[1] Eyano ya kimia ekimisaka kanda, kasi maloba oyo ezokisaka ebakisaka kanda.
[2] Lolemo ya moto ya bwanya ekomisaka boyebi elengi, kasi monoko ya bato oyo bazangi mayele ebimisaka bozoba.
[3] Miso na Yawe ezalaka bisika nyonso mpo na kotala bato mabe mpe bato ya malamu.
[4] Maloba ya kimia ezali lokola nzete ya bomoi, kasi maloba ya botomboki ezokisaka motema.
[5] Moto oyo azangi mayele atiolaka mateya ya tata na ye, kasi moto oyo andimaka pamela akokoma mayele.
[6] Ezalaka na bomengo ebele kati na ndako ya moyengebene, kasi lifuti ya moto mabe ememaka pasi.
[7] Bibebu ya moto ya bwanya esopaka boyebi, kasi ezali bongo te na motema ya zoba.
[8] Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye.
[9] Nzela ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi alingaka moto oyo alandaka nzela ya sembo.
[10] Moto oyo abimaka libanda ya nzela ya sembo akozwa pamela ya makasi ; moto oyo aboyaka pamela akokufa.
[11] Ndenge mboka ya bakufi mpe mokili ya mozindo ezali penza polele liboso ya Yawe, ndenge wana mpe mitema ya bana ya bato ezali polele liboso na Ye.
[12] Moto ya moto makasi alingaka te moto oyo apamelaka ye, yango wana akendaka te epai ya bato ya bwanya.
[13] Motema ya esengo engengisaka elongi, kasi motema ya mawa elembisaka molimo.
[14] Motema ya moto ya mayele elukaka boyebi, kasi monoko ya zoba ebimisaka kaka bozoba.
[15] Mikolo nyonso ezalaka mabe mpo na moto oyo azali na pasi, kasi bomoi ya moto oyo azali na esengo ezalaka tango nyonso na feti.
[16] Kozala na eloko moko kati na kotosa Yawe ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi kati na komitungisa.
[17] Kolia ndunda kati na bolingo ezali malamu koleka kolia ngombe ya mafuta kati na koyina.
[18] Moto oyo atombokaka noki ayeisaka koswana, kasi moto oyo akangaka motema akitisaka koswana.
[19] Nzela ya moto ya goyigoyi ezalaka lokola banzela mike ya banzube, kasi nzela ya bato ya sembo ezalaka ya kosembolama.
[20] Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi moto oyo azangi mayele atiolaka mama na ye.
[21] Bozoba esepelisaka moto oyo azangi mayele, kasi moto ya mayele atambolaka alima na nzela na ye.
[22] Mabongisi ekokisamaka te soki bato basangani te mpo na kopesa mayele, kasi ekokisamaka malamu soki bapesi toli bazali ebele.
[23] Kozongisa eyano ya malamu epesaka moto esengo, mpe liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezalaka kitoko.
[24] Nzela ya bomoi ememaka moto ya bwanya na likolo, mpo na kobatela ye ete akita na mboka ya bakufi te.
[25] Yawe abukaka ndako ya moto ya lolendo, kasi alendisaka libula ya mwasi oyo akufisa mobali.
[26] Makanisi ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi maloba ya malamu ezalaka peto na miso na Ye.
[27] Moto oyo alukaka litomba na nzela ya sembo te amemaka mitungisi na libota na ye, kasi moto oyo aboyaka kanyaka akozala na bomoi.
[28] Motema ya moyengebene ekanisaka liboso ya kopesa eyano, kasi monoko ya moto mabe ebimisaka maloba ya mabe.
[29] Yawe azalaka mosika ya bato mabe, kasi ayokaka libondeli ya bayengebene.
[30] Eloko oyo esepelisaka miso esepelisaka mpe motema ; sango malamu elendisaka mikuwa.
[31] Moto oyo ayokaka pamela oyo epesaka bomoi avandaka kati na bato ya bwanya.
[32] Moto oyo asundolaka koyekola atiolaka nde bomoi na ye moko, kasi moto oyo andimaka pamela akomaka mayele.
[33] Kotosa Yawe ezali eteyelo ya bwanya ; komikitisa eyaka liboso ya nkembo.