Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 7:35

[1] Saul azalaki kaka kokanela bayekoli ya Nkolo, pe koluka nzela ya kosilisa bango. Akei epai ya nganga-Nzambe monene,

[2] pe asengi ye mikanda oyo akopesa na bandako ya lisanga ya vile ya Damas. Alingaki kokende kotala, soki akokuta basi to mibali oyo bazali kolanda nzela ya Yezu, po ákanga bango pe ámema bango na Yeruzalem.

[3] Awa azalaki kokende na Damas, kaka na tango akómi penepene ya vile, na mbala moko eloko lokola kake elongwe na likolo, engengi pe ezipi ye.

[4] Akwei na mabelé, pe ayoki mongongo moko elobi na ye: “Saul, Saul, po na nini ozali konyokola ngai?”

[5] Ye atuni: “Mokonzi, yo nani?” Pe mongongo yango ezongisi: “Nazali Yezu oyo yo ozali konyokola.

[6] Kasi telema, kota na vile, pe kuna moto moko akoyebisa yo makambo osengeli kosala.”

[7] Bato oyo bazalaki kotambola ná ye batelemi, mayele ya koloba ezalaki té. Bayokaki mongongo kasi bamoni moto té.

[8] Saul atelemi pe afungoli miso, kasi akokaki komona té. Basimbi ye na liboko po na komema ye na Damas.

[9] Kuna asalaki mikolo misato, azalaki komona té, kolia té pe komela té.

[10] Moyekoli moko azalaki na Damas, kombo na ye Ananya. Nkolo abimelaki ye lokola na ndoto pe abengi ye: “Ananya!” Ye azongisi: “Nkolo, ngai oyo.”

[11] Nkolo alobi na ye: “Telema, kende na ndako ya Yuda oyo ezali na balabala oyo babengaka ‘Etengamá té’, pe luka moto moko ya Tarse kombo na ye Saul. Azali kosambela,

[12] pe amonaki lokola na ndoto moto moko kombo na ye Ananya, abimelaki ye; akotaki na ndako pe atielaki ye maboko po ámona lisusu.”

[13] Ananya azongisi: “Nkolo, bato mingi balobelaki ngai makambo ya moto wana. Bayebisaki ngai mabe nyonso ye asalaki bato na yo na Yeruzalem.

[14] Ayaki awa po bakonzi ya banganga-Nzambe bapesaki ye bokonzi ya kokanga bato nyonso oyo basakolaka 'tè bazali bato na yo.”

[15] Kasi Nkolo alobi na ye: “Kende kaka; ngai moko nasi'naponi ye po ásalela ngai. Akozala mosakoli na ngai epai ya bikolo mosusu ná bakonzi na bango, pe epai ya bato ya Israel.

[16] Ngai moko nakolakisa ye ndenge asengeli komona pasi po na kombo na ngai.”

[17] Bongo Ananya akei, akoti na ndako yango, atieli Saul maboko pe alobi: “Saul, ndeko na ngai, Nkolo Yezu oyo abimelaki yo na nzela atindi ngai, po óbanda komona lisusu pe ótonda na Molimo Mosantu.”

[18] Na mbala moko biloko lokola poso ya mbisi elongwe na miso ya Saul. Bongo abandi komona lisusu. Atelemi pe azwi batisimo.

[19] Tango alei esili, nzoto na ye ezongi makasi. Saul afandaki mwa-mikolo ná bayekoli oyo bazalaki na Damas.

[20] Kaka na tango wana abandi kosakola na bandako ya lisanga 'tè Yezu azali Mwana ya Nzambe.

[21] Bato nyonso oyo bayokaki ye bakamwe pe babandi komituna: “Moto oyo toyokaki ezali ye té? Na Yeruzalem azalaki konyokola bato oyo basakolaka 'tè Yezu azali Nkolo na bango. Ayei awa po na kokanga bandimi, pe komema bango epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe. Boye té?”

[22] Kasi Saul azalaki kaka koteya na molende nyonso, pe kolakisa 'tè Yezu azali Mesia; boye Bayuda ya Damas bazangaki maloba ya kozongisa.

[23] Na sima ya mwa-mikolo Bayuda bayokani po na kobomisa Saul,

[24] kasi ye ayei koyeba yango. Butu moi bazalaki kokengela banzela oyo bato bakotelaka na vile, po na koboma Saul.

[25] Bongo mokolo moko na butu, bayekoli ya Saul bakamati ye, batie ye na kitunga pe bakitisi ye na libanda, na mir ya lopango monene ya vile.

[26] Tango Saul akómi na Yeruzalem, aluki nzela ya kosangana ná bayekoli, kasi bango nyonso bazalaki kobanga, po bandimaki té 'tè ye akómi moyekoli ya Yezu.

[27] Bongo Barnabas akamati ye pe amemi ye epai ya bantoma. Alobeli bango ndenge Saul amonaki Nkolo na nzela ya Damas pe ndenge Nkolo asololaki na ye; bongo ayebisi bango ndenge Saul asakolaki na molende na vile ya Damas na kombo ya Yezu.

[28] Banda tango wana Saul atikalaki ná bango na Yeruzalem; kuna pe azalaki kosakola na molende 'tè Yezu azali Nkolo.

[29] Asololi pe ná Bayuda oyo bautaki na bamboka ya bapaya pe atiani tembe ná bango. Kasi bango bakómi koluka nzela ya kobomisa ye.

[30] Tango bandeko bayoki boye, bamemi Saul na vile ya Sezaré pe batindi ye na Tarse.

[31] Bongo bato ya Eklezya bakómaki na kimia na Yudea mobimba, na Galilé pe na Samarie; bazalaki kotosa Nkolo na motema moko pe kozwa molende. Molimo Mosantu azalaki kosalisa bango po bákóma ebele.

[32] Piere azalaki kotambola mboka mobimba; mokolo moko akei kotala bato ya Nkolo oyo bazalaki kofanda na Lida.

[33] Kuna amoni moto moko, kombo na ye Ené, alalá na mbeto eleki mbula mwambe, pamba té makolo na ye ezalaki ya kokufa.

[34] Piere alobi na ye: “Ené, Yezu Kristo abikisi yo. Telema pe bongisa mbeto na yo.” Na mbala moko Ené atelemi.

[35] Bato nyonso ya Lida pe ya bapembeni ya Sharon bamoni ye pe bandimeli Nkolo Yezu.

[36] Moyekoli moko ya mwasi azalaki na vile ya Jopé, kombo na ye Tabita, (na monoko ya grek “Dorkas,” elingi koloba: mboloko). Tango nyonso azalaki kosala bato malamu pe kosalisa bato bakelelá.

[37] Na mikolo wana azwi maladi pe akufi. Basukoli nzoto na ye pe batie yango na ndako moko likolo ya etaje.

[38] Awa bayekoli bayoki 'tè Piere azali na Lida, oyo ezali penepene ya Jopé, batindeli ye bato mibale pe balobi: “Tobondeli yo, yaka noki epai na biso.”

[39] Piere akei noki nzela moko ná bango. Awa akómi, bamemi ye na ndako wana likolo ya etaje. Basi nyonso oyo bakufelá mibali bazalaki kolela penepene na ye. Balakisi Piere bashemize pe bilamba oyo Tabita azalaki kotònga.

[40] Piere abimisi bato nyonso, afukami pe asambeli. Abaluki epai ya ebembe pe alobi: “Tabita, telema!” Tabita afungoli miso pe awa amoni Piere, afandi na mbeto.

[41] Piere asimbi ye na liboko pe atelemisi ye. Na sima abengi bato ya Nkolo ná basi oyo bakufelá mibali, pe alakisi bango 'tè Tabita azongi na bomoi.

[42] Sango wana eyei koyebana na Jopé mobimba, pe bato mingi bakómi kondima Nkolo.

[43] Piere atikalaki mikolo mingi na Jopé, na ndako ya moto moko azalaki kobongisa baposo ya nyama, kombo na ye Simon.

Misala — Chapters