Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:11

[1] Kokende sango ya malamu ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi ; lokumu ezali malamu koleka palata mpe wolo.

[2] Mozwi mpe mobola bazali na likambo moko ya lisanga : ezali Yawe nde azali Mokeli na bango mibale.

[3] Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele akoleka wana mpe akokutana na pasi.

[4] Komikitisa mpe kotosa Yawe ememaka bozwi, lokumu mpe bomoi.

[5] Nzela ya bato mabe ezalaka na banzube mpe mitambo, kasi moto oyo abatelaka molimo na ye azalaka mosika na yango.

[6] Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ; ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.

[7] Mozwi azalaka mokonzi ya mobola, mpe modefi azalaka mowumbu ya modefisi.

[8] Moto oyo alonaka masumu abukaka pasi, mpe makasi ya kanda na ye nyonso ekosuka.

[9] Moto oyo akabaka na esengo akopambolama, pamba te akabolaka bilei na ye na mobola.

[10] Bengana motioli, bongo kowelana, koswana mpe kofingana ekosila.

[11] Moto oyo alingaka kozala peto na motema, oyo ngolu ezalaka na bibebu na ye, mokonzi azalaka molingami na ye.

[12] Miso na Yawe ebatelaka boyebi, kasi akweyisaka maloba ya moto oyo azangi mayele.

[13] Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ezali kuna na libanda, ekoboma ngai na kati-kati ya balabala. »

[14] Monoko ya mwasi ya ndumba ezalaka lokola libulu ya mozindo ; moto oyo Yawe asilikeli akweyaka kuna.

[15] Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba, bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.

[16] Moto oyo anyokolaka mobola mpo ete akoma na bomengo mingi mpe oyo apesaka mozwi bakado bakokweya na bobola.

[17] Pesa matoyi mpe yoka toli ya bato ya bwanya, mpe tika ete motema na yo endima mateya na ngai.

[18] Pamba te ekozala esengo soki obombi yango na motema na yo, mpe soki yango nyonso ezali pene ya bibebu na yo.

[19] Nateyi yo yango lelo mpo ete elikya na yo ezala kati na Yawe.

[20] Boni, lobi eleki, nakomelaki yo te batoli koleka tuku misato, batoli ya bwanya mpe ya boyebi,

[21] batoli oyo epesaka mateya ya solo mpe maloba ya solo mpo ete okoka kozongisa biyano ya solo na moto oyo atindi yo ?

[22] Kobotola te na makasi biloko ya mobola, pamba te azali mobola, konyokola te moto ya pasi na esambiselo,

[23] pamba te Yawe akobundela bango mpe akobebisa bomoi ya bato oyo bakobebisa bomoi na bango.

[24] Kozala molingami te ya moto ya kanda, mpe kosangana te na moto ya motema moto-moto,

[25] noki te okoyekola nzela na ye mpe okokangama na motambo na ye.

[26] Kozala te na molongo ya bato oyo batombolaka maboko mpo na kondima kofuta baniongo ya bato mosusu,

[27] pamba te soki ozali na yo na makoki ya kofuta te, mpo na nini okolinga ete babotola ata mbeto na yo ya kolala ?

[28] Kozongisa na sima te mondelo ya kala oyo batata na yo bakataki.

[29] Osila komona moto oyo ayebi mosala na ye malamu ? Akosala kaka liboso ya bakonzi, akosala te liboso ya bato ya molili.

Masese — Chapters