Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:56

[1] Kasi ezalaki na moto moko kombo na ye Ananya, ayokanaki ná mwasi na ye Safira, pe bateki lopango na bango.

[2] Kasi Ananya alongoli ndambo mosusu ya mbongo po na bango moko, pe akei kopesa ndambo mosusu na bantoma. Mwasi na ye ayebaki makambo wana.

[3] Bongo Piere alobi: “Ananya, po na nini Satan akoteli yo na motema? Okosi Molimo Mosantu, na ndenge olongoli ndambo ya mbongo oyo otekelaki lopango.

[4] Soki olingaki kotikala na lopango na yo, etali kaka yo moko. Na sima ya koteka yango, mbongo ezalaki ya yo. Boye té? Ndenge nini ozwi mokano oyo na motema na yo? Okosi bato té, kasi okosi nde Nzambe.”

[5] Awa Ananya ayoki makambo wana, akwei pe akati motema. Bato nyonso oyo bayokaki sango yango, batondaki na somo penza.

[6] Bilenge bayei kozipa ebembe, bamemi pe bakundi yango.

[7] Na sima ya ngonga soki misato, mwasi ya Ananya akoti; ayebaki té makambo oyo ekweyaki.

[8] Piere atuni ye: “Lobela ngai, botekaki lopango na bino na talo wana?” Ye azongisi: “Ee, yango wana.”

[9] Bongo Piere alobi na ye: “Kasi po na nini bino mibale boyokanaki po na komeka Molimo ya Nkolo? Yoka, bato oyo bakundaki mobali na yo bazali na libanda, bakomema pe ná yo.”

[10] Kaka na tango wana Safira akwei na makolo ya Piere pe akati motema. Bilenge bakoti, bakuti ye akufi; bamemi ye pe bakei kokunda ye pembeni ya mobali na ye.

[11] Eklezya mobimba ya Yeruzalem pe bato nyonso oyo bayokaki makambo wana, batondaki na somo penza.

[12] Bantoma bazalaki kosala makamwisi ebele ya ndenge na ndenge na kati ya bato. Bandimi babandaki kosangana na motema moko, na veranda ya Salomon.

[13] Na kati ya Bayuda mosusu, moto moko té amekaki kokende epai na bango, atako bato bazalaki kokumisa bango.

[14] Nzokande mibali pe basi mingi penza bandimaki Nkolo Yezu, pe bakotaki na lisanga ya bandimi.

[15] Babandaki komema bato ya maladi na babalabala; bazalaki kotia bango na bakipoyi pe na bitoko, po tango Piere akoleka, ata elili na ye ézipa bato mosusu na kati na bango.

[16] Bato mingi bautaki na bamboka oyo ezali penepene ya Yeruzalem, bamemi bato ya maladi ná bato oyo milimo mabe ezalaki kotungisa, pe bango nyonso babikaki.

[17] Bongo nganga-Nzambe monene ná bato na ye batondi na likunya penza. Bango nyonso bazalaki bato ya lingomba ya ba-Sadusé.

[18] Bakangi bantoma pe batie bango na boloko, na miso ya bato nyonso.

[19] Kasi na butu, anjelu moko ya Nkolo afungoli baporte ya boloko, abimisi bango pe alobi:

[20] “Bókende, bótelema na Ndako ya Nzambe, pe bósakola na bato makambo nyonso ya bomoi ya sika.”

[21] Awa bayoki bongo, bakoti na Ndako ya Nzambe na tongo penza, pe babandi koteya. Nganga-Nzambe monene ná bato na ye babengisi bato ya Likita-Monene pe bambuta-muntu nyonso ya Bayuda, bongo batindi bákende koluka bantoma na boloko.

[22] Kasi tango bato yango bakómi kuna, bamoni bango té, bazongi epai ya Likita pe balobi:

[23] “Tokuti boloko ezali ya kokangama, pe bakengeli bazali liboso ya baporte ya boloko. Kasi tango tofungoli yango, tomoni moto moko té na kati.”

[24] Awa shef ya bakengeli ya Ndako ya Nzambe pe bakonzi ya banganga-Nzambe bayoki boye, bakamwe mingi po bantoma bamonani té, bongo bamituni soki likambo nini ekweyaki.

[25] Kaka na tango wana moto moko ayei pe alobi: “Bato oyo bino botiaki na boloko, bazali na Ndako ya Nzambe, bazali kutu koteya bato.”

[26] Bongo shef ya bakengeli akei ná bato na ye, pe bamemi bantoma; kasi basalaki bango mabe té po bazalaki kobanga bato, soki té bato balingaki kobamba bango mabanga.

[27] Awa bamemi bango, batie bango liboso ya Likita, pe nganga-Nzambe monene abandi kotuna bango,

[28] alobi: “Topekisaki bino na makasi 'tè bóteya lisusu té na kombo ya moto wana. Kasi bopanzi mateya na bino na vile mobimba ya Yeruzalem; pe bolingi bómemisa biso ngambo po na liwa ya moto wana.”

[29] Bongo Piere ná bantoma mosusu balobi: “Tosengeli kotosa Nzambe, kasi bato té.

[30] Nzambe ya bakoko na biso asekwisi Yezu oyo bino bobomisaki na kuruze.

[31] Nzambe atie ye pembeni na ye na esika ya lokumu, akómisi ye Mokonzi pe Mobikisi, po bato ya Israel bábongola mitema pe bázwa bolimbisi ya masumu.

[32] Bongo atindi biso tósakola makambo wana, biso ná Molimo Mosantu oyo Nzambe apesaki na bato batosaka ye.”

[33] Awa bato ya Likita bayoki boye batomboki, balingaki koboma bantoma.

[34] Kasi Farizé moko azalaki na kati na bango, kombo na ye Gamaliel; ye azalaki molakisi-Mibeko, pe bato nyonso bazalaki kokumisa ye. Atelemi na kati ya Likita pe asengi 'tè bábimisa bantoma po na mwa-tango moke.

[35] Bongo alobi: “Bato ya Israel, bókeba na makambo bolingi kosala na bato oyo.

[36] Eleki mikolo mingi té Tedas abimaki; ye alobaki 'tè azali moto monene, pe bato soki 400 bakotaki na lingomba na ye. Kasi babomaki ye, bato oyo balandaki ye bapanzanaki, pe lingomba na bango ekufaki.

[37] Na sima na ye, Yuda moto ya Galilé abimaki, na tango bato bazalaki kokòmisa bakombo na bango. Bato mingi balandaki ye, kasi ye pe akufaki, bongo bango nyonso bapanzanaki.

[38] Yango wana sik'oyo nalobi na bino: bólanda lisusu bato oyo té, pe bótika bango. Pamba té soki makanisi to misala na bango euti na bato, yango ekolimwa kaka.

[39] Kasi soki euti na Nzambe, bino bokoki koboma yango té. Bókeba po bóbunda ná Nzambe té.” Bato ya Likita bandimi makanisi na ye.

[40] Bongo babengi bantoma, babetisi bango fimbu pe bapekisi bango 'tè bátanga kombo ya Yezu lisusu té. Na sima batiki bango.

[41] Bantoma babimi na Likita-Monene, batondi na esengo po Nzambe apesi bango lokumu ya konyokwama po na kombo ya Yezu.

[42] Pe mikolo nyonso bazalaki kaka koteya pe kosakola Sango Malamu ya Mesia Yezu, na Ndako ya Nzambe pe na bandako ya bato.

Misala — Chapters