[1] Na tango wana mokonzi Erode abandi konyokola bandeko mosusu ya Eklezya.
[2] Abomisi Jake ndeko ya Yoane na mbeli.
[3] Awa amoni 'tè yango esepelisi Bayuda, akangi pe Piere. Makambo wana elekaki na tango ya feti ya Koleka.
[4] Atie Piere na boloko, pe apesi ye na maboko ya basoda zomi na motoba (16) po bákengelaka ye minei minei, bato na bato na ngonga na bango. Alingaki kosambisa ye liboso ya bato, na sima ya feti.
[5] Tango Piere azalaki na boloko, bato ya Eklezya bazalaki kosambela Nzambe na molende nyonso po na ye.
[6] Etikalaki mokolo moko po Erode ásambisa Piere. Bongo na butu Piere alali na kati ya basoda mibale. Bakangaki ye na minyololo mibale; pe basoda mibale bazalaki kokengela liboso ya porte ya kasho.
[7] Na mbala moko anjelu ya Nkolo ayei pe kasho engengi na ndenge moko ya kokamwa. Anjelu asimbi ye na mopanzi, alamusi ye pe alobi: “Telema noki.” Bongo minyololo elongwe na maboko na ye.
[8] Na sima anjelu alobi na ye: “Kanga mokaba pe lata basandale na yo.” Piere asali bongo pe anjelu abakisi: “Lata kazaka na yo pe landa ngai.”
[9] Piere alandi anjelu tii na libanda. Azalaki koyeba té 'tè makambo oyo anjelu azalaki kosala ezali ya solo: akanisaki 'tè ezali ndoto.
[10] Baleki mokengeli ya liboso ná ya mibale, pe bakómi na porte ya bibende ya kobimela na vile. Porte wana efungwami yango moko; babimi, pe tango bazalaki kotambola na balabala, na mbala moko anjelu atiki Piere.
[11] Bongo Piere akómi komiyeba; alobi: “Sik'oyo namoni 'tè ezali ya solo, Nkolo atindaki anjelu na ye, pe abikisi ngai na maboko ya Erode pe na mabe nyonso oyo Bayuda balingaki kosala ngai.”
[12] Awa amoni esika akómi, akei na ndako ya Maria, mama ya Yoane Marko. Bato mingi basanganaki wana pe bazalaki kosambela.
[13] Piere abeti ndako pe mosali moko ya mwasi, kombo na ye Rode, ayei po na kofungola.
[14] Awa ayoki mongongo ya Piere, akei mbangu na esengo koyebisa bandeko 'tè Piere azali libanda, kasi abosani kofungola porte!
[15] Bango balobi na ye: “Yo ozali na liboma!” Kasi ye atie kaka molende pe alobi: “Ezali ya solo penza.” Bango balobi: “Ezali anjelu oyo abatelaka ye.”
[16] Nzokande Piere azalaki kaka kobeta ndako. Awa bafungoli porte, bamoni ye pe bakamwe penza.
[17] Piere asali elembo na liboko po báfanda nyee, pe alobeli bango ndenge Nkolo abimisi ye na boloko. Alobi lisusu: “Boyebisa makambo oyo na Jake pe na bandeko nyonso.” Na sima abimi pe akei epai mosusu.
[18] Tongo etani, mobulu ebimi na kati ya basoda; bakómi komituna epai Piere akei.
[19] Erode atindi bato po na koluka ye, kasi bazwi ye té. Asambisi basoda pe apesi mitindo báboma bango. Na sima Erode alongwe na rejion ya Yudea pe akei kofanda mwa-mikolo na Sezaré.
[20] Na tango wana Erode asilikaki makasi penza na bato ya Tir ná Sidon; bongo bango bazwi mokano ya kotinda bato oyo bakoki kosenga boboto epai na ye. Pamba té bavile na bango ezalaki kozwa bilei na mboka na ye. Bato yango bayokanaki na Blastus, oyo azalaki motambwisi ya misala na ndako ya mokonzi.
[21] Awa mokolo Erode atiaki ekoki, alati bilamba na ye ya bokonzi pe afandi na kiti na ye. Tango azalaki kosopela bango maloba,
[22] bato babandi koganga: “Oyo ezali mongongo ya nzambe, ezali ya moto té.”
[23] Kasi kaka na tango wana, anjelu ya Nkolo apesi Erode etumbu, po azangaki kokumisa Nzambe, na ndenge andimaki bábenga ye nzambe. Bankusu elei ye, bongo akufi.
[24] Nzokande maloba ya Nzambe ezalaki kaka kopanzana, pe bandimi bakómi ebele.
[25] Tango Barnabas ná Saul basilisi kopesa makabo ya bandeko na maboko ya bambuta-muntu ya Yeruzalem, balongwe kuna pe bamemi Yoane Marko.