[1] Tala masese mosusu ya Salomo oyo bato ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, bakomaki.
[2] Nzambe azwaka nkembo mpo ete asalaka makambo oyo bato bayebaka te, mpe bakonzi bazwaka nkembo mpo ete balukaka kososola tina ya makambo.
[3] Ndenge bakokaka te komeka bosanda ya Lola to bozindo ya mabele, ndenge wana mpe bakoki te kososola mitema ya bakonzi.
[4] Soki olongoli mbindo na palata, ekobimisa mbeki mpo na monyangwisi bibende na moto.
[5] Soki olongoli moto mabe liboso ya mokonzi, kiti na ye ya bokonzi ekolendisama na bosembo.
[6] Komikumisaka te liboso ya mokonzi, mpe komivandisaka te na esika ya bato minene ;
[7] pamba te eleki malamu ete baloba na yo : « Yaka kovanda na esika oyo ya lokumu, » na esika ete bayokisa yo soni na miso ya mokonzi.
[8] Kowelaka te kokende kofunda epai ya basambisi makambo oyo osili komona na miso, pamba te okosala nini na suka soki moninga na yo asukisi yo ?
[9] Soki ozali kowelana na moninga na yo, kobimisa sekele ya moto mosusu te,
[10] noki te ayoka yango mpe ayokisa yo soni, boye okosambwa mpo na libela.
[11] Liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezali lokola wolo oyo basangisi na palata.
[12] Pamela ya moto ya bwanya epai ya moto oyo ayokaka ezali lokola wolo ya peto mpe sheneti ya wolo.
[13] Motindami ya sembo azalaka lokola mopepe ya malili ya mvula ya pembe na tango ya kobuka bambuma, asalaka esengo ya mokonzi na ye.
[14] Moto oyo amikumisaka ete akabaka, nzokande apesaka na ye eloko te, azali lokola mapata mpe mopepe oyo ezangi mvula.
[15] Moto oyo akangaka motema akoki kobongola makanisi ya mokonzi, mpe maloba ya malamu ebukaka mikuwa.
[16] Soki omoni mafuta ya nzoyi, lia oyo ekoki na yo, pamba te soki olie yango na lokoso, okosanza yango.
[17] Kokendaka pamba-pamba te na ndako ya moninga na yo, noki te akotonda yo mpe akolemba yo.
[18] Moto oyo apesaka matatoli ya lokuta mpo na kosala moninga na ye mabe azali lokola marto, mopanga mpe mbanzi ya songe.
[19] Kotia elikya na zoba na tango na pasi ezali lokola lino ebukani mpe lokolo elembi.
[20] Koyembela moto oyo azali na mawa banzembo ya esengo ezali lokola kolongola ye kazaka na tango ya malili to kotia masanga ya ngayi na pota.
[21] Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei ; soki azali na posa ya mayi, pesa ye mayi ya komela.
[22] Pamba te, soki osali bongo, okotondisa makala ya moto na likolo ya moto na ye, mpe Yawe akofuta yo.
[23] Mopepe oyo ewutaka na ngambo ya nor, ebetisaka mvula, mpe lolemo oyo etongaka ekomisaka bilongi kanda-kanda.
[24] Kovanda na songe ya ndako ezali malamu koleka kovanda elongo na mwasi oyo aswanaka-swanaka.
[25] Basango ya malamu oyo ewuti na mokili ya mosika ezali lokola mayi ya pio kati na motema ya moto oyo azali na posa ya mayi.
[26] Moto ya sembo oyo asopanaka liboso ya moto mabe azali lokola liziba ya potopoto mpe etima oyo ebimisaka mayi ya mabe.
[27] Ezali malamu te kolia mafuta ya nzoyi ebele, mpe ezali malamu te koluka lokumu na yo moko.
[28] Moto oyo akokaka te kokonza molimo na ye azali lokola engumba oyo ebukana mpe ezanga bamir.