Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:12

[1] Kolia na kimia ndambo ya lipa ya kokawuka ezali malamu koleka kovanda na ndako etonda na misuni elongo na koswana.

[2] Mosali ya bwanya akozala na bokonzi likolo ya mwana mobali oyo asalaka soni, mpe akozwa libula elongo na bandeko.

[3] Bapetolaka palata na kikalungu, mpe bapetolaka wolo na fulu ya moto makasi, kasi ezali Yawe nde amekaka mitema.

[4] Moto oyo asalaka mabe ayokaka maloba ya bato mabe, mokosi apesaka litoyi na ye na maloba ya lokuta.

[5] Moto oyo anyokolaka mobola anyokolaka Mokeli ya mobola yango ; moto oyo asepelaka na pasi ya moninga akozanga te kozwa etumbu.

[6] Bakitani bazali motole ya bakoko, mpe baboti bazali lokumu ya bana.

[7] Ndenge maloba ya lokumu ebongi te mpo na moto mabe, ndenge mpe maloba ya lokuta ebongi te mpo na mokonzi.

[8] Kanyaka ezalaka lokola kisi na miso ya moto oyo azali na yango ; alongaka na esika nyonso oyo akendaka.

[9] Moto oyo abombaka mabe alukaka bolingo, kasi moto oyo azongelaka yango tango nyonso akabolaka bato oyo balingani.

[10] Pamela ezalaka na litomba mpo na moto ya mayele, kasi kobeta zoba bafimbu nkama moko ezalaka na litomba te.

[11] Moto mabe alukaka kaka kotomboka, kasi bakotindela ye ntoma ya motema mabe mpo na kotelemela ye.

[12] Kokutana na ngombolo oyo babotoli bana ezali malamu koleka kokutana na zoba oyo azali kati na bolema.

[13] Pasi etikaka ata moke te ndako ya moto oyo azongisaka mabe mpo na malamu.

[14] Kobanda koswana ezali lokola kofungola nzela ya mayi ; tika na yo liboso ete kobendana ekoma makasi.

[15] Moto oyo alongisaka bato mabe mpe moto oyo akweyisaka bato ya sembo bazali, bango mibale, nkele na miso ya Yawe.

[16] Mpo na nini mbongo ezala na maboko ya zoba ? Mpo ete asomba bwanya wana azali na posa na yango te !

[17] Molingami alingaka tango nyonso, mpe akomaka ndeko na tango ya pasi.

[18] Moto oyo azangi mayele abetaka tolo mpo na kondima baniongo ya mopaya.

[19] Moto oyo alingaka koswana alingaka masumu ; moto oyo atongaka ekuke na ye na likolo amilukelaka kokweya.

[20] Moto ya motema mabe abongaka te, mpe moto ya lolemo ya lokuta akomona pasi.

[21] Kozala na mwana ya zoba esalaka pasi na motema, mpe tata ya moto ya liboma akotikala kozala na esengo te.

[22] Motema ya esengo ebikisaka nzoto, kasi motema oyo etutami ebukaka mikuwa.

[23] Moto mabe azwaka kanyaka na nkuku mpo na kobebisa nzela ya bosembo.

[24] Bwanya emonanaka na elongi ya moto ya mayele, kasi miso ya zoba ekendaka kino na suka ya mokili.

[25] Mwana oyo azangi mayele apesaka tata na ye mawa, mpe ayokisaka mama na ye pasi na motema.

[26] Ezali malamu te kopesa moto ya sembo etumbu, mpe ezali malamu te kobeta bato ya lokumu na miso ya bosembo.

[27] Moto oyo abatelaka monoko na ye azali na boyebi ; moto oyo alengaka-lengaka te azali mayele.

[28] Ezala moto ya liboma, soki avandi kimia, amonanaka lokola moto ya bwanya ; moto oyo akangaka monoko na ye amonanaka lokola moto ya mayele.

Masese — Chapters