[1] Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu koleka mokosi oyo azangi mayele.
[2] Ezali malamu te kobungisa mayele, kati na bolingo oyo eleka ndelo. Lokolo ya moto oyo atambolaka noki-noki ezangaka te kobeta libaku.
[3] Bozoba ya moto ebebisaka bomoi na ye ; mpe, na sima, akomaka kotombokela Yawe.
[4] Mozwi azalaka na baninga ebele, kasi mobola akabwanaka ata na molingami na ye ya motema.
[5] Motatoli ya lokuta akozwa etumbu ; moto oyo akosaka akozanga te kozwa etumbu.
[6] Bato mingi balukaka kosepelisa moto ya lokumu, mpe moto nyonso alukaka kozala molingami ya moto oyo asungaka bato.
[7] Soki bandeko nyonso ya mobola bayinaka ye, mpo na nini baninga na ye bakima ye te ? Ata tango azali nanu koloba, batikalaka lisusu wana te.
[8] Moto oyo alukaka kozwa bwanya alingaka bomoi na ye ; moto oyo alingaka mayele alongaka.
[9] Motatoli ya lokuta azwaka etumbu ; moto oyo akosaka akobebisama.
[10] Bomoi ya lokumu ebongi na zoba te ; ebongi mpe te na mowumbu kopesa mitindo na bakambi.
[11] Bwanya ya moto ekomisaka ye motema molayi ; mpe azwaka lokumu tango atalaka pamba mabe oyo basalaka ye.
[12] Kanda ya mokonzi ezali lokola koganga ya nkosi, kasi bolamu na ye ezali lokola mamwe.
[13] Mwana ya zoba azali pasi mpo na tata na ye ; koswana ya mwasi ezali lokola linzanza ya ndako, oyo etangisaka mayi tango nyonso.
[14] Moto akoki kozwa bandako mpe bomengo lokola libula kowuta epai ya batata, kasi mwasi ya bwanya azali likabo kowuta na Yawe.
[15] Bogoyigoyi ememaka moto na pongi makasi, mpe moto ya goyigoyi akufaka nzala.
[16] Moto oyo atosaka mibeko abatelaka molimo na ye ; moto oyo akebaka te na etamboli na ye akokufa.
[17] Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola adefisaka Yawe, bongo Yawe akozongisela ye bolamu.
[18] Pesaka mwana na yo etumbu wana elikya ezali nanu, kasi kotomboka na yo ekoma te kino na posa ya koboma ye.
[19] Tika ete moto oyo asilikaka makasi amema mokumba ya kanda na ye ; pamba te soki obikisi ye, okotinda ye ete azongela lisusu.
[20] Yoka toli mpe ndima mateya, mpo ete okoma moto ya bwanya.
[21] Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele, kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.
[22] Eloko oyo moto alingaka epai ya moninga na ye moto ezali bolingo ya solo, mpe mobola azali malamu koleka mokosi.
[23] Kotosa Yawe ememaka na bomoi, esalaka ete moto azala na kimia ; boye ata mabe moko te ekokomela ye.
[24] Moto ya goyigoyi akotisaka loboko na ye kati na bilei, kasi akokaka te kozongisa yango na monoko na ye.
[25] Beta motioli fimbu, mpe zoba akozwa mayele ; sembola moto ya mayele, mpe akozwa boyebi.
[26] Mwana oyo abetaka tata na ye mpe abenganaka mama na ye ayeisaka soni mpe mawa.
[27] Mwana na ngai, soki otiki koyoka mateya, okobunga nzela ya maloba ya boyebi.
[28] Moto oyo atiolaka bosembo azali motatoli ya zoba ; mpe monoko ya bato mabe emelaka kaka mabe.
[29] Etumbu esalema mpo na batioli, mpe fimbu esalema mpo na bazoba.