Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:29

[1] Vino elobisaka bato maloba ya soni, masanga ya makasi ememaka mobulu ; moto nyonso oyo amipesaka na yango akotikala te kokoma moto ya bwanya.

[2] Somo oyo mokonzi apesaka ezali lokola koganga ya nkosi ; moto oyo apesaka ye kanda amilukelaka ye moko pasi.

[3] Koboya koswana epesaka moto lokumu, kasi moto oyo azangi mayele amipesaka na yango.

[4] Moto ya goyigoyi asalaka bilanga te likolo ya kobanga malili ; boye na tango ya kobuka mbuma, alukaka mpe kobuka, kasi akozwa eloko te.

[5] Makanisi ya motema ya moto ezalaka lokola ebale ya mozindo, moto ya mayele alukaka kotoka kati na yango.

[6] Bato ebele batatolaka bolamu na bango, kasi nani akomona moto ya sembo ?

[7] Moyengebene atambolaka na bosembo na ye ; boye sima na ye, bana na ye bakozala bato ya esengo.

[8] Soki mokonzi avandi na kiti mpo na kosambisa, miso na ye ebenganaka mabe nyonso.

[9] Nani akoki koloba : « Nabatelaka motema na ngai peto, nazali peto, nazali na masumu te ? »

[10] Kilo mibale mpe bimekelo mibale, nyonso ezali nkele na miso ya Yawe.

[11] Bayebaka elenge mobali na nzela ya misala na ye, soki ezaleli na ye ezali peto mpe sembo.

[12] Ezala litoyi oyo eyokaka to liso oyo emonaka, ezali Yawe nde asalaki nyonso mibale.

[13] Kolingaka pongi te, noki te okokoma mobola ; sala ete miso na yo ezalaka ya kofungwama, mpe okozanga te bilei ya kobomba.

[14] Moto oyo asombaka biloko alobaka : « Biloko oyo ezali mabe ! Ezali malamu te ! » Kasi soki akei, atombolaka mapeka mpo na biloko oyo azwi.

[15] Wolo mpe babiju ezalaka na yango ebele, kasi bibebu oyo ebimisaka boyebi eleki na motuya.

[16] Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi mpo na niongo ya moto mosusu ; bomba yango lokola ndanga soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya.

[17] Bilei oyo ezwami na nzela ya lokuta ezalaka elengi na monoko ya moto, kasi, na sima, monoko na ye etondaka na zelo.

[18] Soki ozali kosala mabongisi, tunaka toli ; mpe soki olingi kobunda bitumba, zala na ekenge mpe na mayele.

[19] Moto ya bilobaloba abimisaka basekele ; yango wana kima bato oyo balobaka mingi.

[20] Moto oyo alakelaka tata to mama na ye mabe, mwinda na ye ekokufa kati na molili.

[21] Bomengo oyo moto azwi noki-noki na ebandeli ekopambolama te na suka.

[22] Kolobaka te : « Nakozongisa mabe na mabe oyo basali ngai ! » Kasi talela Yawe, mpe akobikisa yo.

[23] Kilo oyo ekesana na kilo mosusu ezalaka nkele na miso ya Yawe, mpe emekelo kilo ya lokuta ezalaka eloko ya malamu te.

[24] Ezali Yawe nde atambolisaka matambe ya moto ; bongo ndenge nini moto akoki kososola ye moko nzela na ye ?

[25] Ezali motambo mpo na moto koloba na lombangu : « Eloko oyo ebulisami mpo na Yawe, » mpe kokanisa sima na ye kolapa ndayi.

[26] Mokonzi ya bwanya abenganaka bato mabe mpe azangaka te kopesa bango etumbu.

[27] Molimo ya moto ezali mwinda oyo Yawe apesi ye ; esosolaka bozindo nyonso ya motema ya moto.

[28] Bolamu mpe solo ebatelaka mokonzi ; alendisaka bokonzi na ye na nzela ya bolamu.

[29] Makasi ezali biju ya bilenge, mpe suki ya pembe ezali lokumu ya mibange.

[30] Bapota elongolaka mabe, mpe bafimbu esukolaka bozindo ya molimo ya moto.

Masese — Chapters