[1] Agripa alobi na Polo: “Okoki kosamba po na yo moko.” Bongo Polo atomboli liboko pe abandi kosamba boye:
[2] “Mokonzi Agripa, nazali na esengo lelo ya kosamba liboso na yo po na makambo nyonso Bayuda bazali kofundela ngai.
[3] Pamba té yo oyebi bizaleli ya Bayuda, pe ndenge batiaka tembe po na makambo mosusu. Yango wana, nabondeli yo óyoka ngai na motema ya kokita.
[4] “Bayuda nyonso bayebi bizaleli na ngai banda bomwana, pamba té nakoli na Yeruzalem na kati ya bato ya ekolo na ngai.
[5] Soki balingi, bakoki kozala batemwen na ngai po bayebi ngai banda kala, ndenge nazalaki moto ya lingomba ya ba-Farizé, oyo bamipesá na Nzambe koleka Bayuda nyonso.
[6] Soki lelo natelemi na tribinal, ezali bobele po natie motema na elaka Nzambe apesaká na bakoko na biso.
[7] Nzokande bato ya mabota nyonso zomi na mibale ya Israel bazali kotia mitema kaka na elaka oyo, pe basalelaka Nzambe butu moi po ákokisa yango. Ya solo, mokonzi, ezali likolo ya elaka wana nde Bayuda bafundi ngai.
[8] Bino bato bofandi awa, po na nini bokoki kondima té 'tè Nzambe asekwisaki moto moko oyo akufaki?
[9] “Kala ngai pe nakanisaki 'tè nasengeli kosala makasi po na kopekisa bato bándimela Yezu ya Nazaret té.
[10] Nabandaki kosala boye na Yeruzalem. Bakonzi ya banganga-Nzambe bapesaki ngai bokonzi, bongo nabwakaki bato ya Nzambe mingi na boloko. Kutu tango bazalaki koboma bango, ngai pe nandimaki.
[11] Mbala mingi nazalaki kopesa bango etumbu na bandako nyonso ya lisanga, pe nazalaki kotinda bango na makasi básundola kombo ya Yezu. Nazalaki na kanda mingi na motema po na bango, pe nanyokolaki bango tii na bamboka ya bapaya.”
[12] “Mokonzi Agripa, mokolo moko nakendeki na Damas; bakonzi ya banganga-Nzambe bapesaki ngai nzela pe bokonzi, po násala kuna ndenge nasalaki na Yeruzalem.
[13] Bongo, tango nazalaki na nzela, etikalaki moke midi ékoka, namoni eloko moko lokola kake elongwe na likolo; yango ezalaki kongenga koleka moi, pe eyei kozipa ngai, ná bato oyo bazalaki kotambola ná ngai nzela moko.
[14] Biso nyonso tokwei na se, pe nayoki mongongo elobi na ngai na monoko ya Bayuda: ‘Saul, Saul, po na nini ozali konyokola ngai? Ngai naleki yo na makasi. Soki omeki koboya kosalela ngai, okominyokola pamba.’
[15] Ngai natuni: ‘Mokonzi, yo nani?’ Mokonzi azongisi: ‘Nazali Yezu oyo yo ozali konyokola.’
[16] Kasi longwa na mabelé pe telema. Nabimeli yo po nákómisa yo mosali na ngai, ókende koyebisa bato makambo omoni lelo, ná nyonso oyo nakolakisa yo na sima.
[17] Nakobatela yo bipai nyonso nakotinda yo, ézala epai ya Bayuda to epai ya bikolo mosusu.
[18] Fungola bango miso, báboya molili pe báya epai ya moi; báboya bokonzi ya Satan pe báya epai ya Nzambe; bándimela ngai po bázwa bolimbisi ya masumu, pe bákamata esika na kati ya bato oyo Nzambe aponá.”
[19] “Yango wana, mokonzi Agripa, banda mokolo wana nakómá kotosa makambo Nzambe alakisaki ngai, naboyaki yango té.
[20] Nabandaki kosakola 'tè bato bábongola mitema, bázongela Nzambe, pe básala misala oyo ezali kolakisa 'tè ya solo babongoli mitema. Nabandaki liboso na Damas pe na Yeruzalem, na sima natambolaki na rejion mobimba ya Yudea, pe kutu epai ya bikolo mosusu.
[21] Po na makambo wana, Bayuda bakangaki ngai na Ndako ya Nzambe, pe balingaki koboma ngai.
[22] Kasi Nzambe abateli ngai tii lelo, pe nazali kaka kosakola sango na ye epai ya bato nyonso, ézala bato pamba to bato minene. Nazali koloba likambo mosusu té, bobele oyo baprofete ná Moize balobaká 'tè esengeli kosalama:
[23] Mesia akomona pasi pe akokufa; bongo na kati ya bato nyonso oyo bakufá, ye akozala moto ya liboso oyo akosekwa, po ásakola 'tè moi eyei kobikisa ekolo na biso pe bikolo mosusu.”
[24] Tango Polo azalaki kosamba boye, na mbala moko Festus agangeli ye: “Polo, ozali na liboma! Koyekola mingi ekómisi yo liboma!”
[25] Kasi Polo azongiseli ye: “Tata mokonzi Festus, nazali na liboma té. Makambo nauti koloba ezali ya solo, pe ezali na tina.
[26] Mokonzi Agripa ayebi makambo nyonso wana. Tembe té ayebi yango, pamba té esalamaki na miso ya bato. Yango wana nazali koloba na molende na miso na ye.
[27] Yo mokonzi Agripa, ondimaka makambo baprofete balobaká? Nayebi 'tè ondimaka yango.”
[28] Agripa alobi na Polo: “Etikali moke óbongola makanisi na ngai po nákóma mokristo.”
[29] Polo azongisi: “Ézala etikali tango moke to etikali tango molai, nazali kobondela Nzambe po na yo pe po na bino nyonso bato bozali koyoka ngai lelo, bókóma lokola ngai; longola bobele ndenge bakangi ngai minyololo oyo!”
[30] Bongo mokonzi Agripa, Festus, ná Berenise pe bato nyonso oyo bafandaki ná bango batelemi.
[31] Awa bakei pembeni, balobani bango na bango: “Moto yango asali mabe moko té oyo ekoki na etumbu ya liwa to ya boloko.”
[32] Pe Agripa alobi na Festus: “Soki ye asengaki té 'tè mokonzi ya Rome ákata likambo na ye, mbele bakokaki kotika ye.”