi na Sezaré. Sima ya mokolo moko afandi na tribinal pe atindi 'tè bámema Polo.
[7] Tango Polo ayei, Bayuda oyo bautaki na Yeruzalem batie ye na kati-kati pe babandi kofunda ye po na makambo ebele ya minene; kasi bakokaki kolakisa té 'tè makambo yango ezali ya solo.
[8] Polo asambi alobi: “Nasali mabe ata moko té, ézala po na makambo etali Mibeko ya Bayuda to Ndako ya Nzambe, ézala po na oyo etali mokonzi monene ya Rome.”
[9] Festus alingaki kosepelisa Bayuda, bongo atuni Polo: “Olingi kokende na Yeruzalem po básambisa yo kuna na miso na ngai?”
[10] Kasi Polo azongisi: “Natelemi liboso ya tribinal ya mokonzi monene ya Rome, pe nasengeli kosamba awa. Nasali Bayuda mabe ata moko té; yo moko oyebi yango malamu.
[11] Soki nasalaki mabe oyo ekoki na liwa, naboyi kokufa té. Kasi soki makambo oyo bango bafundeli ngai ezali ya solo té, moto moko té akoki kokaba ngai na maboko na bango. Nasengi 'tè mokonzi monene ya Rome ákata likambo na ngai.”
[12] Bongo Festus asololi moke ná bato oyo bapesaka ye toli, na sima azongiseli Polo boye: “Lokola osengi 'tè ósamba liboso ya mokonzi monene ya Rome, okokende epai ya mokonzi monene ya Rome.”
[13] Na sima ya mwa-mikolo mokonzi Agripa, ná ndeko na ye ya mwasi Berenise, bayei na Sezaré po na kopesa Festus mbote.
[14] Lokola baumelaki mikolo mingi kuna, Festus ayebisi mokonzi makambo ya Polo, alobi: “Feliks atikaki moto moko awa na boloko.
[15] Tango nakendeki na Yeruzalem, bakonzi ya banganga-Nzambe ná bambuta-muntu ya Bayuda bafundaki ye pe basengaki ngai nákatela ye etumbu.
[16] Nazongiselaki bango boye: ‘Mibeko ya Rome ezali kotinda 'tè bápesa moto nyonso nzela ya kosamba ná bato oyo bafundi ye; soki té bakoki kokatela moto etumbu té.’
[17] Bongo bato wana bayaki ná ngai nzela moko. Nalekisaki tango té; tongo etani, nafandi na tribinal pe natindi bámema moto yango.
[18] Banguna na ye bayei, kasi bafundaki ye na likambo moko té ya mabe, na ndenge ngai nazalaki kokanisa.
[19] Bazalaki kotia bobele tembe ná ye po na ndenge bango basambelaka, pe po na moto moko oyo akufá, kombo na ye Yezu; nzokande Polo alobi 'tè azali na bomoi.
[20] Nazalaki koyeba té ndenge nini nakoki kosukisa makambo ya boye. Yango wana natunaki Polo soki alingi kokende kosamba na Yeruzalem.
[21] Kasi Polo asengaki 'tè mokonzi monene ya Rome ákata likambo na ye. Yango wana napesaki motindo bákangela ye tii tango nakotinda ye epai ya mokonzi monene ya Rome.”
[22] Agripa alobi na Festus: “Ngai pe nalingi koyoka moto yango.” Festus azongisi: “Okoyoka ye lobi.”
[23] Tongo etani, Agripa pe Berenise bayei na lokumu penza, ná bakonzi ya basoda pe batambwisi minene ya mboka; bango nyonso bakoti na esika Festus ayambelaka bapaya. Festus atindi bámema Polo,
[24] bongo alobi: “Mokonzi Agripa, pe bino nyonso bato bozali awa ná biso, bótala moto oyo. Bayuda nyonso ya Yeruzalem pe ya awa bayaki kofunda ye epai na ngai, pe bazalaki koganga 'tè asengeli kokufa.
[25] Nzokande po na ngai, namoni 'tè asali likambo moko té po bákatela ye etumbu ya liwa. Pe lokola ye moko asengaki 'tè mokonzi monene ya Rome ákata likambo, nazwaki mokano ya kotinda ye kuna.
[26] Kasi nayebi té makambo nini nakoki kokòmela mokonzi ya Rome po na ye. Yango wana, namemi ye epai na bino nyonso, pe mingi penza epai na yo, mokonzi Agripa, po soki tosilisi kotuna ye náyeba makambo nakoki kokòma.
[27] Namoni 'tè kotindela mokonzi monene ya Rome moto ya boloko ezali na tina té, soki nakoki koyebisa polele té makambo bafundeli ye.”