Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:26

[1] Polo atali bato ya Likita nyee pe alobi: “Bandeko, tii na moi ya lelo nayebi na se ya motema na ngai 'tè nazali kosalela Nzambe malamu.”

[2] Ananya, nganga-Nzambe monene, atindi basali oyo bazalaki penepene ya Polo 'tè bábeta ye na monoko.

[3] Bongo Polo alobi na ye: “Nzambe nde akobeta yo, moto ya lokuta! Ofandi wana po ósambisa ngai ndenge mibeko ezali kotinda. Kasi obuki mibeko, awa otindi 'tè bábeta ngai.”

[4] Basali balobi na Polo: “Ozali kofinga nganga-Nzambe monene!”

[5] Polo azongisi: “Bandeko, nayebaki té 'tè azali nganga-Nzambe monene. Pamba té ekòmamá boye: ‘Kofinga mokonzi ya ekolo na yo té.’”

[6] Polo ayebaki 'tè na kati ya bato ya Likita-Monene, ndambo bazalaki ba-Sadusé, pe ndambo ba-Farizé; yango wana alobi na mongongo makasi: “Bandeko, ngai nazali Farizé, mwana ya ba-Farizé. Bozali kosambisa ngai bobele po natiaka motema 'tè bato bakufá bakosekwa.”

[7] Awa alobi boye ba-Farizé ná ba-Sadusé babandi kotiana tembe pe Likita ekabwani.

[8] Pamba té ba-Sadusé bandimaka té 'tè bato bakufá bakosekwa; balobaka pe ba-anjelu ná milimo bazali té. Nzokande ba-Farizé bandimaka nyonso wana.

[9] Bazalaki koganga makasi penza, balakisi-Mibeko mosusu oyo bazalaki na lingomba ya ba-Farizé batelemi, pe na kanda nyonso batie tembe balobi: “Tomoni ata mabe moko té na moto oyo. Tango mosusu molimo to anjelu alobi na ye.”

[10] Awa mobulu ekoti mingi, mokonzi ya basoda abangi soki té bakokata Polo biteni biteni. Yango wana, abengi bato na ye báya kolongola Polo na kati na bango pe bámema ye na lopango ya basoda.

[11] Na butu yango, Nkolo abimeli Polo pe alobi: “Kobanga té, tia molende. Ndenge outi kosakola sango na ngai awa na Yeruzalem, osengeli kosala bongo na Rome.”

[12] Tongo etani, Bayuda mosusu basali likita. Bakati seleka 'tè bakolia té pe bakomela ata eloko té tii bakoboma Polo.

[13] Baoyo bakataki seleka wana, bazalaki bato tuku minei (40) koleka.

[14] Bakei epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe pe bambuta-muntu, balobi: “Biso tokati seleka 'tè tokolia té pe tokomela eloko té tii tokoboma Polo.

[15] Bongo sik'oyo bino bóyokana ná bato nyonso ya Likita-Monene, bósenga na mokonzi ya basoda ámemela bino Polo. Bósala lokola bolingi kotala lisusu likambo na ye malamu. Pe biso tosi'tomilengeli po na koboma ye liboso ákóma awa.”

[16] Kasi Mwana ya ndeko ya Polo ya mwasi ayoki sekelé wana, akei na lopango ya basoda, akoti pe ayebisi Polo.

[17] Bongo Polo abengi komandan moko ya basoda pe alobi: “Mema elenge oyo epai ya mokonzi ya basoda. Azali na likambo ya koyebisa ye.”

[18] Komandan amemi ye epai ya mokonzi ya basoda pe alobi: “Polo moto ya boloko, abengi ngai pe asengi 'tè námemela yo elenge oyo. Azali na likambo ya koyebisa yo.”

[19] Mokonzi ya basoda asimbi elenge mobali na liboko, akei na ye pembeni pe atuni ye: “Likambo nini olingi koyebisa ngai?”

[20] Ye azongisi: “Bayuda bayokani po básenga yo ómema Polo lobi liboso ya Likita-Monene, bakosala lokola 'tè balingi kotala lisusu likambo na ye malamu.

[21] Kasi kondimela bango té, pamba té bato tuku minei (40) koleka bazali kokanela ye. Basi'bakati kutu seleka 'tè bakolia té pe bakomela eloko té tii bakoboma Polo. Sik'oyo basi'bamilengeli pe bazali kozela bobele mokano na yo.”

[22] Bongo mokonzi ya basoda alobi na ye 'tè áyebisa likambo wana na moto té, na sima azongisi ye.

[23] Mokonzi ya basoda abengi bakomandan mibale pe alobi na bango: “Bóbongisa basoda 200, ná bato tuku sambo (70) oyo bamataka bapunda pe bamosusu 200 oyo bazali na makonga, po bákende na Sezaré na ngonga ya libwa ya butu.

[24] Bóbongisa lisusu bapunda po na komatisa Polo, pe bómema ye epai ya Feliks, motambwisi ya rejion ya Yudea. Boye moto moko té akokoka kosala ye mabe.”

[25] Bongo akòmi mokanda boye:

[26] “Tata mokonzi Feliks, yamba mbote euti epai na ngai Klode Lizias.

[27] Bayuda bakangaki moto oyo pe balingaki koboma ye. Tango nayoki 'tè azali sitwayen ya Rome, nayei ná basoda na ngai pe nabikisi ye.

[28] Lokola nalingaki koyeba malamu tina Bayuda bazalaki kofundela ye, namemaki ye liboso ya Likita-Monene na bango.

[29] Nayei komona 'tè bazalaki kofunda ye po na makambo etali mibeko na bango moko, kasi likambo penza ezalaki té po ákufa to ákota boloko.

[30] Tango bayebisi ngai 'tè Bayuda bazali kokanela ye, na mbala moko natindeli yo ye, pe nayebisi bato oyo bazali kofunda ye 'tè bámema likambo na ye epai na yo.”

[31] Basoda basali ndenge batindaki bango. Bakamati Polo, bamemi ye na butu tii na Antipatris.

[32] Tongo etani, basoda oyo bazalaki kotambola na makolo bazongi, pe batiki bato ya bapunda bákende ná Polo.

[33] Tango bakómi na Sezaré, basoda bapesi mokanda yango na Feliks pe batiki Polo na maboko na ye.

[34] Feliks atangi mokanda pe atuni Polo: “Ozali moto ya wapi?” Awa ayoki 'tè azali moto ya Silisie,

[35] alobi na ye: “Nakoyoka yo tango bato bafundi yo bakoya.” Pe atindi 'tè bákangela Polo na lopango ya basoda epai ndako na ye moko ezalaki.

Misala — Chapters