Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:49

[1] Bakatisi vile ya Amfipolis ná Apolonie pe bakómi na Tesalonike, esika ndako ya lisanga ya Bayuda ezalaki.

[2] Polo akoti kuna ndenge amesaná. Mikolo misato ya Kopema abandi kolimbolela bango Mikanda ya Nzambe,

[3] alakisi bango polele 'tè Mesia asengelaki konyokwama, kokufa pe kosekwa. Alobi na bango: “Mesia ye nde Yezu oyo nazali koteya bino.”

[4] Bato mingi na kati na bango bayei kosangana na Polo ná Silas, ézala Bayuda to bato ya bikolo mosusu oyo basambelaka Nzambe ya Israel, ná pe basi mingi ya lokumu.

[5] Kasi Bayuda mosusu bayoki likunya, bakamati bato ya mabe oyo batelenganaka na babalabala, basali likita pe bakotisi mobulu na kati ya mboka. Bakei na ndako ya Jazon, baluki Polo ná Silas po na kosambisa bango na miso ya bato nyonso.

[6] Lokola bazwaki bango té, bakangi Jazon ná bandeko mosusu, bamemi bango epai ya bakonzi ya vile, pe babandi koganga boye: “Bato wana bakotisi mobulu na mokili mobimba! Sik'oyo bakómi awa,

[7] pe Jazon ayambi bango na ndako na ye. Bango nyonso baboyi kotosa mibeko ya mokonzi monene ya Rome, pamba té bazali koloba 'tè mokonzi mosusu azali, kombo na ye Yezu.”

[8] Maloba oyo epesi kanda na bato nyonso, ézala kutu na bakonzi ya vile.

[9] Bongo bafutisi Jazon ná bandeko na ye mbongo ya kosimbisa, na sima batiki bango.

[10] Tango butu ekómi, bandeko batindi Polo ná Silas, bákende noki na Beré. Awa bakómi kuna, bakoti na ndako ya lisanga ya Bayuda.

[11] Nzokande Bayuda ya Beré bazalaki bato ya boboto koleka baoyo ya Tesalonike. Bayambi mateya ya bantoma na mitema malamu, pe mokolo na mokolo bazalaki kotanga Mikanda ya Nzambe, po na koyeba soki makambo balobeli bango ezali ya solo.

[12] Bongo bato mingi na kati na bango bandimaki, ná pe bato mingi ya lokumu oyo babotamá Bayuda té, ézala basi to mibali.

[13] Kasi tango Bayuda ya Tesalonike bayoki 'tè Polo azali kosakola maloba ya Nzambe na Beré, balandi kuna pe babandi lisusu kosala nyonso po bato bátomboka.

[14] Bongo bandeko bakei kotika Polo noki epai ya ebale, kasi Silas ná Timoté batikalaki wana.

[15] Bato oyo bamemaki Polo bakei na ye tii na Atene, na sima bazongi na Beré. Bayebisi Silas ná Timoté bálanda Polo noki.

[16] Tango Polo azalaki kozela bango na Atene, ayoki mawa mingi penza na ndenge amoni 'tè vile yango etondi na bikeko ya banzambe.

[17] Yango wana akei na ndako ya lisanga, pe abandi koteya Bayuda ná bato nyonso oyo basambelaka Nzambe ya Israel. Pe mikolo nyonso na zando azalaki koteya bato oyo abandaki kokuta kuna.

[18] Bateyi mosusu bazalaki wana, oyo balandaka makanisi ya Epikire pe ya Zenon; babandi kotiana tembe ná Polo. Kasi bato mosusu baseki ye balobi: “Esopa oyo alingi koloba nini?” Bamosusu balobi: “Azali koteya lokola mosakoli ya banzambe ya bapaya.” Balobaki bongo po Polo azalaki kosakola sango ya Yezu pe ya kosekwa.

[19] Bongo bateyi wana bakamati ye pe bamemi ye na likita na bango oyo babengaka Areopaje. Batuni ye: “Tokoki koyeba tina ya mateya ya sika oyo ozali kolakisa?

[20] Ozali kolobela biso makambo ya kokamwa, pe tolingi koyeba tina na yango.”

[21] Pamba té bato nyonso ya Atene ná bapaya oyo bafandi kuna, mosala na bango bobele koloba to koyoka makambo ya sika.

[22] Bongo Polo atelemi na kati ya Areopaje pe alobi: “Bato ya Atene, namoni 'tè bolingaka kosambela mingi.

[23] Pamba té tango natamboli na vile na bino, natali banzambe bino bosambelaka, pe namoni kutu mesa moko ya mabonza bakòmá boye: ‘Esika ya nzambe oyo toyebi té.’ Nzokande ngai nayeeli bino sango ya Nzambe oyo bozali kosambela, atako boyebi ye té.

[24] Nzambe oyo asalá mokili pe biloko nyonso, azali Mokonzi ya Likolo ná se. Ye afandaka té na bandako oyo bato batòngi.

[25] Azalaka na posa té bato básalela ye to bámemela ye eloko ata ya ndenge nini; pamba té ezali ye moto apesaka bato nyonso bomoi, pema pe biloko nyonso.

[26] Ye asalá 'tè bato ya bikolo nyonso bábotama na moto moko, pe bátondisa mokili mobimba. Ye moto akabolá mbula, basanza ná mikolo; atiá pe bandelo ya bisika bato bakoki kofanda.

[27] Asalaká bongo po bato bálukaka ye, ndenge bato bakufá miso balukaka esika ya kosimba. Ya solo, bato bakoki koyeba ye; azali mosika té ya moko moko na biso.

[28] Pamba té ‘Ezali ye moto apesi biso bomoi ná makasi ya kotambola; kaka ye nde asalá biso.’ Bato mosusu kutu na kati na bino bayembá boye: ‘Tozali pe bana na ye.’

[29] “Soki tozali bana na ye, tótika kokanisa 'tè Nzambe akokani ná bikeko oyo bato basalaka na mayele na bango, ézala basalá yango na or, arjan to mabanga.

[30] Nzokande Nzambe abandaki kotala makambo wana té, po bato bayebaki té mabe oyo bazalaki kosala. Kasi sik'oyo azali kobenga bato nyonso ya mokili mobimba po bábongola mitema.

[31] Asi'atiá mokolo oyo akobanda kotambwisa mokili mobimba na bosembo; asi'aponá moto oyo akotambwisa yango na kombo na ye. Alakisaki kutu makambo wana polele na miso ya bato nyonso; pamba té babomaki moto yango pe Nzambe asekwisaki ye.”

[32] Awa bayoki 'tè Polo alobi po na kosekwa, bamosusu baseki ye, kasi bamosusu balobi na ye: “Tokoyoka yo mokolo mosusu.”

[33] Bongo Polo atiki bango.

[34] Kasi bato mosusu balandi ye pe bayei kondima. Na kati na bango ezalaki Denis, moto ya likita ya Areopaje, ná mama moko kombo na ye Damaris, pe bato mosusu.

Misala — Chapters