[1] Moyimi alukaka kaka kosepelisa baposa na ye, atelemelaka bososoli nyonso.
[2] Moto oyo azangi mayele asepelaka te kozwa tango ya kokanisa, kasi asepelaka kaka kotalisa makanisi ya motema na ye.
[3] Soki moto mabe ayei, kotiola mpe eyaka ; soki soni eyei, kofinga mpe eyaka.
[4] Maloba ya monoko ya moto ezalaka lokola mayi ya mozindo ; etima ya bwanya ezalaka lokola mayi ya ebale oyo etondi makasi.
[5] Ezali malamu te kolongisa moto mabe mpe kokweyisa moyengebene, kati na kosambisama.
[6] Bibebu ya moto oyo azangi mayele eyeisaka koswana, mpe monoko na ye eyeisaka fimbu.
[7] Monoko ya moto oyo azangi mayele ememelaka ye kufa, mpe bibebu na ye ezalaka motambo mpo na molimo na ye moko.
[8] Maloba ya moto ya songisongi ezalaka lokola bilei ya kitoko, ekitaka na esengo kino na libumu.
[9] Moto oyo azongaka sima na mosala na ye azali ndeko ya mobebisi.
[10] Kombo ya Yawe ezali lokola ndako molayi batonga makasi ; moyengebene akimelaka kuna mpe azwaka ebombamelo ya makasi.
[11] Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye, oyo batonga makasi ; akanisaka ete ezali lokola mir ya molayi.
[12] Liboso ete moto akweya, motema na ye ekomaka na lolendo ; kasi komikitisa eyaka liboso ya nkembo.
[13] Kopesa eyano liboso ya koyoka ezali liboma mpe bozoba.
[14] Kimia kati na motema elendisaka moto na tango ya bokono, kasi nani akokoka kolendisa motema oyo etutami ?
[15] Motema ya moto ya mayele ezwaka mayele, mpe litoyi ya moto ya bwanya elukaka boyebi.
[16] Kado efungolelaka moto oyo apesi yango nzela mpe ekotisaka ye liboso ya bato minene.
[17] Moto ya liboso na kosamba amonanaka lokola nde alongi ; kasi soki moto oyo azali kosamba na ye ayei, akotelemela ye.
[18] Zeke esilisaka koswana mpe ekataka makambo kati na bato ya makasi.
[19] Kokota lisusu na motema ya ndeko oyo osali mabe ezalaka pasi koleka kokota na engumba batonga makasi ; mpe koswana na moto ezali lokola kokanga bikuke ya ndako batonga makasi na bibende ya minene.
[20] Moto atondisaka libumu na ye na nzela ya mbuma ya monoko na ye mpe akotonda na lifuti ya bibebu na ye.
[21] Kufa mpe bomoi ezali na se ya nguya ya lolemo ; moto oyo alingaka lolemo akolia mbuma na yango.
[22] Mobali oyo azwi mwasi ya malamu azwi bomengo, azwi ngolu kowuta epai na Yawe.
[23] Mobola alobaka na mongongo ya kobondela, kasi mozwi azongisaka eyano na lolendo.
[24] Moto oyo azalaka na balingami ebele amitiaka na pasi, kasi ezali na molingami moko ya motema, oyo aleki ata ndeko.