Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:59

[1] Mwana na ngai, batela mibeko na ngai mpe bomba yango malamu kati na motema na yo.

[2] Batela mateya na ngai malamu, mpe okozala na bomoi ; batela mibeko na ngai lokola mbuma ya liso na yo.

[3] Lata yango na loboko na yo lokola lopete, koma yango na etando ya motema na yo.

[4] Loba na Bwanya : « Ozali ndeko na ngai ya mwasi, » mpe bengaka Mayele « Moninga na ngai ; »

[5] mpo ete ekoka kobatela yo liboso ya mwasi ya ndumba mpe ekoka kokebisa yo liboso ya mwasi oyo alobaka maloba ya elengi, nzokande ezali ya lokuta.

[6] Mokolo moko, nazalaki kotala wuta na madusu ya lininisa ya ndako na ngai,

[7] namonaki kati na molongo ya bato oyo bazangi mayele, kati na bilenge mibali, elenge mobali moko oyo azangi penza mayele.

[8] Azalaki koleka na balabala, pene ya esika oyo mwasi wana ya ndumba avandaka, mpe akotaki na nzela oyo ekenda kino na ndako ya mwasi ya ndumba.

[9] Ezalaki na pokwa, tango moyi elimwaki, mpe molili ya butu ekomaki koya.

[10] Mpe tala, mwasi yango ya ndumba ayaki kokutana na elenge mobali, alataki penza lokola mwasi ya ndumba, mpe motema na ye etonda na mayele mabe ;

[11] azalaki mwasi ya makelele makasi mpe ya mobulu, makolo na ye evandaka na ndako te,

[12] atalaka-talaka na bisika nyonso, tango mosusu na libanda, tango mosusu na bisika oyo bato ebele bakutanaka.

[13] Mwasi yango ya ndumba asimbaki elenge mobali, ayambaki ye, alaliselaki ye miso mpe alobaki na ye :

[14] « Nazalaki na niongo ya mbeka ya kozongisa matondi epai na Yawe ; mpe lelo, nasili kokokisa ndayi na ngai.

[15] Yango wana, nabimaki mpo na kokutana na yo ; nazalaki koluka yo, mpe, tala, namoni yo.

[16] Natandi mbeto na ngai na babulangeti ya langi ya ndenge na ndenge, basala na basinga ya lino oyo ewutaka na Ejipito.

[17] Na mbeto na ngai, nasopi malasi ya mire, ya aloe mpe ya sinamoni.

[18] Yaka tolangwa bolingo kino na tongo, tomipesa mobimba na elengi ya bolingo,

[19] pamba te mobali na ngai azali na ye na ndako te, akendeki mobembo na mokili ya mosika,

[20] akendeki na saki ya mbongo na maboko, akozonga na ndako te kino na tango oyo sanza engengaka. »

[21] Na nzela ya maloba na ye ya sukali, alongaki kokosa ye ; na nzela ya maloba na ye ya elengi, amemaki ye.

[22] Elenge mobali alandaki ye mbala moko, lokola ngombe oyo bazali komema na bisika oyo babomaka banyama, lokola moto ya liboma oyo bakangi mpo na kobeta ye

[23] kino tango likonga ekotobola ye motema, lokola ndeke oyo ekeyi mbangu na motambo na kozanga koyeba ete ekeyi kokufa.

[24] Sik’oyo, mwana na ngai ya mobali, yoka ngai, pesa ngai matoyi na yo mpo na koyoka maloba ya monoko na ngai !

[25] Tika ete mwasi ya boye akumba te motema na yo ! Kopengwa te na banzela na ye,

[26] pamba te asili kokweyisa mpe kozokisa bato ebele, mpe asili kobomisa bingambe mibali.

[27] Ndako na ye ezali penza nzela ya mboka ya bakufi, oyo ememaka kino na bandako ya kufa.

Masese — Chapters