[1] Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi eyano ewutaka epai na Yawe.
[2] Nzela nyonso ya moto emonanaka peto na miso na ye, kasi Yawe nde amekaka mitema.
[3] Pesa misala na yo epai na Yawe, mpe mabongisi na yo ekokokisama.
[4] Yawe asalaka makambo nyonso na tina, ezala bato mabe, asala bango mpo na mokolo ya pasi.
[5] Moto nyonso ya lolendo azalaka nkele na miso ya Yawe ; solo, akozanga te kozwa etumbu.
[6] Bolingo mpe bosembo elongolaka mbeba ; kotosa Yawe etindaka moto kokima mabe.
[7] Soki Yawe asepeli na nzela ya moto, akoyokanisa ye na banguna na ye.
[8] Kozwa biloko moke kati na bosembo ezali malamu koleka kozwa bomengo ebele kati na nzela ya mabe.
[9] Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te.
[10] Maloba ya mokonzi ezali lokola Liloba na Nzambe, ekweyaka te kati na kosambisama.
[11] Emekelo kilo ya sembo mpe basani oyo bamekelaka kilo ezali ya Yawe, mpe kilo nyonso ya saki ezali likambo na Ye.
[12] Ezali malamu te mpo na mokonzi kosala mabe, pamba te bokonzi elendisamaka nde na nzela ya bosembo.
[13] Bakonzi balingaka maloba ya solo, mpe bapesaka moto oyo alobaka na bosembo lokumu.
[14] Kanda ya mokonzi ememaka na kufa, kasi moto ya bwanya ayebaka kokitisa yango.
[15] Soki elongi ya mokonzi ezali kongenga, elingi koloba : bomoi. Bolamu na ye ezali lokola lipata ya mvula ya eleko ya suka.
[16] Bwanya ezali malamu koleka wolo, mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata.
[17] Bato ya sembo batambolaka na nzela oyo epesaka mabe mokongo. Moto oyo abatelaka motema na ye abatelaka nde bomoi na ye.
[18] Lolendo eyaka liboso ya kobebisama, mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.
[19] Kozala moto ya komikitisa mpe kozala elongo na bato bakelela ezali malamu koleka kokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya lolendo.
[20] Moto oyo akanisaka na tina na makambo amonaka bolamu. Esengo na moto oyo atiaka elikya na Yawe.
[21] Babengaka moto oyo azali na motema ya bwanya moto ya mayele, mpe bibebu ya kimia ebakisaka boyebi.
[22] Mayele ezali etima ya bomoi mpo na bato oyo bazali na yango, kasi bozoba ezali etumbu mpo na bazoba.
[23] Motema ya moto ya bwanya ekomisaka monoko na ye mayele, mpe bibebu na ye ebakisaka boyebi.
[24] Maloba ya elengi ezalaka lokola mafuta ya nzoyi, epesaka kimia na motema mpe lobiko na mikuwa.
[25] Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato, nzokande, na suka, ememaka na kufa.
[26] Nzala etindaka mosali ete asala mosala, monoko na ye etindikaka ye na mosala.
[27] Moto ya Beliali abongisaka kosala mabe, mpe maloba na ye ezali lokola moto oyo etumbaka.
[28] Moto mabe alonaka koswana, moto ya songisongi akabolaka baninga.
[29] Moto ya mobulu abendaka moninga na ye mpe atambolisaka ye na nzela ya mabe.
[30] Moto oyo akangi miso mpe bibebu na ye mpo na kosala mabongisi ya mabe asili kosala masumu.
[31] Suki ya pembe ezali motole ya nkembo ; bazwaka yango na nzela ya bosembo.
[32] Moto oyo akangaka motema azali makasi koleka elombe, mpe moto oyo ayebi komikanga azali makasi koleka moto oyo abotolaka bingumba.
[33] Bakobetaka zeke kati na elamba ya Nganga-Nzambe, kasi mikano nyonso ewutaka na Yawe.