[1] Sima ya mwa-mikolo, Yezu abimelaki lisusu bayekoli na ye, na libongo ya laki ya Tiberiade. Abimelaki bango boye:
[2] Simon Piere, Toma (oyo babengaka “Mapasa”), Natanael (ya mboka Kana na Galilé), bana ya Zebedé mibale, pe bayekoli mibale mosusu, bango nyonso bazalaki esika moko.
[3] Simon Piere alobi na bango: “Nakei na ngai koluka mbisi.” Bazongiseli ye: “Biso pe tokokende ná yo nzela moko.” Bakei pe bakoti na bwatu. Kasi butu wana mobimba bazwaki ata eloko moko té.
[4] Awa tongo ebandi kotana, Yezu ayei kotelema na libongo, kasi bayekoli bayebaki ye té.
[5] Bongo Yezu atuni bango: “E bilenge, bozwi eloko té?” Bazongiseli ye: “Eloko té.”
[6] Yezu alobi na bango: “Bóbwaka monyama na liboko ya mobali ya bwatu, bongo bokozwa.” Babwaki monyama pe bakokaki kotombola yango lisusu té, pamba té etondaki na bambisi ebele penza.
[7] Moyekoli oyo Yezu azalaki kolinga alobi na Piere: “Ezali Mokonzi!” Tango Simon Piere ayoki 'tè ezali Mokonzi, alati elamba na ye (pamba té alongolaki yango), bongo amibwaki na mai.
[8] Bayekoli mosusu bazalaki koya na bwatu, pe bazalaki kobenda monyama oyo etondaki na bambisi; libongo ezalaki bobele penepene, soki bametre kama moko (100).
[9] Tango bakómi na libongo, bamoni mbisi likolo ya móto ya makala ná mapa.
[10] Yezu alobi na bango: “Bóya na ndambo ya mbisi oyo bouti kokanga.”
[11] Simon Piere akoti na bwatu pe abandi kobenda monyama oyo etondi na bambisi ya minene ebele, nyonso ezalaki 153. Atako ezalaki mingi boye, monyama epasukaki té.
[12] Bongo Yezu alobi na bango: “Bóya kolia.” Ata moyekoli moko té amekaki kotuna ye: “Ozali nani?” Pamba té bayebaki 'tè ezali Mokonzi.
[13] Yezu ayei penepene na bango, akamati mapa, akaboleli bango, apesi bango lisusu mbisi.
[14] Oyo ezalaki mbala ya misato Yezu abimelaki bayekoli na ye, banda mokolo asekwaki.
[15] Awa basilisi kolia, Yezu atuni Simon Piere: “Simon, Mwana ya Yoane, yo olingaka ngai mingi koleka baninga?” Piere azongiseli ye: “Ee, Mokonzi, yo moko oyebi 'tè nalingaka yo.” Yezu alobi na ye: “Batela bana-meme na ngai.”
[16] Bongo atuni ye mbala ya mibale: “Simon, mwana ya Yoane, olingaka ngai?” Azongiseli ye: “Ee, Mokonzi, yo moko oyebi 'tè nalingaka yo.” Yezu alobi: “Batela bameme na ngai.”
[17] Pe atuni ye lisusu mbala ya misato: “Simon, mwana ya Yoane, olingaka ngai?” Piere ayokaki mawa mingi na motema, na ndenge Yezu atunaki ye mbala misato: “Olingaka ngai?” Bongo azongiseli ye: “Mokonzi, yo oyebi makambo nyonso, oyebi 'tè nalingaka yo.” Yezu alobi na ye: “Batela bameme na ngai.
[18] Nazali koloba na yo, ya solo: tango ozalaki elenge, ozalaki kokanga mokaba na yo, yo moko; pe ozalaki kokende esika yo olingi. Kasi tango okokóma mobange, okotanda maboko, pe moto mosusu akokanga yo mokaba; bongo akomema yo epai yo olingi té.”
[19] Na maloba oyo, Yezu alakisi ndenge nini Piere akokufa po na kokumisa Nzambe. Na sima, Yezu alobi na Piere: “Landa ngai.”
[20] Piere atali na sima, pe amoni moyekoli oyo Yezu azalaki kolinga azali koya. Mokolo bazalaki kolia, liboso 'tè báya kokanga Yezu, moyekoli yango atunaki Yezu na litoi: “Mokonzi, nani moto oyo akoteka yo?”
[21] Bongo, awa Piere amoni ye, atuni Yezu: “Mokonzi, makambo nini ekokweela ye?”
[22] Yezu azongiseli ye: “Soki nalingi ázala tii tango nakoya, etali yo? Kasi yo, landa ngai.”
[23] Yango wana, po na maloba yango sango epanzanaki na kati ya bayekoli 'tè moyekoli yango akokufa té. Nzokande Yezu alobaki té 'tè ye akokufa té, kasi alobaki: “Soki nalingi ázala tii tango nakoya, etali yo?”
[24] Ezali ye moko moyekoli wana moto ayebisi makambo oyo, pe akòmaki yango na mokanda. Toyebi 'tè makambo ye ayebisi ezali ya solo.
[25] Yezu asalaki makambo mosusu mingi. Soki bákòmaka yango moko moko na mikanda, nakanisi 'tè mokili mobimba elingaki kokoka té po na kotia mikanda wana.